Mituna ya batángi
Danyele azalaki wapi ntango baninga na ye Baebele misato bamekamaki liboso ya ekeko molai oyo Nebukadanesala atɛlɛmisaki na esobe ya Dula?
Biblia elobi yango te, yango wana, moto moko te akoki lelo koyebisa esika oyo Danyele azalaki na ntango oyo baninga na ye bamekamaki.
Bato mosusu bapesaki makanisi ete Nebukadanesala apesaki Danyele esika ya lokumu mpe mikumba minene koleka Sadalaka, Mesaka na Abedenego; yango wana asɛngisamaki te kokende na esobe ya Dula. Danyele 2:49 emonisi ete na eleko moko, Danyele azalaki na esika ya lokumu koleka baninga na ye misato. Kasi tokoki koloba te ete yango nde epekisaki ye ayangana te na bato mosusu liboso ya ekeko.
Bato mosusu bamekaki kolimbola ete Danyele azalaki te mpo mbala mosusu azalaki na mobembo ya mosala to azalaki na maladi, yango wana azwaki likoki ya koyangana te. Kasi, Biblia elobi yango te. Ezala ndenge nini, tokanisi ete Danyele azalaki kosala eloko moko te oyo bakokaki koloba mabe mpo na yango, mpamba te soki asalaki yango, na ntembe te bakonzi ya Babylone oyo bazalaki koyokela ye zuwa, balingaki kofunda ye mpo na yango. (Danyele 3:8) Ezala liboso to nsima ya likambo wana, Danyele amonisaki ete azalaki moto ya sembo, atikalaki sembo epai ya Nzambe, ata liboso ya komekama nini oyo akutanaki na yango. (Danyele 1:8; 5:17; 6:4, 10, 11) Na bongo, atako Biblia elobi te mpo na nini Danyele azalaki na esobe ya Dula te, tokoki kondima ya solo ete azalaki sembo epai ya Yehova Nzambe.—Ezekiele 14:14; Baebele 11:33.