Koyika mpiko na bampasi ekoki komemela biso matomba
“Tolobaka ete baoyo basili koyika mpiko bazali bato ya esengo.”—YAKOBO 5:11.
1, 2. Nini emonisi ete Yehova akanaki te ete moto azala na mpasi?
MOTO moko te alingaka kozala na mpasi; Yehova Nzambe, Mozalisi na biso, alingaka mpe te ete bato bázala na mpasi. Tokoki komona yango soki totaleli Liloba na ye mpe makambo oyo elekaki nsima ya kokelama ya mobali mpe mwasi ya liboso. Nzambe akelaki liboso mobali. “[Yehova] Nzambe asalaki moto na putulu ya mokili, mpe apemaki kati na zolo na ye mpema ya bomoi, mpe moto akómaki molimo ya bomoi.” (Genese 2:7) Adama azalaki moto ya kokoka, akokaki te kobela to kokufa.
2 Ezali boni mpo na esika oyo Adama azalaki kofanda? Biblia elobi boye: “[Yehova] Nzambe akonaki elanga epai na ebimelo na ntango, kati na Edene, mpe kuna atyaki moto oyo ye asalaki. [Yehova] akolisaki na mokili nzete nyonso ezali na kitoko na kotala, mpe yango ezali malamu na kolya.” (Genese 2:8, 9) Adama afandaki na esika ya malamu mingi. Na kati ya elanga ya Edene, ayebaki mpasi te.
3. Mobali mpe mwasi ya liboso bazalaki na bilikya nini?
3 Genese 2:18 elobi boye: “[Yehova] Nzambe alobaki ete, Ezali malamu te ete moto azala ye moko. Nakosalela ye mosungi mobongi na ye.” Yehova akelaki mwasi ya kokoka mpo na Adama, mpe apesaki bango likoki ya kofanda na esengo lokola mwasi ná mobali. (Genese 2:21-23) Biblia elobi lisusu boye: “Nzambe mpe apambolaki bango, mpe Nzambe alobelaki bango ete, Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili mpe bótya yango na nse na bino.” (Genese 1:28) Adama ná Eva bazalaki na libaku malamu ya kokómisa mabelé mobimba paladiso lokola elanga ya Edene. Balingaki mpe kobota bana oyo balingaki kozala na bomoi ya esengo, oyo balingaki koyeba mpasi te. Tomoni ete makambo ezalaki mpenza malamu na ebandeli!—Genese 1:31.
Ebandeli ya bampasi
4. Makambo nini emonanaka na bomoi ya bato banda kala?
4 Nzokande, soki totali bomoi oyo bato bazalaka na yango banda kalakala, ezali polele ete likambo moko etambolaki malamu te. Makambo ya mabe esalemi mingi mpe bato banyokwami mingi. Bana nyonso ya Adama ná Eva babɛlaka, banunaka, mpe bakufaka. Mabelé ezali ata moke te paladiso oyo etondi na bato ya esengo. Makambo oyo tozali komona elobelami malamu na Baloma 8:22 ete: “Bozalisi mobimba ezali kokoba komilelalela elongo mpe ezali konyokwama elongo tii sikoyo.”
5. Bankɔkɔ na biso ya liboso basalaki likambo nini oyo ekɔtisaki bampasi na mokili?
5 Bampasi ya bato eutaka epai ya Yehova te. (2 Samwele 22:31) Kutu, bango moko nde bamibendelaka bampasi mosusu. Biblia elobi ete “bamibebisi, bazali kosala makambo mabe.” (Nzembo 14:1) Ntango Nzambe akelaki Adama ná Eva, apesaki bango bomoi moko ya malamu mpenza. Mpo makambo etikala ndenge ezalaki na ebandeli, esengelaki bátika te kotosa Yehova; kasi bango batombokelaki ye. Lokola bankɔkɔ na biso ya liboso baboyaki Yehova, bazalaki lisusu bato ya kokoka te. Nzoto na bango ekómaki kobeba mokemoke mpe nsukansuka bakufaki. Batikelaki biso ezaleli ya kozanga kokoka.—Genese 3:17-19; Baloma 5:12.
6. Satana asalaki likambo nini oyo ekɔtisaki mpe bampasi na mokili?
6 Ekelamu ya elimo oyo abengami Satana Zabolo asalaki mpe ete bampasi ekɔta na mokili. Nzambe apesaki ye bonsomi ya kopona. Kasi, ye asalelaki bonsomi yango na ndenge ya mabe, alukaki ete bato bákóma kosambela ye. Nzokande, bato basengeli kosambela kaka Yehova, kasi bikelamu na ye te. Satana akosaki Adama ná Eva mpo báboya ete Yehova atambwisaka bango, alobaki na bango ete bakokóma “[lokola] Nzambe, koyeba malamu mpe mabe.”—Genese 3:5.
Kaka Yehova nde azali na lotomo ya koyangela
7. Mbuma mabe oyo bato babuki na ndenge batombokelaki Yehova ezali komonisa nini?
7 Mbuma mabe ya botomboki ezali komonisa ete kaka Yehova, Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, nde azali na lotomo ya koyangela mpe kaka bokonzi na ye nde ezali sembo. Bankóto ya bambula oyo eleki emonisi ete Satana, oyo akómaki “moyangeli ya mokili oyo,” apesi bato mayele ya kosala boyangeli ya mabe, oyo ezangi sembo, ya makambo makasi, mpe oyo esali ata eloko moko te ya malonga. (Yoane 12:31) Lisusu, ebele ya bambula oyo bato bayangeli mokili na litambwisi ya Satana emonisi ete bazali na makoki te ya koyangela na bosembo. (Yilimia 10:23) Na yango, boyangeli nyonso oyo bato basali ekoki kolonga te. Ntango nyonso oyo eleki emonisi yango polele.
8. Yehova azali na mokano nini mpo na biyangeli nyonso ya bato, mpe ndenge nini akokokisa mokano yango?
8 Lokola Yehova atikaki ntango molai mpenza mpo bato bámeka biyangeli ndenge na ndenge, tokoloba te ete azangi bosembo soki alongoli makonzi nyonso ya bato mpe atye boyangeli na ye. Esakweli moko elobeli likambo yango boye: “Na mikolo ya mikonzi yango [biyangeli ya bato] Nzambe ya lola akotɛlɛmisa bokonzi [guvɛrnema ya likoló na mabɔkɔ ya Klisto] bokobebisama soki moke te, . . . ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.” (Danyele 2:44) Boyangeli ya bato ná bademo ekosuka, kaka Bokonzi ya likoló nde ekotikala mpe ekoyangela mabelé. Klisto akozala mokonzi mpe akoyangela elongo na bato ya sembo 144 000 oyo bakouta awa na mabelé.—Emoniseli 14:1.
Bampasi ekoki komemela biso matomba
9, 10. Bampasi oyo Yesu akutanaki na yango ezalaki na litomba nini?
9 Ezali mpe malamu tólobela makoki ya elimo ya baoyo bakoyangela na Bokonzi ya likoló. Ya liboso, Klisto Yesu amonisaki ete abongi mpenza kozala mokonzi. Alekisaki ebele ya bambula elongo na Yehova mpe azalaki kosala mokano ya Tata na ye; azalaki pembeni na Ye lokola “mosali ya mayele.” (Masese 8:22-31, NW) Ntango Yehova atindaki ye awa na mabelé, Yesu atosaki. Amipesaki na mosala ya koyebisa bato Bokonzi ya Yehova. Yesu apesaki biso nyonso ndakisa malamu mpenza na ndenge atosaki na motema moko boyangeli ya Yehova.—Matai 4:17; 6:9.
10 Yesu anyokwamaki, mpe nsukansuka babomaki ye. Ntango azalaki kokokisa mosala na ye awa na mabelé, amonaki mikakatano ya bato. Komona makambo wana mpe konyokwama ye moko ezalaki nde na litomba? Ɛɛ. Baebele 5:8 elobi boye: “Atako azalaki Mwana [ya Nzambe], ayekolaki botosi na kati ya makambo oyo akutanaki na yango.” Makambo oyo Yesu akutanaki na yango awa na mabelé esalisaki ye ayeba komitya na esika ya bato mpe ayokelaka bango mawa. Ye moko ayokaki mpasi oyo bato bayokaka. Akoki komitya na esika ya bato oyo bazali konyokwama mpe komona bonene ya mokumba oyo azali na yango mpo na kobikisa bango. Tóyoka ndenge oyo ntoma Paulo alobeli yango na mokanda ya Baebele: “Asengelaki kokóma lokola ‘bandeko’ na ye na makambo nyonso, mpo akoka kokóma nganga-nzambe monene ya motema mawa mpe ya sembo na makambo oyo etali Nzambe, mpo apesa mbeka ya mbɔndi mpo na masumu ya bato ya ekólo. Mpo lokola ye moko amonaki mpasi ntango azalaki komekama, azali na likoki ya koya kosalisa baoyo bazali komekama.” “Nganga-nzambe monene oyo tozali na ye, ezali te moto oyo azangi likoki ya koyeba komitya na esika ya bolɛmbu na biso, kasi ezali nde moto oyo asili komekama na makambo nyonso lokola biso, kasi azangi lisumu. Na yango, tiká tópusana na elobeli ya polele penepene na kiti ya bokonzi ya boboto monene, mpo tóyokelama mawa mpe tózwa boboto monene mpo na kosalisama na ntango oyo ekoki.”—Baebele 2:17, 18; 4:14-16; Matai 9:36; 11:28-30.
11. Ndenge nini makambo oyo bato oyo bakozala bakonzi mpe banganga-nzambe bakutanaki na yango awa na mabelé ekosalisa bango ntango bakoyangela?
11 Tokoki mpe koloba ndenge moko mpo na bato 144 000 oyo “basombamaki” na mabelé mpo na koyangela elongo na Klisto Yesu na Bokonzi ya likoló. (Emoniseli 14:4) Bango nyonso bazalaki bato awa na mabelé, bafandaki na mokili oyo etondi na bampasi, mpe bango moko bakutanaki na bampasi. Mingi kati na bango banyokwamaki, bamosusu kutu babomamaki mpo na bosembo na bango epai ya Yehova mpe mpo bandimaki kolanda Yesu. Kasi, ‘bayokaki nsɔni te mpo na litatoli oyo etali Nkolo na bango, bandimaki komona oyo ya bango mpasi mpo na nsango malamu.’ (2 Timote 1:8) Makambo oyo bakutanaki na yango awa na mabelé epesi bango makoki oyo esengeli mpenza mpo na kosambisa bato ntango bakozala kuna na likoló. Bayekolaki komitya na esika ya basusu, kozala na boboto, mpe kosalisa bato.—Emoniseli 5:10; 14:2-5; 20:6.
Esengo ya baoyo bakozwa bomoi awa na mabelé
12, 13. Bato oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabelé bakoki kozwa matomba nini na bampasi oyo bazali kokutana na yango?
12 Bato oyo bakozwa bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé, epai maladi, mawa, mpe liwa ekozala te, bakoki nde kozwa matomba na bampasi oyo bazali kokutana na yango lelo? Moto moko te akoki kosepela na mawa mpe mitungisi oyo mpasi epesaka. Kasi, koyika mpiko na bampasi ekoki kosalisa biso tókolisa bizaleli malamu mpe ekoki kopesa biso esengo.
13 Tótalela oyo Liloba ya Nzambe elobi: “Ata soki bosengeli konyokwama mpo na boyengebene, bozali bato ya esengo.” “Soki bozali kolobelama mabe mpo na nkombo ya Klisto, bozali bato ya esengo.” (1 Petelo 3:14; 4:14) “Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe mpe konyokola bino mpe kokosela bino makambo mabe ya ndenge nyonso mpo na ngai. Bósepela mpe bópumbwa na esengo, mpo mbano na bino ezali monene na likoló.” (Matai 5:11, 12) “Esengo na moto oyo azali kokoba koyika mpiko na komekama, mpamba te na kokómáká moto oyo andimami akozwa motole ya bomoi.”—Yakobo 1:12.
14. Na ndenge nini basaleli ya Yehova bayokaka esengo ntango bazali koyoka mpasi?
14 Ezali te mpasi oyo tokoki kokutana na yango nde ekopesa biso esengo. Tokoyoka esengo na koyeba ete tozali konyokwama mpo tozali kosala mokano ya Yehova mpe tozali kolanda ndakisa ya Yesu. Na ndakisa, na siɛklɛ ya liboso, bantoma mosusu bakɔtaki bolɔkɔ mpe basambaki liboso ya Sanedrina, tribinale monene ya Bayuda, mpe bafundaki bango mpo bazalaki kosakola nsango ya Yesu Klisto. Babɛtaki bango fimbo mpe na nsima batikaki bango. Bamonisaki ezaleli nini? Lisolo elobi ete “balongwaki liboso ya Sanedrina, kosepeláká mpamba te batángamaki bato oyo babongi kosambwisama mpo na nkombo na ye.” (Misala 5:17-41) Yango elingi koloba te ete basepelaki na mpasi oyo bayokaki na ndenge babɛtaki bango fimbo; bazalaki na esengo mpo bayebaki ete likambo wana ekómelaki bango mpo bazalaki sembo epai ya Yehova mpe balandaki matambe ya Yesu.—Misala 16:25; 2 Bakolinti 12:10; 1 Petelo 4:13.
15. Ndenge nini koyika mpiko lelo ekoki kozala na litomba mpo na mikolo ekoya?
15 Soki tozali kotalela botɛmɛli mpe minyoko oyo tozali kokutana na yango na makanisi oyo ebongi, yango ekoki kokolisa epai na biso ezaleli ya koyika mpiko. Yango ekosalisa biso tópika mpende na mikakatano mosusu oyo tokoki kokutana na yango na mikolo ekoya. Biblia elobi boye: “Bómona yango esengo mpenza, bandeko na ngai, ntango bozali kokutana na komekama ya ndenge na ndenge, mpo bino moko boyebi ete motindo ya kondima na bino oyo emekami ezali kobota ezaleli ya koyika mpiko.” (Yakobo 1:2, 3) Lisusu, Baloma 5:3-5 elobi boye: “Tiká mpe tósepela ntango tozali na kati ya malɔzi, mpamba te toyebi ete bolɔzi ebotaka ezaleli ya koyika mpiko; ezaleli ya koyika mpiko, na ngala na yango, kondimama; kondimama, na ngala na yango, elikya, mpe elikya yango eyokisaka mawa te.” Soki lelo tozali koyika mpiko na mikakatano mpo tozali baklisto, tokobongisama mpo na koyikela mikakatano mosusu mpiko na mokili oyo mabe.
Yehova akozongisela biso
16. Mbano nini Yehova akopesa baklisto oyo bazali na elikya ya koyangela na likoló na ndenge bazali koyika mpiko na minyoko lelo oyo?
16 Ata soki tobungisi biloko na biso na ntango bazali kotɛmɛla to konyokola biso mpo tokangami na nzela ya solo, tokoki kozala na esengo ya koyeba ete Yehova akopesa biso mbano monene. Na ndakisa, ntoma Paulo akomelaki baklisto mosusu oyo bazalaki na elikya ya kokende na likoló boye: “Bondimaki na esengo kopunzama ya biloko na bino, koyebáká ete bozali na eloko moko ya malamu mingi mpe oyo eumelaka,” elingi koloba kokóma bakonzi na Bokonzi ya Nzambe. (Baebele 10:34) Kanisá esengo oyo bakozala na yango ntango bakosopela bato oyo bakofanda na mokili ya sika ebele ya mapamboli na litambwisi ya Yehova ná Klisto. Maloba ya ntoma Paulo epai ya baklisto ya sembo ezali mpenza solo ete: “Namonaka ete bampasi ya eleko oyo ezali eloko te liboso ya nkembo oyo ekomonana na kati na biso.”—Baloma 8:18.
17. Yehova akosala nini mpo na basaleli na ye ya sembo oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé?
17 Ezali mpe bongo mpo na baoyo bazali na elikya ya kofanda awa na mabelé; ata soki babungisi to batiki biloko nini mpo na kosalela Yehova, ye akopesa bango mbano monene na makambo oyo akosala na mikolo ezali koya. Akopesa bango bomoi ya kokoka mpe ya libela na paladiso awa na mabelé. Na mokili ya sika, Yehova “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.” (Emoniseli 21:4) Elaka moko malamu mpenza! Eloko moko te oyo tokoki kotika, ezala na mposa na biso moko to te, mpo na kosalela Yehova ekoki kokokana na bomoi malamu oyo tozali kozela, oyo Yehova akopesa basaleli na ye ya sembo oyo bazali koyika mpiko.
18. Elaka nini ya kobɔndisa Yehova apesi biso na kati ya Liloba na ye?
18 Mpasi moko te oyo mbala mosusu tosengeli naino koyikela mpiko ekopekisa biso tózwa bomoi ya seko na mokili ya sika oyo Nzambe alaki. Ntango tokozala na bomoi ya malamu mingi na mokili ya sika, tokobosana mpasi yango nyonso. Yisaya 65:17, 18 elobi boye: “Makambo ya liboso makokanisama te, makoya mpe na motema te. Kasi bósepela mpe bóyoka esengo libela na yango ezali ngai kotonga.” Yango wana, Yakobo, ndeko ya Yesu, akomaki likambo oyo ebongi ete: “Tolobaka ete baoyo basili koyika mpiko bazali bato ya esengo.” (Yakobo 5:11) Soki toyiki mpiko liboso ya bampasi oyo tozali kokutana na yango, tokozwa matomba banda sikoyo mpe na mikolo ekoya.
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini bampasi ya bato ebandaki?
• Bampasi ekoki kozala na matomba nini mpo na bato oyo baponami mpo na koyangela mabelé mpe mpo na baoyo bakofanda awa na mabelé?
• Mpo na nini tokoki kozala na esengo lelo oyo atako tozali na bampasi?
[Elilingi na lokasa 27]
Bankɔkɔ na biso bazalaki na elikya ya bomoi ya malamu mingi
[Elilingi na lokasa 29]
Komona bampasi ya bato ebongisaki Yesu mpo na kozala Mokonzi mpe Nganga-nzambe Monene ya malamu
[Elilingi na lokasa 31]
Bantoma ‘basepelaki mpamba te batángamaki bato oyo babongi kosambwisama’ mpo na kondima na bango