Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yp2 lok. 134
  • Bandakisa ya kolanda​—Baebre misato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bandakisa ya kolanda​—Baebre misato
  • Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Masolo mosusu
  • Bamekamaki—kasi batikalaki sembo epai na Yehova!
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
  • Jéhovah apesaka mbano mpo na kondima mpe molende
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mokanda ya Danyele—ntina na yango mpo na yo
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
yp2 lok. 134

Bandakisa ya kolanda​—Baebre misato

Hanania, Mishaele, ná Azaria batɛlɛmi na mokili patatalu ya Dura, pembeni ya engumba Babilone. Bato nyonso oyo bazali na bango bafukami liboso ya ekeko moko molai. Atako mbamba oyo baninga batyaki bango mpe maloba ya kokanela ya mokonzi, bilenge yango babangaki te. Na limemya nyonso mpe na mpiko, bayebisi Nebukadenezare ete ekateli na bango ya kosalela Yehova ekoki kokakolama te.​—Danyele 1:6; 3:17, 18.

Mibali yango bazalaki bilenge ntango bamemaki bango na Babilone. Bosembo oyo bamonisaki ntango bazalaki bilenge, na ndenge baboyaki kolya bilei oyo mbala mosusu Mobeko ya Nzambe epekisaki, ebongisaki bango mpo bálonga mikakatano oyo bakutanaki na yango nsima. (Danyele 1:6-20) Makambo oyo Yehova asalá kala, eteyaki bango ete kotosa ye, ezali likambo eleki malamu. Yo mpe ozali na ekateli ya makasi ya kokangama na mibeko ya Nzambe ata soki baninga na yo batye yo mbamba? Soki oyekoli kotosa Yehova na makambo oyo ezali komonana mike ntango ozali naino elenge, yango ekosalisa yo otikala sembo ntango okokutana na mikakatano minene na bomoi na yo.​—Masese 3:5, 6; Luka 16:10.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto