Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jd mok. 11 nk. 139-151
  • Yehova alingi bato bázwa bomoi—Bongo yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova alingi bato bázwa bomoi—Bongo yo?
  • Batelá mokolo ya Yehova na makanisi na yo
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • BOSEMBO MPE MOTEMA MAWA EZALI NA NTINA MPO NA LOBIKO
  • TÓSALISA BATO BÁZWA BOMOI
  • BOMOI MPO NA BATO OYO BAZALI KOZONGELA YEHOVA
  • “BAKOYOKELA MWANA OYO TATA AKUFÁ MAWA”
  • “Tata na bino azali moto ya motema mawa”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • “Bóluka Yehova” na losambo oyo andimaka
    Batelá mokolo ya Yehova na makanisi na yo
  • Tosalelaka Nzambe oyo “atondi mpenza na motema mawa”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Landá ndakisa ya basakoli—Hosea
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
Makambo mosusu
Batelá mokolo ya Yehova na makanisi na yo
jd mok. 11 nk. 139-151

Mokapo 11

Yehova alingi bato bázwa bomoi—Bongo yo?

1, 2. (a) Liteya nini tokoki kozwa na ndenge Yona asalaki mpo na ekateli oyo Yehova azwaki mpo na bato ya Ninive? (b) Mpo na nini tosengeli kotalela motema mawa ya Nzambe mpe lolenge oyo atalelaka bomoi?

YEHOVA azalaki na esengo. Mosakoli na ye azalaki mawamawa. Na motema mawa na ye Nzambe aboyaki koboma ebele ya bato. Mpo na Yona bato wana nyonso basengelaki kokufa! Yehova amonaki malamu alimbisa mpe atika na bomoi bato oyo bazalaki banguna ya bato na ye.

2 Ndenge ndakisa ya Yona emonisi yango, ezalaka ntango mosusu mpasi mpo na bato bámonisa motema molai lokola oyo ya Nzambe mpe bámonisa mposa oyo ye azalaka na yango ete bato bázwa bomoi. Yona ‘asepelaki ata moke te mpe asilikaki makasi,’ na ekateli oyo Yehova azwaki ya kotika bato ya Ninive na bomoi. Ekoki nde kozala ete Yona azalaki komibanzabanza mingi mpo na ye moko na esika ya koluka komonisa motema mawa mpe koluka lobiko ya bato? Ekoki kozala ete azalaki kokanisa ete soki bato ya Ninive babiki lokumu na ye ekobeba. (Yona 4:1, 10, 11) Ezali boni mpo na mikolo na biso, awa mokolo ya kosambisa ya Yehova ezali koya mbangu mpenza? Okoki komituna boye: ‘Ndenge nini nakoki komonisa lisusu botɔndi mingi mpo na ndenge Nzambe alimbisaka, mpe ndenge nini nakoki kosalisa basumuki oyo babongoli motema bázwa litomba mingi na boboto na ye? Ya solo, ndenge nini nakoki komekola Nzambe mpe komonisa mposa oyo azali na yango ete bato bázwa bomoi?’

BOSEMBO MPE MOTEMA MAWA EZALI NA NTINA MPO NA LOBIKO

3. Bosembo ya Nzambe mpe motema mawa na ye etambolaka nzela moko? Limbolá.

3 Bato mosusu bakanisaka ete mikanda 12 ya basakoli, banda ebandeli tii nsuka ezali kolobela kaka nkanda ya Nzambe mpe bitumbu oyo apesaki bato na ye mpo na komonisa bosembo na ye. Bakoki komituna boye: ‘Wapi motema mawa ya Yehova? Amibanzabanzaka mpenza mpo na kobikisa bato?’ Mpo na koloba solo, bosembo mpe motema mawa ya Nzambe etambolaka nzela moko mpe ezali na ntina mpo na kobikisa bomoi ya bato. Bosembo mpe motema mawa ezali bizaleli mibale ya Nzambe oyo asalelaka yango na bokatikati mpenza. (Nzembo 103:6; 112:4; 116:5) Ntango alimbisaka masumu ya bato mabe, Nzambe amonisaka motema mawa epai ya bato oyo bazali na ezaleli oyo ebongi. Yango emonisaka bosembo na ye ya kokoka. Epai mosusu, atako Yehova azali mpenza sembo, na motema mawa na ye, andimaka ete bato ya kozanga kokoka bazali na bandelo. Likambo yango ekoki kolobelama boye: kopesa etumbu ntango esɛngi bongo, komonisa motema mawa soki esengeli komonisa yango. Na bansango ya basakoli okoki kokuta maloba mingi oyo ezali komonisa likambo yango malamumalamu, oyo ezali komonisa ete Nzambe alingi bato bázwa bomoi. Tiká tótalela likambo yango mpe tómona mateya oyo tokoki kosalela na makambo mingi lelo oyo.

4. Nini emonisi ete Nzambe alingi bato bázwa bomoi?

4 Mosakoli Yoele, asakolaki nsango moko ya etumbu, kasi amonisaki mpe ete Nzambe “azali na ngɔlu mpe na motema mawa, ayokaka nkanda noki te mpe azali na motema boboto mingi.” (Yoele 2:13) Mbula soki nkama moko na nsima, na ekeke ya mwambe L.T.B., Mika amonisaki ete tozali mpenza na mposa ete Yehova alimbisa biso. Nsima ya kotuna boye: “Nani azali Nzambe lokola yo?” Mika alobaki boye mpo na Yehova: “Akokanga mpenza nkanda na ye libela te, mpo asepelaka na motema boboto. Akoyokela biso lisusu mawa.” (Mika 7:18, 19) Ndenge tokoki komona yango na lisolo ya Yona oyo elobeli bato ya Ninive, Nzambe andimaka kolongola etumbu oyo akanaki kopesa soki bato yango bayoki mawa mpo na mabe na bango mpe bamonisi misala oyo eyokani na kobongola motema.

5. Makambo nini ya motema mawa ya Nzambe mpe mposa na ye ya kobikisa bato esimbi mpenza motema na yo? (Talá mpe “Bamipesaki na bolingo na bango moko.”)

5 Tozali te na ntango ya basakoli 12. Kasi, makambo oyo emonisi motema mawa ya Yehova mpe mposa oyo azali na yango ete bato bábika esimbaka motema na biso te? Koyoka bongo ekoki kosalisa yo okangama lisusu makasi na Nzambe mpe ekoki kosala ete okóma na mposa makasi ya kosalisa basusu bázwa bomoi. Atako bato mingi lelo oyo bazali kolanda nzela ya mabe, biso tozali na elikya ete Nzambe “alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.” (2 Petro 3:9) Mposa wana oyo Yehova azali na yango emonisami na maloba ya esengo oyo Hosea alobaki ntango azongelaki mwasi na ye ya ekobo. Yehova ‘alobaki na ndenge ya kosimba motema’ epai ya bato na ye. Nzambe asɛngisamaki te kolimbisa, kasi asalaki yango mpo ‘ye moko asepelaki.’ (Hosea 1:2; 2:13, 14; 3:1-5; 14:4) Oyebi mpo na nini ezaleli ya Nzambe mpe makambo oyo asalaki na likambo yango ezali mpenza na ntina? Mpamba te bomoi ya bato ezalaki na likama. Okoki mpe komona motema mawa ya Nzambe mpe mposa na ye ete bato bázwa bomoi ntango ozali kotala lisangá ya bokristo, oyo ezali kosala likambo moko oyo yo mpe ozali kopesa mabɔkɔ.

TÓSALISA BATO BÁZWA BOMOI

6. Na ndenge nini mpenza Nzambe amonisi ete alingi bato bázwa bomoi?

6 Mpo na nini obimaka na mosala ya kosakola? Ntina ya libosoliboso ezali mpo osalisa basusu báyeba Nzambe ya solo. Ezali na likambo moko ya ntina oyo osengeli koyeba mpo na Yehova: Apesaka makebisi ya polele liboso apesa etumbu. Yango emonisi motema mawa oyo azalaka na yango mpo na bato; alingaka bákufa te kasi bázwa bomoi. Basakoli 12 basalisaki basumuki báyeba ete Nzambe azalaki kopesa bango libaku ya kobongisa banzela na bango mpe bábika na ntango ya nkanda na ye. Biso mpe lelo oyo tozali kosala mosala ya ndenge wana. Lokola ozali mokristo, ozali na libaku ya kokebisa bato mpo na mokolo ya nkanda ya Nzambe oyo ezali koya. Wana ozali kosala bongo, boyá makanisi nyonso ya kozanga boboto, kolinga ete bato oyo bazali koboya nsango “bázwa etumbu oyo ebongi na bango.” Kobosana te ete soki ozali kosakola ezali mpo bato mosusu bázwa likoki ya kokɔta na nzela ya bomoi.—Yoele 3:9-12; Sefania 2:3; Matai 7:13, 14.

7. (a) Mpo na nini kopesa litatoli ezali mosala ya ntina? (b) Soki bato bazali kosepela te na nsango, ndenge nini kozala na makanisi ya Yehova ekoki kosalisa biso?

7 Ntango nyonso oyo ozali koyebisa solo ya Biblia na mosala ya kosakola ndako na ndako, na eteyelo, na esika ya mosala, to mpe na esika mosusu, ozali kosalisa moto oyo azali mpenza na mposa Nzambe amonisela ye motema mawa mpe alimbisa ye. (Hosea 11:3, 4) Kasi, okoki kokutana na bato oyo bazali kosepela te mpe bazali kokipe te. Kasi, soki oyiki mpiko na makambo yango, okomekola Nzambe na biso ya motema mawa, oyo na nzela ya Zekaria alobaki na bato na ye oyo babungaki nzela ete: “Bózonga, nabondeli bino, bólongwa na banzela na bino ya mabe mpe na misala na bino ya mabe.” (Zekaria 1:4) Nani ayebi soki bato boni bakoyoka ntango ozali koyebisa bango makambo etali motema mawa ya Nzambe mpe ozali kolakisa bango nzela ya bomoi? Lisusu, kobosana te ete osakolaka mpo Yehova alingi ete bato bázwa bomoi. Yo mpe olingi ete bato bázwa bomoi.

8. Mpo na nini kokanisa ndenge oyo bato mosusu bandimaki motema mawa ya Nzambe ezali kolendisa?

8 Okoki kozwa makasi soki obosani te likambo oyo: Banda kala ezalaka kaka na bato oyo bandimaka nsango ya Nzambe. Yango wana, Hosea akokaki koloba mpo na baoyo bamonaki ete “banzela ya Yehova ezali alima.” Abakisaki boye: “Bayengebene nde bakotambola wana.” (Hosea 14:9) Na boumeli ya bikeke, bato mingi bakokaki kondima libyangi oyo ya Nzambe: “Bózongela ngai na mitema na bino nyonso.” (Yoele 2:12) Maloba wana elobamaki mpo na bato oyo bayebaki Yehova, kasi emonisi mpe mposa oyo Nzambe azali na yango mpo na baoyo bazali naino koyekola koyeba ye. Ya solo, Nzambe abungisi te elikya ete bato bazali na likoki ya koyoka mawa mpo na mabe oyo basalaki, kobongola motema, mpe kokóma kosala oyo ezali malamu. Mpe yango efungweli bango nzela ya lobiko.—1 Timote 4:16.

9. Kobongola motema ya bato ya Ninive emonisi likambo nini oyo ezali na ntina?

9 Ezali na likambo mosusu oyo etindaki Yehova alimbisa bato ya Ninive. Totángaka ete bato yango bazwaki na lisɛki te nsango ya etumbu oyo Nzambe akanaki kopesa bango, mpe “babandaki kondimela Nzambe.” (Yona 3:5) Mpo bábika basengelaki kozala na kondima, kasi te kaka kobanga etumbu. Lokola Yehova azali na mposa makasi ya komona bato bábongola motema mpe bámonisa kondima, atikeli biso ntango tózala basakoli mpo na kosalisa bato bápona. Yango ebimisi litomba nini? Na oyo etali bato ya Ninive, tozali kotánga boye: “Nzambe ya solo amonaki misala na bango, amonaki ete babongwani na nzela na bango ya mabe; bongo Nzambe ya solo ayokaki mawa mpo na likama oyo alobaki ete akobimisela bango; mpe abimisaki yango te.” (Yona 3:10) Yehova akoki kokosama te na maloba mpamba to na misala oyo euti na motema te. Bato ya Ninive bamonisaki mpenza na misala na bango ete bayoki mawa. Nzambe amonaki ete babongwani mpenza; bamonisaki kobongola motema ya solosolo mpe kondima.

10. Wapi mwa makambo mosusu oyo Yehova asalaki mpo na kobikisa bato?

10 Tosengeli kokanisa te ete mposa ya Yehova ya kobikisa bato ememaki matomba kaka mpo na bato ya Ninive. Ntango Yerusaleme ebebisamaki na mobu 607 L.T.B.—nsima ya mosala oyo Obadia, Nahumu mpe Habakuku basalaki—Yehova abikisaki Yirimia oyo azalaki kotosa ye mpe baninga na ye mosusu ya sembo. (Yirimia 39:16-18) Mpe basakoli ya Nzambe basakolaki ete bato oyo bakotikala bakobima na Babilone mpe bakozongisa losambo ya pɛto. (Mika 7:8-10; Sefania 3:10-20) Bisakweli yango ezali mpenza kokokisama na monene na yango na eleko na biso. Nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo mingi na bango bazalaki lisusu makasi te na losambo ya solo, bazongelaki molende na bango mpo na mosala mpe bandimamaki na Yehova, na elikya ya kozwa bomoi. Lelo oyo mpe, bato oyo bauti na “bikólo mingi” bazali ‘kokóma mpenza bato ya Yehova.’ (Zekaria 2:11) Bato yango bazali na elikya ya kobika na nsuka ya mokili oyo mabe. Yango wana, soki ozali kosakola ezali te kaka mpo na komonisa ete ozali kotosa etinda oyo epesami na bakristo nyonso. Ozali mpe kosala yango kaka te mpo na kokokisa esakweli. (Matai 24:14; 28:19, 20) Ntina mpenza oyo osakolaka ezali ya kosalisa bato báyekola koyeba Yehova, bámonisa kondima mpe bázwa bomoi.

BOMOI MPO NA BATO OYO BAZALI KOZONGELA YEHOVA

11, 12. Ndenge nini motema mawa ya Nzambe ekoki kozala na litomba mpo na baoyo bazalaki liboso basambeli na ye?

11 Yehova amibanzabanzaka mpo na bato oyo bayei sika na lisangá mpe alingaka bázwa bomoi; kasi, abosanaka te baoyo basalelaka ye banda kala. Biso mpe tosengeli komibanzabanza mpo na bato yango, mpe kolinga ete bákoba na nzela ya bomoi. Nini tokoki kosala mpo na komonisa ete tomibanzabanzaka mpo na bango?

12 Okoki koyeba bato mosusu oyo bayebaki Yehova, bandimelaki ye, mpe bamipesaki na losambo ya solo, kasi lelo oyo bazali lisusu kosalela ye te. Bansango oyo Yehova atindaki na nzela ya basakoli 12 emonisi ete azalaki na mposa ya komonisa motema mawa na ye epai ya baoyo bazalaki liboso na kati ya bato na ye kasi batikalaki te na losambo ya solo. Ezali mpe bongo lelo, ata soki bato yango bakendá mosika na nzela, to bato mosusu basalaki ete bátika nzela ya bomoi, to basalaki lisumu moko mpe basengeli kobongola motema. (Baebre 2:1; 3:12) Atako bazali na esengo te ndenge bazali mosika na Yehova, bakoki kozala na mokakatano ya kozongela ye. Nzambe azali kobenga bango, ndenge maloba oyo ya mosakoli na ye emonisi yango: “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Bózongela ngai,’ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga, ‘mpe ngai nakozongela bino.’” (Zekaria 1:3) Maloba oyo ya Hosea ezali mpenza kolendisa! Alobi boye: “Zongelá Yehova Nzambe na yo, mpamba te obɛti libaku na libunga na yo. Bóya na maloba mpe bózongela Yehova. Bóloba na ye bino nyonso ete: ‘Limbisá libunga; mpe ndimá oyo ezali malamu.’” Ya solo, ata baoyo basalaki masumu ya minene, mpe na nsima bazongelaki Nzambe mpe babongolaki mpenza motema, Nzambe akokaki kolimbisa bango mpe bakokaki kozonga makasi na elimo. (Hosea 6:1; 14:1, 2; Nzembo 103:8-10) Ezalaki bongo na mikolo ya basakoli, ezali mpe bongo mpo na mikolo na biso.

13. Bantina nini tozali na yango ya komonisa motema mawa epai ya baoyo Nzambe alimbisi?

13 Kasi, yango elimboli nini mpo na bakristo oyo bazali kotikala na nzela ya bomoi? Ndenge nini tokoki komonisa ete totalelaka basusu ndenge Yehova atalelaka bango? Yehova asɛngaka ete tómonisa motema mawa, ezala epai ya bato oyo bayei sika na lisangá to epai ya baoyo batikaki kosalela ye mpo na mwa ntango. Nzambe alobaki na nzela ya Hosea makambo oyo alingi biso tósala: “Nasepeli nde na motema boboto, kasi na mbeka te.” Na boyokani na maloba yango, Yesu Kristo alobaki mpe boye: “Bókende koyekola ntina ya maloba oyo: ‘Nalingi motema mawa, kasi mbeka te.’” (Hosea 6:6; Matai 9:13) Komonisa motema mawa ndenge wana ezali na ntina mpo na kobatela boyokani na biso na Nzambe. Yoká ndenge ntoma Paulo amonisi boyokani oyo ezali kati na kolimbisa mpe komekola Nzambe: “Bózala na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mpenza mawa, bólimbisanaka na motema moko ndenge Nzambe mpe, na nzela ya Kristo, alimbisaki bino na motema moko. Na yango, bókóma bamekoli ya Nzambe, lokola bana ya bolingo, mpe bókoba kotambola na kati ya bolingo.” (Baefese 4:32–5:2) Ozali kosala ndenge nini mpo na komekola Nzambe na likambo yango?

14, 15. Na makambo nini ezaleli na biso na likambo etali ndenge oyo Yehova alimbisaka ekoki komekama?

14 Ezali boni soki ndeko oyo asali lisumu monene, aboyi kobongola motema mpe abimisami na lisangá? Likambo ya ndenge wana esalemaki na ekeke ya liboso; bakristo oyo basalaki masumu mpe baboyaki kobongola motema babimisamaki na lisangá. Soki yango esalemaki ntango bantoma ya Yesu bazalaki naino na bomoi, ezali kokamwisa te ete likambo ya ndenge wana esalema mpe ntango mosusu na mikolo na biso. Na ntango yango, bakristo oyo batikali sembo bandimaka toli ya Biblia oyo epekisi kozala elongo na moto oyo abimisami na lisangá. Bosembo na bango epai ya Yehova ekoki kosalisa moto oyo asali lisumu amona bonene ya etamboli na ye ya mabe mpe yango ekoki kotinda ye abongola motema. Totángaka na Biblia ete moto moko na Korinti abimisamaki na lisangá mpe na nsima abongolaki motema mpe atikaki banzela na ye ya mabe mpe azongisamaki na lisangá. (1 Bakorinti 5:11-13; 2 Bakorinti 2:5-8) Soki esalemi bongo lelo, okoyoka ndenge nini, mpe ndenge nini okoki komonisa ete ozali na mposa basusu bázwa bomoi?

15 Mosumuki oyo abongoli motema akoki koyoka nsɔni mpe kobungisa elikya, akozala na mposa ya koyeba lisusu ete Nzambe mpe bandeko ya lisangá balingi ye mpe bazali na mposa ete azwa bomoi. Talá ndenge Nzambe alobaki na boboto nyonso na bato na ye oyo bandimaki kobongola motema: “Nakolaka yo libala mpe nakokangama na yo; mpe okoyeba mpenza Yehova.” (Hosea 2:20) Lokola Nzambe ayokaka bongo, tosengeli komonisa na misala ete tozali na makanisi ndenge moko na ye oyo Zekaria alobaki mpo na ye ete azali Nzambe oyo ‘ayokelaka bato mawa.’—Zekaria 10:6.

16. Tosengeli kosala nini ntango moto azongisami na lisangá?

16 Nzambe alingi bato bázwa bomoi, na yango ayokaka esengo ntango mosumuki abongoli motema, to soki mosaleli na ye oyo atikaki kosakola azongeli lisusu molende na ye.a (Luka 5:32) Na likambo ya mobali oyo tolobelaki liboso oyo azongisamaki na lisangá ya Korinti, Paulo alendisaki bandeko bálimbisa mpe bálendisa ye, bámonisa ye ete balingi ye mpenza; alobaki boye: “Mpamela oyo bato mingi bapesi ekoki bongo mpo na moto wana, bongo . . . bosengeli nde kolimbisa ye na boboto mpe kobɔndisa ye, noki ezala na ndenge nini moto yango azinda na mawa na ye oyo eleki ndelo. Na yango, nazali kolendisa bino ete bólakisa lisusu bolingo oyo bolingaka ye.” (2 Bakorinti 2:6-8) Kobosana te ete Hosea alobelaki Yehova lokola azali koloba na baoyo basalaki lisumu boye: “Nakosilisa maladi na bango ya kozanga bosembo. Nakolinga bango ndenge ngai moko nasepeli.” (Hosea 14:4) Tokolinga komekola Yehova, kosepela kopesa mabɔkɔ na mosala wana ya kosilisa maladi mpe oyo ekoki komema na bomoi ya seko?

17, 18. Ndenge nini tokoki na bolingo nyonso kosalisa baoyo bazongeli Yehova to bato ya libota oyo moko na bango abimisami na lisangá?

17 Yehova amonisi yango polele ete azwaka na motuya baoyo bazali kozongela ye, andimaka bango na bolingo, kaka ndenge Hosea andimaki kozongela mwasi oyo asalelaki ye bokosi. Yehova ayebisi lolenge oyo asalaki mpo na basaleli na ye: “Nakómaki na miso na bango lokola baoyo bazali kotombola ekanganeli na mbanga na bango, mpe na boboto, namemelaki mokomoko biloko ya kolya.” (Hosea 11:4) Oyo nde maloba ya esengo oyo Yehova asalelaki mpo na kobenga bato oyo bazongaki! Tokoki komekola ye soki tozali te makambo makasimakasi to malilimalili epai ya moto oyo ayokaki mawa mpe abongolaki mpenza motema. Ntango azongisami na lisangá na esika ya kobomba nkanda mpo na mabe oyo asalaki, tosengeli kolobaka na ye na ndenge ya kobɔndisa ntango nyonso oyo azali na mposa na yango.—1 Batesaloniki 5:14.

18 Okoki kokanisa na makambo mosusu oyo okoki komekola Yehova soki moto abimisami na lisangá? Soki moto moko abimisami na lisangá, tokoki nde kosalisa bato mosusu ya libota na ye oyo batikali sembo, na ndakisa molongani mpe bana na ye? Bakoki mbala mosusu kozala na mokakatano mpo na kokoba koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola. Tokopesa bango mpenza lisalisi oyo basengeli na yango? Lolenge mosusu ya komonisa motema mawa ezali ya kosalela “maloba ya malamu, maloba ya kobɔndisa,” kosololaka na bango masolo ya kolendisa. (Zekaria 1:13) Ezali na mabaku mingi ya kosala yango, ezala liboso to na nsima ya makita, ntango tozali na mosala ya kosakola, to na mabaku mosusu. Bazali baninga na biso ya mosala, bandeko na biso ya lisangá oyo tolingaka, oyo basengeli komona te ete tozali kokima bango. Na ntango mosusu, ekoki kozala bana oyo moboti na bango abimisami na lisangá nde bazali kobundana mpo na kosalela Yehova. Tokolinga mpenza bango bázwa bomoi. Ndenge nini tokoki komonisa yango?

“BAKOYOKELA MWANA OYO TATA AKUFÁ MAWA”

19. Lisalisi nini ya elimo Sefania apesaki na moto oyo tokoki kokokanisa na “mwana oyo tata akufá”?

19 Mpo na koyeba ndenge okoki kosalisa, okoki kozwa ndakisa ya Sefania, oyo asalaki mosala na ye na katikati ya ekeke ya nsambo L.T.B. Ekoki kozala ete azalaki moto ya libota ya bokonzi ya Yuda, ntango mosusu azalaki ndeko ya mosika ya mokonzi Yosiya. Tata ya mokonzi yango abomamaki, yango esalaki ete Yosiya oyo azalaki na mbula mwambe mpamba, akóma mokonzi. Azalaki na mokumba moko monene: Ekólo mobimba emipesaki na losambo ya bikeko mpe misala oyo Nzambe azalaki koyina. (Sefania 3:1-7) Atako azalaki elenge mpe mwana etike, Yosiya azalaki na mposa ya litambwisi ya malamu mpenza mpe toli ya malamu mpo na koyangela ekólo wana ya batomboki. Yehova apesaki ye litambwisi oyo ebongi na nzela ya Sefania mpe basakoli mosusu, ndenge tolobelaki yango na mokapo 3 mpe 5 ya buku oyo. Likambo ya esengo, ntango Yehova na nzela ya mosakoli na ye apamelaki “bankumu” ya Yuda, apamelaki mokonzi yango te. (Sefania 1:8; 3:3) Yango ekoki komonisa ete atako Mokonzi Yosiya azalaki elenge, asilaki komonisa ete makanisi na ye ezalaki na losambo ya pɛto. Na ntembe te, toli oyo mosakoli apesaki esalisaki Yosiya akoba na ekateli na ye ya kolongola losambo ya mbindo na Yuda.

20. Na lisangá, ndenge nini moto oyo azali kobatela na elimo bana oyo “tata akufá,” akoki kosalisa bango?

20 Komibanzabanza ya Sefania mpo na Yosiya emonisi ndenge oyo Yehova amibanzabanzaka mpo na bilenge oyo bazali na mposa ya lisalisi mpe bazali te na moto ya kosunga bango; na ndakisa bana oyo moboti na bango abimisami na lisangá. Hosea alobaki boye: “Na nzela [ya Nzambe] nde bayokelaka mwana oyo tata akufá mawa.” (Hosea 14:3) Oyebi bana oyo “tata akufá” oyo bazali na mposa ya lisalisi na elimo mpe bazali na mposa ya moto oyo akoki kobatela bango? Bakoki kozala bitike na elimo, bana oyo bazali kobɔkɔlama na moboti moko, to bilenge oyo bazali kosalela Yehova kozanga lisungi ya mabota na bango. Mbala mingi, bana yango bakangamaka na lisangá mpe bakolaka na elimo ezala bazali na moto oyo azali kobatela bango na elimo to te. Bana mingi oyo “tata akufá” bakolaki na elimo mpo bandeko oyo bakɔmeli na lisangá bamoniselaki bango bolingo.—Nzembo 82:3.

21. Lisalisi nini bakristo oyo bakɔmeli bakoki kopesa bilenge?

21 Na ndakisa, mama oyo azali kobɔkɔla bana ye moko, akoki kozala pɛpɛlɛ soki bandeko oyo bakɔmeli na lisangá bazali komibanzabanza mpo na bana na ye. (Yakobo 1:27) Bankulutu mpe bandeko mosusu na lisangá bakoki kopesa lisalisi na bango, kasi basengeli kobosana te ete mama wana nde azali mokonzi ya libota na ye mpe kobosana te kosala makambo na ndenge oyo ebongi. Ntango mosusu yo ná molongani na yo to libota na bino mobimba bokoki kolekisa ntango elongo na bana oyo tata akufá. Okoki komonisa boboto epai ya bilenge oyo bazali koyoka ete bazali bango moko? Bakoki kozala na mposa ya moto oyo akomitya na esika na bango, oyo bakoyebisa ye makambo na bango, mpe yo okoki koyoka bango ntango bozali na mosala ya kosakola. Toboyi te, okoki kozala na makambo mingi ya kosala, kasi kopesa lisalisi ya ndenge wana na elenge mbala na mbala na boumeli ya eleko moko boye ekoki kozala elembo mpo na “koyeba bosolo ya bolingo na bino.” (2 Bakorinti 8:8) Milende na yo ekomonisa ete ozali komibanzabanza mpo basusu bázwa bomoi.

22. Lokola oyebi ete Yehova amibanzabanzaka mpo bato bázwa bomoi, oyoki ndenge nini?

22 Oyo nde likambo malamu kokanisa na lolenge oyo Nzambe amibanzabanzaka mpo na bato, mpe alingaka ete bázwa bomoi ya seko! Asepelaka komonisa bolingo na ye mpo na bato ya sembo oyo balingaka ye mpe akopesa bango bomoi, na esika ya komonisa ete asepelaka te na baoyo baponaka bango moko koboya kobongwana mpe bamonisaka ete babongi te na bomoi ya seko. Lokola tozali kozela na motema likoló mokolo ya Yehova, tiká tómekola ye na kosalisa basusu bálanda nzela ya bomoi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bandakisa misato ya kolendisa emonisi ndenge oyo Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na bato na ye oyo babungá nzela—ndakisa ya mpate ebungaki, ya mbongo oyo ebungaki, mpe ya mwana ya mobulu.—Luka 15:2-32.

OZWI EYANO?

• Mpo na nini okoki kozwa litomba soki otaleli ezaleli na yo na oyo etali mawa mpe motema mawa?—Yona 4:1, 10, 11.

• Na ndenge nini motema mawa mpe bosembo ya Yehova etambolaka nzela moko?—Hosea 2:19; Mika 7:9.

• Makambo nini oyo etali lolenge oyo Yehova alimbisaka emonisami na lisolo ya bato ya Ninive?—Yona 3:5, 9, 10; 4:2.

LITOMBA NINI OKOKI KOZWA?

• Ndenge nini baoyo basalaki masumu ya minene bakoki kozwa litomba na motema mawa ya Nzambe?—Hosea 3:3; 4:2; 14:4.

• Wapi makambo ya sikisiki oyo okoki kosala mpo na komonisa motema boboto na lisangá?—Hosea 11:4; Zekaria 1:13.

• Mpo na nini motema mawa ezali na ntina mpo na kosalisa baoyo bazali na bosɛnga?—Sefania 3:16, 17.

[Etanda na lokasa 141]

BAMIPESAKI NA BOLINGO NA BANGO MOKO

Basakoli 12 bazali mpenza ndakisa ya bato oyo bazalaki komibanzabanza mpo na bomoi ya bato. Bamemaki mpenza nsango na bango na bosembo mpo na bolamu ya basaleli ya Nzambe mpe basusu, atako yango esalaki ete bámipimela makambo mosusu, bákutana na makama mpe botɛmɛli. Na ebongiseli ya Yehova oyo ezali kokola se kokola, masangá na mokili mobimba ezali na mposa ya mibali oyo bakɔmeli oyo bakosepela kosala lokola bankulutu mpe basaleli na misala. Ezali mpe na mposa makasi ya basali ya ntango nyonso. Okoki komekola ndakisa ya basakoli, kondima komipesa, kosalela makoki na yo na mosala ya Nzambe na lisangá to na esika oyo mposa ezali makasi? Wana moko ya lolenge eleki malamu ya komekola Yehova mpo ete basusu bázwa bomoi.

[Elilingi na lokasa 143]

Ata basaleli ya Nzambe ntango mosusu bakoki koyeba te bonene ya motema mawa na ye

[Elilingi na lokasa 146]

Ndenge nini okoki kosalisa bakristo oyo kala bazalaki molende, bázongela Yehova?

[Elilingi na lokasa 151]

Okoki kokóma moto oyo azali kobatela na elimo bana oyo “tata akufá”?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto