MOKAPO 24
Kokóma moyibi ata moke te!
MOTO moko asilá koyiba yo eloko moko boye?— Oyokaki ndenge nini?— Moto oyo ayibaki eloko yango azali moyibi, mpe moto moko te alingaka moyibi. Mpo na yo, moto akómaka moyibi ndenge nini? Abotamaka nde moyibi?—
Touti koyekola ete bato babotamaka na lisumu. Yango wana biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka. Kasi moto moko te abotamaka moyibi. Moyibi akoki kobima ata na libota oyo ezali malamu. Ntango mosusu, baboti na ye, bandeko na ye ya mibali mpe ya basi bazali miyibi te. Kasi mposa ya mbongo mpe ya biloko oyo moto akoki kosomba na mbongo nde ekoki kotinda ye akóma moyibi.
Mpo na yo, nani azali moyibi ya liboso?— Tiká tólobela likambo yango. Ntango Moteyi Monene azalaki na likoló, ayebaki moto yango. Moyibi yango azalaká anzelu. Lokola baanzelu nyonso oyo Nzambe asalaki, asalaki bango bikelamu ya kokoka, kasi ndenge nini anzelu wana akómaki moyibi?— Lokola toyekolaki yango na Mokapo 8 ya mokanda oyo, tomonaki ete anzelu wana azalaki na mposa ya eloko oyo ezalaki ya ye te. Oyebi lisusu eloko yango?—
Nsima wana Nzambe azalisaki mobali mpe mwasi ya liboso, anzelu wana azalaki na mposa ete bango mibale básambela ye. Kasi ye azalaki na lotomo wana te. Bango basengelaki kosambela kaka Nzambe. Kasi anzelu wana ayibaki lotomo yango! Lokola apusaki Adama ná Eva ete básambela ye, anzelu wana akómaki moyibi. Akómaki Satana Zabolo.
Eloko nini etindaka moto akóma moyibi?— Mposa ya kozala na eloko ya moto mosusu. Mposa wana ekoki kokóma makasi mpenza tii kosala ete ata bato ya malamu básala makambo ya mabe. Na bantango mosusu, bato oyo bakómaka miyibi babongolaka motema ata moke te mpo na kosala lisusu makambo ya malamu. Moko kati na bato yango azalaki ntoma ya Yesu. Nkombo na ye Yuda Mokeliota.
Yuda ayebaki ete koyiba ezali mabe, mpamba te bateyaki ye Mobeko ya Nzambe banda ntango azalaki mwana moke mpenza. Ayebaki kutu ete, na ntango moko boye, Nzambe alobaki uta na likoló mpe ayebisaki bato na ye ete: “Okoyiba te.” (Exode 20:15) Ntango Yuda akolaki, akutanaki na Moteyi Monene mpe akómaki moko na bayekoli na ye. Na nsima, kutu Yesu aponaki Yuda ete akóma moko na bantoma na ye 12.
Yesu ná bantoma na ye bazalaki kotambola elongo. Bazalaki kolya esika moko. Mpe mbongo nyonso oyo bazalaki kozwa bazalaki kotya yango na kɛsi moko. Yesu apesaki Yuda kɛsi yango mpo abatelaka yango. Kasi, mbongo yango ezalaki ya Yuda te. Bongo oyebi likambo nini Yuda asalaki nsima ya mwa mikolo?—
Mpo na nini Yuda azalaki koyiba?
Yuda abandaki kozwa mbongo na kɛsi ata bapesi ye ndingisa te. Azalaki kozwa yango ntango oyo bamosusu bazalaki komona ye te, mpe azalaki kutu koluka ndenge ya kozwa yango mingi koleka. Akómaki kokanisa kaka mbongo. Tiká tótala oyo mposa mabe wana ya mbongo ememaki ye na kosala mwa mikolo moke liboso ete Moteyi Monene abomama.
Malia, ndeko mwasi ya Lazalo oyo azalaki moninga ya Yesu, akamataki mafuta moko ya kitoko mpe asopaki yango na makolo ya Yesu. Kasi Yuda asepelaki te. Oyebi mpo na nini asepelaki te?— Alobaki ete asepelaki te mpo esengelaki bátɛka mafuta yango mpe mbongo oyo ekozwama bápesa yango babola. Kasi mposa na ye mpenza ezalaki nde ete mbongo ezala ebele na kɛsi mpo akoka koyiba yango.—Yoane 12:1-6.
Yesu ayebisaki Yuda ete atungisa Malia te, mpo asali likambo moko ya malamu mpenza. Yuda asepelaki te ntango Yesu ayebisaki ye bongo, yango wana akendaki epai ya banganga-nzambe bakonzi, oyo bazalaki banguna ya Yesu. Banganga-nzambe yango bazalaki na mposa ya kokanga Yesu, kasi mposa na bango ezalaki ya kokanga ye na butu mpo bato bákoka komona bango te.
Yuda ayebisaki banganga-nzambe yango ete: ‘Soki bopesi ngai mbongo, nakoyebisa bino ndenge bokoki kozwa Yesu. Bokopesa ngai mbongo boni?’
Banganga-nzambe yango bapesaki eyano ete: ‘Tokopesa yo mbongo ya palata ntuku misato.’—Matai 26:14-16.
Yuda azwaki mbongo yango. Ndenge oyo asalaki, ezalaki lokola nde azalaki kotɛkela bato wana Moteyi Monene! Yo okoki kondima moto asala likambo ya mabe ya ndenge wana?— Na mawa nyonso, yango nde likambo oyo emonanaka ntango moto akómi moyibi mpe azali koyiba mbongo. Azali kolinga mbongo mingi koleka bato to Nzambe.
Ntango mosusu okoki koloba ete: ‘Ata mokolo moko te nakolinga eloko moko boye koleka Yehova Nzambe.’ Napesi yo longonya mingi soki ozali na likanisi ya ndenge wana. Ekoki kozala ete Yuda azalaki na likanisi ya ndenge wana ntango Yesu aponaki ye azala ntoma. Ekoki mpe kozala ete bato mosusu oyo bakómá miyibi bazalaki na likanisi ya ndenge wana. Tiká tólobela mwa moke bamosusu kati na bato yango.
Makambo nini ya mabe Akana ná Davidi bakanisaki?
Moko nkombo na ye Akana, azalaki mosaleli ya Nzambe; ye azalaki na bomoi liboso Moteyi Monene abotama. Akana amonaki zambala moko ya kitoko, eteni moko ya wolo, mpe mwa ndambo ya mbongo ya palata. Biloko yango ezalaki ya ye te. Biblia elobi ete biloko yango ezalaki ya Yehova mpamba te yango ezalaki biloko oyo bazwaki epai ya banguna ya libota ya Nzambe. Kasi Akana alulaki biloko yango makasi tii ayibaki yango.—Yosua 6:19; 7:11, 20-22.
Yoká ndakisa mosusu. Na ntango ya kala Yehova aponaki Davidi azala mokonzi na libota ya Yisalaele. Mokolo moko, Davidi abandaki kotala Bata-seba, mwasi moko ya kitoko. Alandaki kaka kotala Bata-seba mpe kokanisa ndenge nini akozwa ye mpo asangisa na ye nzoto. Nzokande, Bata-seba azalaki mwasi ya Uliya. Eloko nini Davidi asengelaki kosala?—
Davidi asengelaki kotika likanisi ya koluka kozwa Bata-seba. Kasi atikaki likanisi yango te. Yango wana Davidi ayaki na ye na ndako na ye. Mpe na nsima asalaki nyonso mpo Uliya abomama. Mpo na nini Davidi asalaki makambo mabe wana?— Asalaki yango mpamba te atikaki te kolula mwasi ya moto mosusu.—2 Samwele 11:2-27.
Na ndenge nini Abesaloma azalaki moyibi?
Yehova abomaki Davidi te mpo abongolaki motema. Ata bongo, banda ntango wana, Davidi azwaki ebele ya mikakatano. Abesaloma, Mwana ya Davidi, alingaki alongola Davidi mokonzi mpo ye akóma mokonzi. Yango wana ntango bato bazalaki koya mpo na kokutana na Davidi, Abesaloma azalaki koyamba bango mpe kopesa bango bízi. Biblia elobi ete: “Abesaloma azalaki koyiba mitema ya bato ya Yisalaele.” Andimisaki bato wana ete bálinga ye azala mokonzi, kasi bálinga Davidi te.—2 Samwele 15:1-12, NW.
Esilá kokómela yo olula makasi eloko moko boye, ndenge Akana, Davidi, mpe Abesaloma balulaki?— Soki eloko yango ezali ya moto mosusu, mpe ozwi yango kozanga ndingisa, tokoloba ete oyibi yango. Oyebi lisusu eloko oyo Satana, moyibi ya liboso, alulaki?— Azalaki na mposa ete bato básambela ye, kasi básambela Nzambe te. Na bongo, tokoloba ete Satana azalaki koyiba ntango andimisaki Adama ná Eva ete bátosa ye.
Soki eloko ezali ya moto, nkolo na yango azali na lotomo ya koloba nani akoki kosalela yango. Na ndakisa, ekoki kozala ete okei kosakana na bana mosusu na ndako na bango. Ekozala malamu ozwa eloko na ndako na bango mpo omema yango na ndako na bino?— Te, okomema yango kaka soki tata to mama na bango apesi yo yango. Soki ozwi eloko mpe okei na yango epai na bino kozanga ete osɛnga bango, tokoloba ete oyibi yango.
Mpo na nini ekoki kokómela yo ete oyoka mposa ya koyiba?— Mpo olingi kozala na eloko oyo ezali ya yo te. Ata soki moto mosusu amoni yo te ntango ozwi yango, nani amoni yo?— Yehova Nzambe. Mpe tosengeli kobosana te ete Nzambe ayini koyiba. Na bongo, soki olingi kokóma moyibi ata moke te, osengeli kolinga Nzambe mpe bazalani na yo.
Biblia elobi polele ete koyiba ezali mabe. Tosɛngi yo otánga Malako 10:17-19; Baloma 13:9; mpe Baefese 4:28.