Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/4 nk. 19-21
  • Yango ezali mpenza koyiba?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yango ezali mpenza koyiba?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ezali mbongo ya nani?
  • Kodefa to koyiba?
  • Kotya elikya epai na Nzambe
  • Kokóma moyibi ata moke te!
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Kotalela mbongo na ndenge ebongi
    Lamuká!—2015
  • Ezali solo ete mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mbongo
    Lamuká!—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/4 nk. 19-21

Yango ezali mpenza koyiba?

ABIODUN azalaki kapita ya basáli na lotɛ́lɛ moko monene na mboka Nigéria. Ntango azalaki kokanga esika ya kolya na mpokwa moko, amonaki pɔtɔmɔni oyo ezalaki na mbongo oyo motuya na yango ekokanaki na badolare 1 827. Kozanga koumela, apesaki mbongo yango na nkolo na yango, mwasi moko oyo azalaki kolala na lotɛ́lɛ, oyo ayaki koluka yango. Bakambi ya lotɛ́lɛ bapesaki Abiodun mbano ya mpɛ́tɛ mibale mpe bapesaki ye lifuti ya “mosáli ya malamu mpenza mpo na mbula wana.” Nkolo mbongo yango mpe apesaki ye lifuti.

Zulunalo moko ya mboka yango, na nkombo Quality, elobelaki likambo yango, na kobéngáká Abiodun “Mosamalia Malamu.” Ntango zulunalo Quality etunaki ye soki amekamaki te na kobomba mbongo yango mpo na ye moko, Abiodun alobaki ete: ‘Nazali Motatoli ya Yehova. Mpo na yango, soki namoni eloko ya moto mosusu, nakozongisa yango epai na nkolo na yango.’

Bato mingi ya zingazinga bakamwaki na ntina na ezaleli ya kolongobana ya Abiodun. Baninga ya Abiodun oyo bazali Batatoli basepelaki na likambo oyo lisalemaki, kasi bakamwaki te. Na mabelé mobimba, Batatoli ya Yehova bayebani mpo na mitinda na bango mitombwami. Kati na bango, ezaleli ya kolongobana ezali likambo oyo emonanaka mbala na mbala; ezali lolenge na bango ya bomoi, ezali eteni ya ntina ya boklisto ya solo.

Nzokande, na bantango mosusu, makambo makoki kobima oyo kati na yango ezali mpasi mpo na kokesenisa likambo oyo lilongobani mpe oyo lizangi kolongobana. Talá ndakisa oyo. Festus, oyo azalaki kobatela mosolo ya lisangá ya Batatoli ya Yehova na Afrika ya Wɛ́sti, azalaki mpenza na bosɛnga ya mosolo.a Esengelaki ete básala mwasi na ye lipasó moko monene oyo minganga balobaki ete esengelaki kozelisama te. Lopitalo esɛngaki ete ndambo ya mosolo epesama liboso ya kosala lipasó yango.

Festus azalaki na mbongo te. Wana akutanaki na bato bakeseni mpo ete bádefisa ye mbongo, baboyaki. Bongo akanisaki na ntina na mosolo oyo azalaki kobatela ete: ‘Ezali malamu ete natika mwasi na ngai kokufa wana nakoki kopɛngola likámá yango? Mpo na nini nakoki “kodefa” te mosolo ya lisangá? Nakozongisa yango ntango bato bakofuta nyongo na ngai.’

Festus asalelaki mbongo oyo ezalaki ya ye te mpo na kofuta lopitalo. Likanisi na ye lizalaki malamu? Akoki kozala na elónga na oyo asalaki na kotalela likámá oyo akutanaki na yango?

Ezali mbongo ya nani?

Wana tozali kotalela mituna oyo, tiká tózongela kotalela na mokuse mwa makanisi na ntina na eutelo mpe mokano ya mosolo lokola oyo Festus azwaki. Mosolo yango mozali kouta na makabo ya bolingo malamu mapesami na basangani ya lisangá baoyo balingi kotombola losambo ya pɛto ya Yehova. (2 Bakolinti 9:7) Esalelami te lokola mosolo ya kofuta bato, mpamba te moto moko afutamaka kati na lisangá te. Nzokande, mosolo oyo mopesami mozali mbala mingi kosalelama mpo na kosomba mpe kobatela esika ya makita, mingimingi Ndako ya Bokonzi. Yango ezali kopesa bato banso esika kitoko mpe oyo ebongi epai bato​—bilenge mpe mikóló, bazwi mpe babóla​—bakoki kokutana mpo na koyekola Biblia.

Mosolo yango mozali ya nani? Ezali ya lisangá mobimba. Mosangani moko te ya lisangá akoki kozwa ekateli mpo na lolenge ya kosalela yango. Ya solo, lisangani ya bankulutu likopesaka nzela na kobimisa mosolo mpo na misala mikemike ya lisangá, kasi soki ezali na likambo moko monene oyo esɛngi kobimisama ya mosolo, bankulutu bakotunaka naino ndingisa ya lisangá.

Kodefa to koyiba?

Lokola azalaki na mokano ya kozongisa mosolo yango nokinoki wana akozwa yango, Festus atalelaki oyo ye asalaki lokola kodefa. Nzokande, búku Webster’s New Dictionary of Synonyms esaleli maloba mosusu mpo na kolimbola “kokamata mpe kolongola eloko ya moto mosusu mbala mingi na kobombama kozanga ete ayeba mpe ntango nyonso kozanga kozwa ndingisa na ye.” Maloba yango mazali “koyiba” mpe “moyibi.” Kozanga kosɛnga nzela to ndingisa, Festus akamataki eloko ya lisangá. Mpo na yango, azalaki na ekweli ya koyiba. Azalaki moyibi.

Ya solo, bonene ya mabungá ekeseni engebene mokano oyo etindi moto na koyiba. Tokoki komona yango na ndakisa ya Yuda Mokeliota, oyo azwaki mokumba ya kobomba mosolo oyo Yesu mpe bantoma na ye ya sembo bazalaki na yango. Biblia elobi ete: “[Yuda] ajalaki moyibi mpe abateli ebombelo na mosɔlɔ mpe abɔtɔli yango ebwakami wana.” (Yoane 12:6) Lokola apusamaki na motema mabe mpe na lokoso mpenza, Yuda asalaki mpenza mabe koleka. Na nsima, akweaki kino na kotɛka Mwana na Nzambe​—mpo na palata 30.​—Matai 26:14-16.

Nzokande, Festus apusamaki na komibanzabanza mpo na mwasi na ye. Yango elingi koloba ete azalaki na ekweli te? Ezali bongo te. Talá oyo Biblia elobi na ntina ya koyiba kati na ezalela mosusu oyo emonani lokola ete bomoi ezali na likámá: “Bato bakotiola moyibi tɛ sɔkɔ akoyiba [mpo na, NW] kotondisa motema na ye wana eyoki ye njala? Kasi sɔkɔ amɔnani, akojongisa kino mbala nsambo, akobimisa bilɔkɔ yɔnsɔ na ndako na ye.” (Masese 6:30, 31) Na maloba mosusu, soki bakangi ye, moyibi akofuta etumbu nyonso esengami na mibeko. Engebene mibeko ya Mose, moyibi asengelaki kofuta mabe na ye. Na yango, na esika ya kolendisa to kolimbisa koyiba, Biblia ekebisi ete ata wana bomoi ezali na likámá, koyiba ekoki komema na kobungisa biloko, na nsoni, mpe oyo eleki ntina, na kobungisa ngolu ya Nzambe.

Lokola bazali Batatoli ya Yehova, baklisto nyonso ya solo, mingi mpenza baoyo bazali na mikumba kati na lisangá basengeli kozala ndakisa malamu, “na ekweli tɛ.” (1 Timɔtɛ 3:10) Festus azwaki mbongo oyo atyelaki yango motema te, mpe na yango azongisaki te mbongo oyo akamataki. Likambo oyo asalaki eyebanaki. Nini ekómelaki ye? Soki azalaki moyibi oyo azangi kobongola motema, mbɛlɛ abimisamaki na lisangá ya pɛto ya boklisto. (1 Petelo 4:15) Kasi motema na ye motutamaki mpe abongolaki motema. Na yango, atikalaki kati na lisangá, kasi abungisaki mikumba na ye nyonso.

Kotya elikya epai na Nzambe

Ntoma Paulo akebisaki ete soki moto oyo amitángi mosaleli ya Yehova akoyiba, yango ekomema nsoni likoló na nkombo ya Nzambe mpe likoló na bato oyo batángami na nkombo na Ye. Paulo akomaki ete: “Yo, . . . okolakisa moto mosusu, ojali komilakisa yɔ mɔkɔ tɛ? Ejali yɔ kosakola ete, ‘Yiba tɛ! Yɔ mɔkɔ ojali koyiba? Ekomami ete, Bapakano bakotuka nkombo na Njambe mpɔ na bino.’”​—Baloma 2:21, 24.

Agulu, moto ya bwanya na ntango ya kala, amonisaki likanisi bobele moko. Asɛngaki kati na libondeli ete “ajala mobola tɛ mpe . . . ayiba tɛ, abimisa nkombo na Njambe mpamba tɛ.” (Masese 30:9) Talá ete moto ya bwanya andimaki ete bobólá ekoki kobimisa mikakatano oyo mikoki kotya mosembwi na masɛnginya ya koyiba. Ya solo, mpasi ekoki komeka kondima ya moklisto ete atya ntembe na makoki ya Yehova mpo na kokokisa bamposa ya libota na ye.

Nzokande, Batatoli ya sembo ya Yehova, ata baoyo bazali babólá, bandimi ete Nzambe “akojongisa libonja epai na bango bakolukaka ye.” (Baɛbɛlɛ 11:6) Bayebi ete Yehova apesaka basembwi libonza wana azali kosalisa bango na kokokisa bamposa na bango. Yesu amonisaki yango polele kati na Lisoló na ye likoló na Ngomba, wana alobaki ete: “Boye, bomitungisa tɛ mpɔ na koloba ete, Tokolia nini? Sɔkɔ ete, Tokomɛla nini? Sɔkɔ ete, Tokolata nini? . . . Jambi Tata na bino na likoló ayebi ete bojali na bosenga na yango yɔnsɔ. Bolukaka nde liboso Bokonji na Njambe mpe boyɛngɛbɛnɛ na ye mpe bilɔkɔ oyo yɔnsɔ ikobakisama na bino.”​—Matai 6:31-33.

Lolenge nini Nzambe akokisaka bamposa ya baoyo bazali na bosɛnga kati na lisangá ya boklisto? Na mitindo mingi. Moko na yango ezali na nzela ya baninga oyo bazali bandimi. Libota ya Nzambe lizali komonisa bolingo ya solo moko mpo na mosusu. Bazali kotalela na likebi mingi elendiseli oyo ya Biblia, ete: “Nde sɔkɔ moto nani, oyo ajali na bilɔkɔ na mokili, amɔni ndeko na ye kojanga mpe akangeli ye motema na ye, bolingo na Njambe eumeli kati na ye boni? Bana, bolingana na bolingo na maloba tɛ sɔkɔ na monɔkɔ tɛ kasi na bolingo na misala mpe na sɔlɔ.”​—1 Yoane 3:17, 18.

Kati na mokili mobimba, na masangá koleka 73 000, koleka milió minei na ndambo ya Batatoli ya Yehova bazali kosala molende mpo na kosalela Nzambe engebene mitindá ya sembo. Bayebi ete Nzambe akotika basembwi na ye soko moke te. Baoyo basili kosalela Yehova na boumeli ya mibu mingi bakoki kotombola mingongo na bango mpo na kondima elongo na mokonzi Davidi, oyo akomaki ete: “Najalaki elɛngɛ mpe nakomi mobange, nde naino namɔni moyɛngɛbɛni tɛ oyo atikami, to mwana na ye oyo akolɔmbaka [limpa, NW].”​—Njembo 37:25.

Oyo nde likambo malamu mingi kozala na kondima epai na Nzambe oyo apesaki maloba wana mapemami, na esika ya komitika komekama na koyiba mpe mbala mosusu kobungisa ngolu ya Nzambe mpo na libela!​—1 Bakolinti 6:9, 10.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Nkombo ebongwanaki.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto