Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jy mok. 34 lok. 82-lok. 83 par. 6
  • Yesu aponi bantoma zomi na mibale

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu aponi bantoma zomi na mibale
  • Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Masolo mosusu
  • Yesu aponi bantóma na ye
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Bato oyo bakómaki bayekoli ya Yesu
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Yesu ateyi na ngomba
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Yesu aponi bantoma zomi na mibale
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
jy mok. 34 lok. 82-lok. 83 par. 6
Yesu akei na ngomba

MOKAPO 34

Yesu aponi bantoma zomi na mibale

MARKO 3:13-19 LUKA 6:12-16

  • BANTOMA 12

Eleki soki mbula moko na ndambo banda Yoane Mobatisi alobaki ete Yesu azali Mwana-Mpate ya Nzambe. Ntango Yesu abandi mosala na ye, bato mosusu ya mitema sembo bakómi bayekoli na ye, na ndakisa, Andre, Simo Petro, Yoane, ekoki kozala mpe Yakobo (ndeko ya Yoane), Filipe mpe Bartelemi (oyo babengaka mpe Natanaele). Na nsima, bato mosusu mpe balandaki Kristo.​—Yoane 1:45-47.

Sikoyo ntango ekoki mpo Yesu apona bantoma na ye. Bango bakozala baninga na ye ya motema mpe akopesa bango formasyo ya sikisiki. Kasi, liboso Yesu apona bango, akei na ngomba, mbala mosusu oyo ezali pene na Mbu ya Galile, mosika te na Kapernaume. Abondeli butu mobimba, ekoki kozala mpo Nzambe apesa ye bwanya mpe apambola ye. Mokolo oyo elandi, abengi bayekoli na ye mpe aponi 12 kati na bango mpo bázala bantoma na ye.

Yesu aponi bato motoba oyo totángi na ebandeli, aponi mpe Matai oyo azalaki na biro ya kokɔngɔla mpako. Bato mitano oyo batikali ezali Yuda (oyo babengi mpe Tade mpe “mwana ya Yakobo”), Simo moto ya Kanana, Toma, Yakobo mwana ya Alfe, mpe Yuda Mokeriota.​—Matai 10:2-4; Luka 6:16.

Yesu abondeli liboso ya kopona bantoma 12

Bayekoli yango 12 bazali kotambola elongo na Yesu mpe ayebi bango malamu. Basusu bazali bandeko na ye. Emonani ete Yakobo ná Yoane bazali bana ya ndeko ya Maria. Mpe soki ndenge basusu bakanisaka, ete Alfe azalaki ndeko ya Yozefe, tata-mobɔkɔli ya Yesu, boye ntoma Yakobo mosusu, mwana ya Alfe, azali mpe ndeko ya Yesu.

Ya solo, Yesu azali na mokakatano te mpo na koyeba nkombo ya bantoma na ye. Kasi, yo oyebi nkombo na bango? Mpo na kosalisa yo, simbá ete bayekoli mibale nkombo na bango Simo, mibale mosusu nkombo na bango Yakobo mpe mibale mosusu Yuda. Simo (Petro) azali ndeko ya Andre, mpe Yakobo (mwana ya Zebede) azali ndeko ya Yoane. Yango nde sekele ya koyeba nkombo ya bantoma 8 ya Yesu. Minei oyo batikali ezali Matai mokɔngɔli-mpako, Toma oyo atyaki ntembe, Natanaele oyo Yesu abengaki ye na nse ya nzete, mpe moninga na ye Filipe.

Bantoma 11 bazali bato ya Galile, epai Yesu akolá. Natanaele azali moto ya Kana. Filipe, Petro, ná Andre bazali bato ya Betesaida. Na nsima, Petro ná Andre bakómaki kofanda na Kapernaume esika oyo mbala mosusu Matai azalaki kofanda. Yakobo ná Yoane mpe bazali kofanda na Kapernaume to pene na yango, mpe bazalaki baluki-mbisi. Emonani ete kaka Yuda Mokeriota oyo atɛkaki Yesu nde azali moto ya Yudea.

  • Ekateli nini ya monene Yesu azwi nsima ya kobondela butu mobimba?

  • Banani bazali bantoma ya Yesu, mpe ndenge nini okoki koyeba nkombo na bango?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto