Yesu abotamaki nde na eleko ya mpiɔ?
“MBULAMPƐMBƐ makasi ebebisi misala ya mokolo na mokolo kati na Yelusaleme” mpe “mbulampɛmbɛ enɔki mingi na etúká ya Nórdi na motindo oyo bato bakanisaki te.” Na 1992, motindo na maloba oyo mazwami na zulunalo The Jerusalem Post, matangamaki mbala na mbala na bafandi ya Ekólo Israël, na eleko ya mpiɔ makasi oyo emonanaki naino boye te na Ekólo Israël esili koleka ekeke moko sikawa.
Na Yanuáli, nsɔngé ya ngomba Helemona ezipamaki na bozindo ya bamɛtɛlɛ 7 kino bamɛtɛlɛ 12 na mbulampɛmbɛ, mpe eleko ya mpiɔ ezalaki naino kolandana. Longwa na ngomba patátálú ya Golan mpe na etúká ya Nórdi ya Galilai, kokita kino na etúká ya Négueb, na Súdi, kolekáká na Yelusaleme mpe na Bɛtɛlɛmɛ, mboka ezali penepene wana (talá fɔtɔ́ ya ezipeli) mbala na mbala misala ya mokolo na mokolo na Ekólo Israël ezalaki kobeba mpo na mbulampɛmbɛ, oyo ata ezali kitoko na kotala mpe ezali komonana ete ezali pɛtɛpɛtɛ, nzokande ezali na nguya. Lisoló moko ya zulunalo The Jerusalem Post liyebisaki ete: “Lobi loleki, mbulampɛmbɛ enɔkaki mingi mpe elóngaki kosala oyo mandóki makasi ya Katyusha ekokaki te kosala yango na poso euti koleka, ezipaki bandako minene mpe epekisaki bato ete babima soko moke te na bandako na bango.”
Eleko wana ya mpiɔ makasi eyeisaki makámá minene bobele na bingumba minene te. Mbándo (rapport) epesamaki ete nkámá mingi ya ngombe mpe bana na bango, mpe bankóto mingi ya nsoso ekufaki na malili, na butu oyo mpiɔ ezalaki koleka oyo ya filigó. Lokola soki nde mbulampɛmbɛ ekokaki te, bambula ya mabángá ya malili makasi ebimisaki lisusu makámá. Mokolo moko, bilenge mibali mibale babateli na mpate, baoyo bazalaki kosala nyonso mpo na kobikisa ndambo mosusu na bampate na bango oyo ekumbamaki na mpela, babendamaki mpe bazindaki na mai.
Atako bileko nyonso ya mpiɔ bizalaka mpenza motindo yango te kuna na Moyen-Orient, nzokande Eretz, zulunalo moko ya Ekólo Israël eyebisaki ete: “Boyekoli ya ntango mpe bileko oyo esalemaki mpe ekomamaki kati na mikanda na mboka Israël mpo na mibu 130 oyo misili koleka, emonisi ete mbulampɛmbɛ na Yelusaleme ezali mingi koleka lolenge oyo bato bakanisaka yango . . . Katikati na mobu 1949 mpe mobu 1980, engumba ya Yelusaleme ezwaki bileko ya mpiɔ oyo bizalaki na mbulampɛmbɛ mbala ntuku mibale na minei.” Kasi yango ezali bobele mpo na koyekola ntango mpe bileko mpe bamposa ya bato, to ezali nde na ndimbola mpo na bayekoli ya Biblia?
Ezali na ndimbola nini mpo na bayekoli ya Biblia?
Wana bazali kokanisa na kobotama na Yesu, bato mingi bazali kokanisa na elyelo ya banyama oyo ekotalisamaka mbala na mbala na Eyenga ya mbótámá. Na mbeto, mwana Yesu alingami na bilamba, abatelami na mama na ye, wana mbulampɛmbɛ ezipi matiti nyonso zingazinga. Kasi likanisi oyo liyebani mingi, liyokani mpenza na lolenge oyo Biblia ezali komonisa likambo wana ya kala?
Luka, mokomi na Biblia, ayebisi lisoló ya sikisiki na ntina na kobotama na Yesu, ete: “Bobele na etúká wana, ezalaki na babateli na mpate oyo bazalaki kofanda libándá mpe na butu, bazalaki kokɛngɛla bitongá na bango. Mpe anzelu ya Yehova abimi pene na bango pwasa, mpe nkembo ya Yehova engɛngi zingazinga na bango, mpe babangaki mingi. Kasi anzelu alobaki na bango ete: ‘Bóbanga te, mpamba te nazali koyebisa bino nsango malamu ya esengo monene oyo bato nyonso bakozala na yango, mpo ete lelo, na [Bɛtɛlɛmɛ] mboka ya Davidi, Mobikisi abotameli bino, ye Klisto Nkolo. Mpe oyo ezali elembo mpo na bino: bokokuta mwana azingelami bilamba mpe alali na elyelo ya bibwélé.’ Mpe mbala moko bibele na limpinga na likoló bazwanaki na anzelu, kokumisa Nzambe ete: ‘Nkembo na Nzambe kuna na likoló, mpe kimya na mabelé kati na bato ya boboto.’”—Luka 2:8-14, NW.
Soki otangi lisoló oyo liboso na moto moko ya ekólo Israël mpe soki otuni ye ete, yango esalemaki na eleko nini ya mobu, mbɛlɛ akoyanola yo ete: “Katikati na Apríli mpe Ɔkɔtɔ́bɛ.” Mpo na nini? Eyano ezali mpasi te. Kobanda Novɛ́mbɛ kino Mársi ezali malili, eleko ya mbula na Israël, mpe mokolo ya Desɛ́mbɛ 25 ezali mpenza na eleko ya mpiɔ. Babateli na mpate bakokaki kozala na libándá te, kosɛnzela bitongá na bango na butu, na bilanga. Likambo ya kokamwa ezali te soki totaleli mwa makambo oyo makomamaki na bazulunalo, ndenge totangaki yango na ebandeli ya lisoló oyo. Nzokande, Bɛtɛlɛmɛ, epai Yesu abotamaki, ezali na likoló mpenza mpe ekabwani na Yelusaleme bobele na ntáká ya mwa bakilomɛtɛlɛ. Ata na bambula oyo eleko ya mpiɔ ezali makasi mingi te, sanza ya Desɛ́mbɛ ezalaka malili mingi na butu.—Mika 5:2; Luka 2:15.
Botaleli ya lisoló na ntina na ntango oyo Yesu abotamaki, emonisi polele ete abotamaki na butu moko ya Desɛ́mbɛ te, oyo ezalaka eleko ya mbulampɛmbɛ. Maria, mama na Yesu, asalaki mobembo longwa epai na bango na Nazarete kino na Bɛtɛlɛmɛ, nzokande azalaki pene na kobota. Ye mpe Yozefe batosaki bongo mitinda mipesamaki na Kaisala Augusto, moyangeli Moloma, mpo na kokomisa nkombo na mikanda ya Leta. (Luka 2:1-7) Lokola bazalaki koboya boyangeli ya Loma mpo na mpako makasi oyo esɛngisamaki na yango, Bayuda bazalaki pene na kotomboka. Loma ekokaki nde kolinga kosilikisa bango bobele mpamba na kosɛngisáká ete bato mingi básala mobembo mpo na kokomisa nkombo na mikanda ya Leta kati na mikakatano mingi mpe na eleko ya mpiɔ makasi? Ebongi na kokanisa ete yango esɛngisamaki na eleko oyo ezalaki malamu mpo na moto nyonso ete asala mobembo, ndakisa na eleko ya ebandeli ya malili, boye te?
Etangelí ya Biblia
Bilembeteli ya makambo na kala mpe oyo etali lolenge ya bileko, bimonisi Desɛ́mbɛ, to sanza nyonso mosusu ya eleko ya mpiɔ, lokola sanza oyo eyokani soko moke te na masoló ya kobotama na Yesu. Lisusu, na nzela na esakweli, Biblia emonisi ntango oyo Yesu abotamaki. Emonisi yango epai wapi?
Kati na mokanda ya Danyele, mokapo 9, tozali komona moko na bisakweli minene na ntina na Masiya. Emonisi koya na ye mpe kolongolama na ye kati na kufa, lokola mbeka mpo na lisiko, mpo na kolongola lisumu mpe kotya moboko mpo na bato ya botosi ete bázwa “boyengebene mpo na seko.” (Danyele 9:24-27; talá Matai 20:28.) Engebene esakweli oyo, makambo oyo nyonso masengelaki kokokana na boumeli ya eleko ya poso 70 ya mibu, kobanda na mobu 455 L.T.B., wana etindá epesamaki mpo na kotonga lisusu Yelusaleme.a (Nehemia 2:1-11) Na kotalela lolenge ntango ekabolami kati na esakweli oyo, tokoki koloba ete Masiya abimaki na ebandeli ya poso ya 70 ya mibu. Yango ekokanaki na ntango oyo Yesu amimonisaki mpo na kozwa batisimo na mobu 29 T.B., ntango abandaki mosala na ye ya Masiya liboso na bato nyonso. “Ndambo na poso,” to nsima ya mbula misato na ndambo, Masiya asengelaki kobomama, na motindo boye ete mbeka nyonso oyo epesamaki na nsé na kondimana na Mibeko ya Moize ezalaki lisusu na ntina te.—Baebele 9:11-15; 10:1-10.
Esakweli oyo emonisi ete boumeli ya mosala na Yesu ezalaki mibu misato na ndambo. Yesu akufaki na Pasiká, na 14 Nisan (engebene manáka ya Bayuda), na eleko ya printemps ya mobu 33 T.B. Dati ekokanaki na yango na manáka na biso ezalaki mokolo ya Apríli 1. (Matai 26:2) Soki tozongi mbula misato na ndambo na nsima, batisimo na ye ezalaki na Ɔkɔtɔ́bɛ 29 T.B. Luka ayebisi biso ete Yesu azalaki soko na mibu 30 wana azwaki batisimo. (Luka 3:21-23) Yango elimboli ete Yesu abotamaki pene na ebandeli ya Ɔkɔtɔ́bɛ. Na boyokani na lisoló ya Luka, na ntango wana, babateli na mpate bazalaki naino “kofanda libándá mpe na butu, bazalaki kokɛngɛla bitongá na bango.”—Luka 2:8, NW.
Euti wapi?
Lokola makambo mamonisi ete kobotama na Yesu ezalaki na ebandeli ya Ɔkɔtɔ́bɛ, mpo na nini yango ekumisami na Desɛ́mbɛ 25? Búku The New Encyclopœdia Britannica emonisi ete kokumisama wana eyaki kondimama bikeke mingi nsima na kobótama na Yesu, ete: “Kokumisama ya mbótámá ya Klisto na Desɛ́mbɛ 25, endimamaki mokemoke na ekeke ya minei na mangomba mingi na mikili ya Wɛ́sti. Na Yelusaleme, botɛmɛli mpo na Eyenga ya Mbótámá eumelaki ntango molai, kasi eyaki kondimama na nsima.”
Mpo na nini momeseno wana mondimamaki kozanga nkaká, bikeke mingi nsima na Klisto, epai na baoyo bazalaki komibénga ete baklisto? Búku The New Encyclopœdia Britannica epesi pole likoló na likambo yango ete: “Makambo na bonkɔ́kɔ masangisami na Eyenga ya Mbótámá mauti na mimeseno mingi, oyo ezali kosangisama ya kokumisama ya mbótámá ya Klisto elongo na eleko ya bapakano mpo na milulu ya milóná mpe kokumisama ya moi na katikati na eleko ya mpiɔ. Na bamboka eyangelamaki na Loma, bileko ya kokumisa [nzambe] Saturne (Desɛ́mbɛ 17) ezalaki ntango ya kosepela mpe ya kopesana makabo. Mokolo ya Desɛ́mbɛ 25 etalelamaki lisusu lokola dati ya mbótámá ya Mithra, nzambe na lisapo ya mboka Iran, Moi ya boyengebene.”
Nyonso wana esengeli kotalelama bobele lokola “bokokani” mpamba? Ezali bongo te! Eyebani kati na Lisoló na bato ete, na ekeke ya minei ya ntango na biso, na litambwisi ya mokonzi Constantin, bokonzi ya Loma etikaki konyokola baklisto mpe ekómaki mokɔtɛli ya “boklisto” oyo ekómaki bongo lingomba ya Leta. Lokola bayebaki te ndimbola ya solo ya boklisto, bato mingi oyo bayambaki kondima wana ya sika, babandaki kokumisa bilambo ya bonkɔ́kɔ na bango ya bopakano na kosaleláká nkombo ya sika ete “boklisto.” Soki mokolo ya Desɛ́mbɛ 25 te, dati nini mosusu ekokaki kobonga mpenza mpo na kokumisa mbótámá ya Klisto, dati oyo esilá kotyama elembo lokola mokolo na mbotámá ya “Moi ya Boyengebene”?
Likambo yango lizali mpenza na ntina?
Ntembe ezali te ete bayekoli na Yesu ya liboso, baoyo bazalaki Bayuda na mosuni, bazalaki kokumisa mokolo ya mbótámá na ye te. Engebene Encyclopaedia Judaica, “kokumisama ya mikolo ya mbótámá eyebanaki te kati na milulu ya bonkóko na Bayuda.” Na yango, baklisto ya liboso bamekolaki mpenza elambo motindo wana te. Na esika ya kokumisa mbótámá na Yesu, batosaki nde etindá oyo ye apesaki mpo na kokanisa liwa na ye, oyo bayebaki dati na yango ya sikisiki—14 Nisan.—Luka 22:7, 15, 19, 20; 1 Bakolinti 11:23-26.
Bikeke mingi liboso na Klisto, Bayuda, baoyo bazalaki libota liponamaki na Nzambe, bakebisamaki na esakweli na ntina na bozongi na bango na nsuka na boombo na Babilone, ete: “Bótangwa, bótangwa, bóbima wana; bósimba eloko na mbindo te; bóbima kati na ye, bózala pɛto, bino baoyo bomemi biloko ya Yehova.” (Yisaya 52:11, NW) Basengelaki kozonga na mboka na bango mpo na kozongisa losambo ya pɛto ya Yehova. Ebongaki te ete bálanda mimeseno ya mbindo ya bapakano mpe mitindo ya losambo oyo bazalaki komona na Babilone.
Ezali likambo ya kokamwa te ete, etindá yango moko ezongelamaki mpo na baklisto na 2 Bakolinti 6:14-18. Na esika na libota ya Bayuda oyo baboyaki Klisto, bayekoli na ye bakómaki bamonisi ya losambo ya pɛto. Bazalaki na mokumba ya kosalisa bato mosusu ete babima na molili ya elimo mpo na kokɔ́ta na pole ya solo. (1 Petelo 2:9, 10) Lolenge nini bakokaki kosala yango soki basangisaki mateya ya Klisto elongo na mimeseno mpe mikolo mikumisamaki na bapakano?
Atako yango ekoki kosepelisa bato, kokumisa “Eyenga ya Mbótámá” elimboli “kosimba eloko na mbindo.” (2 Bakolinti 6:17) Ye oyo alingi Nzambe mpe Klisto na lolenge ya solo, asengeli koboya yango.
Longola likambo oyo ete ebandeli na yango ezwami na bilambo ya bapakano, tomonaki lisusu ete Eyenga ya Mbótámá etongamaki mpenza likoló na lokutá mpamba te, Yesu abotamaki na Ɔkɔtɔ́bɛ. Ee, atako lolenge nini ezali kobenda likebi ya bato, tóbosana te ete Yesu abotamaki na eleko ya mpiɔ te.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na ndimbola molai ya esakweli oyo, talá mwa búku Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba? lokasa 26, ebimisami na la Société Watchtower.
[Elilingi na lokasa 4, 5]
Mbulampɛmbɛ ezipi Yelusaleme, lokola emonani epai na ɛ́sti
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Garo Nalbandian
[Elilingi na lokasa 6]
Mbulampɛmbɛ pembeni na bifélo ya Yelusaleme
[Elilingi na lokasa 7]
Bobele na eleko ya molungé nde babateli na mpate bakoki kozala elongo na bitongá na bango na butu likoló na bangomba ya mabángá, lokola tozali komona yango awa na nsé
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Garo Nalbandian