MOKAPO 13
Bato oyo bakómaki bayekoli ya Yesu
Mobali oyo nkombo na ye nani, mpe ndenge nini akómaki moyekoli ya Yesu?
OYEBI moto oyo asalelaki Nzambe malamu koleka bato nyonso?— Olobi solo, ezali Yesu Klisto. Okanisi ete biso mpe tokoki kozala lokola ye?— Biblia elobi ete atikelaki biso ndakisa. Mpe azali kobenga biso tókóma bayekoli na ye.
Oyebi soki kozala moyekoli ya Yesu elimboli nini?— Elimboli makambo ebele. Ya liboso, tosengeli koyekola epai na ye. Kasi, esuki kaka wana te. Tosengeli mpe kondima mpenza maloba na ye. Soki tosali bongo, tokokokisa makambo oyo azali koyebisa biso.
Bato mingi balobaka ete bandimelaka Yesu. Okanisi ete bango nyonso bazali mpenza bayekoli na ye?— Te, mingi kati na bango bazali bayekoli na ye te. Ekoki kozala ete bakendaka na ndako-nzambe. Kasi, mingi kati na bango bayekolá naino te makambo oyo Yesu ateyaki. Ɛɛ, kaka bato oyo balandaka ndakisa ya Yesu nde bazali bayekoli na ye.
Sikoyo, tólobela bato oyo bazalaki bayekoli ya Yesu ntango azalaki naino awa na mabelé. Moko na bato ya liboso oyo bakómaki bayekoli ezali bongo Filipo. Filipo akei kobenga moninga na ye Natanaele (nkombo na ye mosusu Balatelemi), oyo omoni afandi na nse ya nzete. Ntango Natanaele ayei epai na Yesu, Yesu alobi: ‘Talá, mwana ya Yisalaele ya solosolo, mobali ya sembo.’ Natanaele akamwi mpe atuni: ‘Oyebi ngai ndenge nini?’
Yesu azali kobenga banani mpo bázala bayekoli na ye?
Yesu alobi ete: “Liboso Filipo abenga yo, ntango ozalaki na nse ya nzete ya figi, namonaki yo.” Natanaele akamwi ndenge Yesu ayebi malamu esika oyo azalaki, yango wana Natanaele alobi: “Ozali Mwana ya Nzambe, ozali Mokonzi ya Yisalaele.”—Yoane 1:49.
Yuda Mokeliota, Yuda (nkombo na ye mosusu Tadai), mpe Simona
Bato mosusu bakómaki bayekoli ya Yesu mokolo moko liboso ete Filipo ná Natanaele bákóma bayekoli. Ezali: Andele ná ndeko na ye Petelo, Yoane mpe mbala mosusu ná ndeko na ye Yakobo. (Yoane 1:35-51) Kasi, nsima ya mwa mikolo, bayekoli minei wana bazongelaki mosala na bango ya koboma mbisi. Mokolo mosusu na nsima, ntango Yesu azali kotambola na libongo ya Mbu ya Galilai, amoni Petelo ná Andele bazali kobwaka minyama na bango na mai. Yesu abengi bango, alobi: “Bólanda ngai.”
Yakobo (mwana ya Alafai), Toma, mpe Matai
Ntango Yesu apusani mwa liboso, amoni Yakobo ná Yoane. Bazali na kati ya masuwa elongo na tata na bango, bazali kobongisa minyama na bango. Yesu abengi mpe bango bálanda ye. Olingaki kosala nini soki Yesu abengaki yo? Olingaki mbala moko kolanda ye?— Mibali wana bayebi soki Yesu azali nani. Bayebi ete Nzambe nde atindi ye. Yango wana, batiki mbala moko mosala na bango ya koboma mbisi mpe balandi Yesu.—Matai 4:18-22.
Natanaele, Filipo, mpe Yoane
Ntango mibali yango bakómaki bayekoli ya Yesu, bazalaki kosala ntango nyonso kaka makambo ya malamu?— Te. Mbala mosusu ozali koyeba lisusu ete bawelanaki kutu mpo na koyeba nani kati na bango aleki baninga. Kasi bazalaki koyokela Yesu, mpe bazalaki kondima kobongola makanisi mpe bizaleli na bango. Soki tozali kondima kobongola makanisi mpe bizaleli na biso, biso mpe tokoki kokóma bayekoli ya Yesu.
Yakobo (ndeko ya Yoane), Andele, mpe Petelo
Yesu abengaki bato ya ndenge nyonso mpo bákóma bayekoli na ye. Mokolo moko, elenge mobali moko oyo azalaki mokonzi mpe moto ya bomɛngo akendaki epai ya Yesu mpe atunaki ye soki asengeli kosala nini mpo na kozwa bomoi ya seko. Ntango mokonzi wana alobaki ete atosaka mibeko ya Nzambe banda bomwana na ye, Yesu alobaki na ye ete: “Yaká landá ngai.” Oyebi soki asalaki nini?—
Ntango moto yango ayebaki ete kozala moyekoli ya Yesu ezali likambo moko ya ntina mingi koleka kozala moto ya bomɛngo, azalaki lisusu na esengo te. Moto yango akómaki moyekoli ya Yesu te mpo alingaki mbongo na ye mingi koleka Nzambe.—Luka 18:18-25.
Ntango Yesu akokisaki mbula mobimba na ndambo na mosala ya kosakola, aponaki mibali 12 na kati ya bayekoli na ye mpo bázala bantoma na ye. Bantoma ezali bato oyo Yesu atindaki mpo na kokokisa mosala moko ya ntina mingi. Oyebi bankombo na bango?— Tómeka naino koyeba bankombo na bango. Talá bililingi na bango, mpe tángá bankombo na bango. Meká sikoyo kotánga bankombo na bango na motó.
Basi nini bazalaki kosalisa Yesu ntango azalaki kosakola?
Nsukansuka, moko na bantoma 12 akómaki moto mabe. Nkombo na ye Yuda Mokeliota. Na nsima, baponaki moyekoli mosusu mpo akóma ntoma. Oyebi nkombo na ye?— Nkombo na ye ezalaki Matiasi. Na nsima, Paulo ná Balanabasi bakómaki mpe bantoma, kasi bazalaki kati ya bantoma 12 te.—Misala 1:23-26; 14:14.
Ndenge toyekolaki yango na Mokapo 1 ya buku oyo, Yesu azalaki kosepela mingi na bana mike. Mpo na nini?— Mpo ayebaki ete bango mpe bakoki kokóma bayekoli na ye. Kutu, bana mike bakoki ntango mosusu koloba makambo oyo ekoki ata kotinda mikóló ete báyoka mpe básepela koyekola makambo mosusu ya Moteyi Monene.
Basi mingi mpe bakómaki bayekoli ya Yesu. Basi mosusu bazalaki kolanda ye ntango azalaki kokende na bingumba mosusu mpo na kosakola, na ndakisa Malia Magadalena, Yoana ná Suzana. Ekoki mpe kozala ete bazalaki kolambela ye biloko ya kolya mpe kosukolela ye bilamba.—Luka 8:1-3.
Yo mpe olingi kozala moyekoli ya Yesu?— Yebá lisusu likambo oyo: koloba kaka na monɔkɔ ete tozali bayekoli na ye ekoki te. Tosengeli komonisa ete tozali bayekoli na ye na bisika nyonso, kasi kaka te ntango tokei na makita ya boklisto. Okoki koyeba bisika nini mosusu oyo tosengeli komimonisa mpenza ete tozali bayekoli ya Yesu?—
Ɛɛ, tosengeli komonisa yango na ndako. Kasi esika mosusu mpe ezali bongo na kelasi. Likambo oyo ngai ná yo tosengeli kobosana te yango oyo: Mpo na kozala moyekoli ya solosolo ya Yesu, tosengeli kosala makambo ndenge ye asalaki, mokolo mobimba, mokolo na mokolo, ezala na esika nini oyo tozali.
Esika nini ezali mpenza na ntina tómimonisa ete tozali bayekoli ya Yesu?
Sikoyo, tótánga makambo oyo Biblia elobi mpo na bayekoli ya Yesu na Matai 28:19, 20; Luka 6:13-16; Yoane 8:31, 32; mpe 1 Petelo 2:21.