Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • bh lok. 221-lok. 222 par. 2
  • Yesu abotamaki na sanza ya Desɛmbɛ?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu abotamaki na sanza ya Desɛmbɛ?
  • Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Masolo mosusu
  • Yesu abotami wapi mpe ntango nini?
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu abotamaki na dati nini?
    Lamuká!—2009
  • Yesu abotami: epai wapi mpe ntango nini?
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Yesu abotamaki nde na eleko ya mpiɔ?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Biblia eteyaka mpenza nini?
bh lok. 221-lok. 222 par. 2

APƐNDISI

Yesu abotamaki na sanza ya Desɛmbɛ?

BIBLIA eyebisi biso te mokolo oyo Yesu abotamaki. Kasi, elobeli makambo oyo endimisi biso ete abotamaki na sanza ya Desɛmbɛ te.

Tótala naino soki makambo ezalaka ndenge nini na sanza ya Desɛmbɛ mpe mwa moke liboso to nsima na yango na Beteleme, esika oyo Yesu abotamaki. Na manaka ya Bayuda, sanza ya Kislev (ndambo ya sanza ya Novɛmbɛ ná ndambo ya sanza ya Desɛmbɛ) ezalaki ntango moko ya malili makasi mpe ya mbula. Sanza oyo elandi yango ezalaki Tébeth (ndambo ya sanza ya Desɛmbɛ ná ndambo ya sanza ya Yanuali). Ezalaki sanza ya malili makasi koleka, mpe ntango mosusu mbula-mpɛmbɛ (neige) ezalaki kokwea na bangomba. Tótala sikoyo oyo Biblia elobi mpo na etúká yango: bantango wana ezalaka eleko ya bambula, ya molunge to ya mpiɔ?

Ezela, moko ya bato oyo bakomaki Biblia, amonisi ete bato bayebaki ete Kislev ezali sanza moko ya malili mpe mbula ebɛtaka mingi. Alobi liboso ete bato ebele bayanganaki na Yelusaleme “na sanza ya libwa [Kislev] na mokolo ya ntuku mibale ya sanza”; na nsima, abakisi ete bato bazalaki “kolɛngalɛnga . . . mpo na mbula mingi.” Lokola bambula ebɛtaka mingi na sanza wana, bato oyo bayanganaki bango moko balobaki boye: “Ezali ntango ya mbula mingi, toyebi kotɛlɛma libándá te.” (Ezela 10:9, 13; Yilimia 36:22) Yango wana, na sanza ya Desɛmbɛ, babateli ya mpate ya Beteleme mpe ya bamboka ya zingazinga ná bitonga na bango bazalaki kofanda libándá te na butu!

Nzokande, Biblia elobi ete na butu oyo Yesu abotamaki, babateli ya mpate bazalaki kobatela bampate na bango libándá. Kutu, Luka, moko ya bato oyo bakomaki Biblia, amonisi ete na ntango wana, babateli ya mpate “bazalaki kofanda libándá mpe kolekisa bokɛngɛli ya butu na kobatela bitonga na bango” pene na Beteleme. (Luka 2:8-12) Awa, tomoni ete babateli ya mpate bazalaki mpenza kofanda libándá, balobi te ete bazalaki kotambola na moi mpo na kozwa mwa mopɛpɛ. Bazalaki libándá ná bitonga ya bampate na bango na butu. Bakokaki kofanda libándá bongo soki ezalaka na Desɛmbɛ, sanza oyo na Beteleme malili mpe mbula ezalaka mingi? Te. Na yango, makambo oyo elekaki ntango Yesu abotamaki emonisi ete abotamaki na sanza ya Desɛmbɛ te.a

Liloba ya Nzambe eyebisi biso polele mokolo oyo Yesu akufaki, kasi elobi kaka mwa makambo moke oyo ekoki kosalisa biso tóyeba ntango oyo Yesu abotamaki. Likambo yango etindi biso tókanisa maloba oyo Mokonzi Salomo alobaki: “Nkombo malamu eleki mafuta na motuya; mokolo ya kufa eleki mokolo ya kobotama na malamu.” (Mosakoli 7:1) Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te soki Biblia elobeli makambo mingi oyo etali mosala ya Yesu mpe liwa na ye, kasi elobeli kaka makambo moke oyo etali ntango oyo abotamaki.

Babateli ya mpate ná bibwele na bango bazali libanda na butu pembeni ya Beteleme

Ntango Yesu abotamaki, babateli ya mpate ná bampate na bango bazalaki libándá na butu

a Soki olingi koyeba makambo mosusu, talá buku Ndenge ya kosolola na bato na Makomami , na nkasa 44-47, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto