Eteni 4
Zelá mokolo ya Yehova na esengo
Yehova asalelaki basakoli na ye mpo na koyebisa likambo oyo ezalaki liboso—koya ya nkanda na ye. Kasi tosengeli te kokanisa ete azali Nzambe ya nkandankanda. “Akosepela na [bato na ye] mpe akoganga na esengo.” Wana tozali kozela mokolo na ye monene, tozali mpenza na ntina ya ‘kosepela mpe kozala na esengo na motema mobimba.’ (Sefania 3:14, 17) Ndenge nini okoki komonisa esengo yango na misala mpe na ezaleli na yo? Mpe mpo na nini okoki komonisa botɔndi mpo na makambo oyo ozali koyekola na mikanda 12 ya bisakweli?