Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • bt mok. 25 nk. 196-202
  • “Nasɛngi nakende kosamba epai ya Kaisala!”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Nasɛngi nakende kosamba epai ya Kaisala!”
  • ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Natɛlɛmi liboso ya kiti ya kosambisa” (Misala 25:1-12)
  • “Naboyaki te kotosa” (Misala 25:13–26:23)
  • “Okondimisa ngai nakóma mokristo” (Misala 26:24-32)
  • Paulo atatoli na molende liboso ya bakonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Salisá basusu bándima nsango ya Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • “Nasɛngi nakende kosamba liboso ya Kaisala!”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Tosakola bokonzi ya Jehovah na molende nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
bt mok. 25 nk. 196-202

MOKAPO 25

“Nasɛngi nakende kosamba epai ya Kaisala!”

Paulo apesi ndakisa na likambo etali kokɔtela nsango malamu

Euti na Misala 25:1–26:32

1, 2. (a) Paulo azali wapi sikoyo? (b) Motuna nini tokoki komituna na ndenge Paulo asɛngaki ete akende kosamba epai ya Kaisala?

PAULO azali kaka na bolɔkɔ na Kaisaria epai bazali kokɛngɛla ye makasi. Mbula mibale liboso, ntango azongaki na Yudea, Bayuda balukaki koboma ye mbala soki misato. (Mis. 21:27-36; 23:10, 12-15, 27) Tii sikoyo, banguna na ye balongi te kokokisa mokano na bango, kasi batiki mpe te. Ntango Paulo amoni ete akoki kokwea na mabɔkɔ na bango, ayebisi Guvɛrnɛrɛ Festusi ete: “Nasɛngi nakende kosamba epai ya Kaisala!”​—Mis. 25:11.

2 Yehova andimaki ekateli ya Paulo ya kokende kosamba epai ya ampɛrɛrɛ ya Roma? Eyano na motuna yango ezali na ntina mingi mpo na biso baoyo tozali kopesa litatoli malamumalamu mpo na Bokonzi ya Nzambe na ntango oyo ya nsuka. Tosengeli koyeba soki likambo oyo Paulo asalaki ezali ndakisa oyo tokoki kolanda mpo na “kokɔtela nsango malamu mpe kofandisa yango na nzela ya mibeko.”​—Flp. 1:7.

“Natɛlɛmi liboso ya kiti ya kosambisa” (Misala 25:1-12)

3, 4. (a) Bayuda bazalaki kokana nini ntango basɛngaki epai ya guvɛrnɛrɛ ete azongisa Paulo na Yerusaleme, mpe ndenge nini Paulo abikaki na liwa? (b) Lelo oyo, ndenge nini Yehova asungaka basaleli na ye, ndenge asalaki mpo na Paulo?

3 Ntango Festusi akómaki guvɛrnɛrɛ ya sika ya etúká ya Yudea, nsima ya mikolo misato akendaki na Yerusaleme.a Kuna, banganga-nzambe bakonzi mpe mikóló ya Bayuda bayebisaki ye ete Paulo asalaki makambo ya mabe mpenza. Bayebaki ete bakonzi ya Roma bazalaki na mposa makasi ete guvɛrnɛrɛ ya sika abatela kimya ná bakambi ya Bayuda mpe Bayuda nyonso. Yango wana, basɛngaki Festusi asalela bango likambo moko: Azongisa Paulo na Yerusaleme mpo asambisama kuna. Nzokande, bayebaki ete bakosala likambo mosusu soki Festusi akokisi mposa na bango. Mokano ya banguna yango ezalaki ya koboma Paulo na nzela ntango azali kouta Kaisaria mpo na kozonga na Yerusaleme. Festusi aboyaki mpe alobaki na bango ete: “Soki mpenza mobali oyo asali likambo moko ya mabe, baoyo bazali na bokonzi na kati na bino bákita elongo na ngai [na Kaisaria] mpe báfunda ye.” (Mis. 25:5) Paulo abikaki lisusu na liwa.

4 Ntango nyonso oyo Paulo azalaki kosamba, Yehova azalaki kosunga ye na nzela ya Nkolo Yesu Kristo. Tóbosana te ete na emonaneli moko, Yesu ayebisaki Paulo ete: “Zalá na mpiko!” (Mis. 23:11) Lelo oyo mpe, basaleli ya Nzambe bazali kokutana na mikakatano mpe banguna bazali kokanela bango. Yehova apekisaka te ete mikakatano ekómela biso, kasi apesaka biso bwanya mpe makasi ya koyika mpiko. Tokoki ntango nyonso kotya motema ete Nzambe na biso ya bolingo akopesa biso “nguya oyo eleki makasi.”​—2 Ko. 4:7.

5. Festusi asalaki nini mpo na Paulo?

5 Nsima ya mwa mikolo, Festusi “afandaki na kiti ya kosambisa” na Kaisaria.b Paulo ná bafundi na ye batɛlɛmaki liboso ya guvɛrnɛrɛ. Paulo ayanolaki na bifundeli na bango ya lokuta mpe alobaki boye: “Nasali lisumu ata moko te oyo ebuki Mibeko ya Bayuda to ya tempelo to mpe ya Kaisala.” Ntoma Paulo asalaki mabe moko te mpe ebongaki bátika ye. Kasi, Festusi alingaki kozwa ekateli nini? Lokola alingaki kosepelisa Bayuda, atunaki Paulo boye: “Olingi komata na Yerusaleme mpe kosambisama kuna liboso na ngai mpo na makambo wana?” (Mis. 25:6-9) Likanisi wana ebongaki ata moke te! Soki Paulo azongi na Yerusaleme mpo akende kosamba kuna, banguna na ye nde bakosambisa ye mpe bakokatela ye kaka etumbu ya liwa. Na bongo, Festusi azalaki kopona likambo oyo ezalaki na litomba mpo na ye na makambo ya politiki, kasi ezalaki mpo na kolongisa boyengebene te. Ponse Pilate, oyo azalaká mpe guvɛrnɛrɛ, asalaki bongo na likambo ya mokangami mosusu oyo azalaki moto monene koleka Paulo. (Yoa. 19:12-16) Lelo oyo mpe, bazuzi bakoki kozwa bikateli ya mabe ndenge wana mpo na kosepelisa bato mosusu. Yango wana, tosengeli kokamwa te soki tribinale moko ekweisi basaleli ya Nzambe na likambo oyo ezali komonana polele ete basengeli kolonga.

6, 7. Mpo na nini Paulo asɛngaki akende kosamba epai ya Kaisala, mpe yango epesi ndakisa nini epai ya bakristo ya solo lelo oyo?

6 Lokola Festusi azalaki na mposa ya kosepelisa Bayuda, yango ekómaki likama mpo na bomoi ya Paulo. Mpo na yango, Paulo asalelaki ntomo oyo azalaki na yango lokola mwana-mboka Roma. Ayebisaki Festusi boye: “Natɛlɛmi liboso ya kiti ya kosambisa ya Kaisala, epai nasengeli kosambisama. Nasali Bayuda mabe ata moko te, ndenge yo moko mpe ozali mpenza komona yango. . . . Nasɛngi nakende kosamba epai ya Kaisala!” Mbala mingi, ntango moto asɛngi likambo wana, ezalaki mpasi báboya kokokisa mposa na ye. Festusi amonisaki ete ezali bongo na ndenge alobaki ete: “Lokola osɛngi okende kosamba epai ya Kaisala; okokende epai ya Kaisala.” (Mis. 25:10-12) Lokola Paulo asɛngaki akende kosamba liboso ya mokonzi oyo azali likoló ya bakonzi mosusu nyonso, apesaki ndakisa oyo bakristo ya solo basengeli kolanda lelo oyo. Ntango banguna balukaka “kobimisa mikakatano na nzela ya mobeko,” Batatoli ya Yehova basalelaka mibeko ya mboka mpo na kokɔtela nsango malamu.c​—Nz. 94:20.

7 Na bongo, Paulo azwaki libaku ya kokende kosamba na Roma nsima ya kofanda na bolɔkɔ mbula mibale mpo na mabe oyo asalaki te. Kasi, liboso akende, mokonzi mosusu alingaki komona ye.

Bato na tribinale bazali kolobela ekateli oyo ezwami. Ndeko mobali moko, baavoka na ye, mpe batotali mosusu oyo bazali wana, bazali kotala. Bato oyo bazali batatoli te bazali na esengo mpe kopesa longonya na baavoka ya ngambo mosusu oyo bazali kofunda ndeko na biso.

Tomemaka makambo na tribinale ya monene soki bakati likambo na biso malamu te

“Naboyaki te kotosa” (Misala 25:13–26:23)

8, 9. Mpo na nini Mokonzi Agripa akendaki na Kaisaria?

8 Ntango Paulo asɛngaki ete akende kosamba epai ya Kaisala, mwa mikolo na nsima Mokonzi Agripa ná ndeko na ye ya mwasi Bernise bakendaki kotala Festusi, guvɛrnɛrɛ ya sika.d Na eleko ya Baroma, bakonzi bazalaki na momeseno ya kokende kotala guvɛrnɛrɛ ya sika. Na ntembe te, lokola Agripa akendaki kopesa Festusi longonya na ndenge aponamaki guvɛrnɛrɛ, akendaki nde kolendisa boyokani ya politiki mpe kosala boninga oyo akokaki kozwela yango litomba na nsima.​—Mis. 25:13.

KOSƐNGA ETE TRIBINALE MONENE ETALELA LISUSU EKATELI MOKO

Na bantango mosusu Batatoli ya Yehova basɛngaki ete tribinale ya monene etalela lisusu ekateli oyo tribinale moko ezwaki mpo ete bipekiseli na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi elongolama. Tótalela ndakisa mibale.

Mokolo ya 28/03/1938, Tribinale Monene ya États-Unis ebongolaki bikateli oyo tribinale ya etúká ya Georgie ezwaki mpo na Batatoli oyo bakangamaki mpo bazalaki kokabola mikanda oyo elimbolaka Biblia na engumba Griffin. Yango ezalaki likambo ya liboso kati na makambo ebele oyo Batatoli bamemaki na Tribinale monene mpo etalela lisusu lotomo na bango ya kosakola nsango malamu.g

Ndakisa mosusu ezali ya Motatoli moko ya ekólo Grèce, nkombo na ye Minos Kokkinakis. Na boumeli ya mbula 48, bakangaki ye mbala 60 mpo bazalaki kofunda ye ete azali “kobenda bato bákɔta na lingomba na ye.” Mbala 18, asambaki liboso ya tribinale. Alekisaki bambula mingi na bolɔkɔ mpe bazalaki kotinda ye na bolɔkɔ na bisanga oyo ezali na Mbu ya Égée. Mbala ya nsuka oyo bakatelaki ye etumbu ya bolɔkɔ na 1986, batribinale minene ya Grèce endimaki ekateli ya kokweisa Ndeko Kokkinakis, oyo batribinale mosusu ezwaki. Yango wana, amemaki likambo na Tribinale monene ya mikili ya Mpoto mpo na ntomo ya bato. Mokolo ya 25/05/1993, Tribinale yango ekataki ete ekólo Grèce etosaki te ntomo ya kosambela ya Ndeko Kokkinakis.

Batatoli ya Yehova bamemi makambo mingi na Tribinale ya mikili ya Mpoto mpo na ntomo ya bato mpe balongi na mingi kati na makambo yango. Ezali na lingomba mosusu te to ebongiseli mosusu oyo elongi na makambo mingi ndenge wana mpo na kokɔtela ntomo ya bato liboso ya Tribinale ya mikili ya Mpoto mpo na ntomo ya bato.

Bato mosusu bazwaka mpe matomba na bolongi ya Batatoli ya Yehova? Charles Haynes, moto moko ya mayele akomaki boye: “Biso nyonso tosengeli kopesa Batatoli ya Yehova matɔndi. Atako bato bafingaka bango mingi, babenganaka bango na bingumba to babɛtaka bango, bazali kolɛmba te kobunda mpo na bonsomi ya losambo, ya bango moko mpe ya biso. Mpe ntango balongi, biso nyonso nde tolongaka.”

g Talá lisolo na yango, ezali na Lamuká! ya 08/01/2003, nkasa 3-11, na Français.

9 Festusi ayebisaki Agripa likambo ya Paulo, mpe mokonzi yango akómaki na mposa ya koyoka Paulo. Mokolo oyo elandaki, bakonzi yango mibale bafandaki na kiti ya kosambisa. Kasi, makambo oyo mokangami yango alobaki na libaku wana ekamwisaki koleka kutu nkembo mpe molato ya bakonzi wana.​—Mis. 25:22-27.

10, 11. Ndenge nini Paulo amonisaki limemya epai ya Agripa, mpe ntoma yango ayebisaki mokonzi makambo nini oyo asalaki liboso akóma mokristo?

10 Na limemya nyonso, Paulo apesaki Mokonzi Agripa botɔndi mpo na libaku malamu oyo apesaki ye ya kosamba liboso na ye, mpe alobaki ete mokonzi yango ayebaki malamu mimeseno mpe bantembe ya Bayuda. Na nsima, Paulo alobelaki bomoi na ye liboso akóma mokristo; alobaki boye: “Nazalaki kolanda mwa lingomba ya Bafarisai, mwa lingomba oyo eleki makambo makasi na losambo na biso.” (Mis. 26:5) Paulo azalaki kozela koya ya Masiya ntango azalaki Mofarisai. Kasi, lokola akómaki mokristo, azalaki komonisa ete Yesu Kristo nde Masiya oyo bazalaki kozela banda kala. Paulo amonisaki ete soki azalaki kosamba mokolo yango ezalaki mpo na likambo oyo ye ná bato oyo bafundaki ye bazalaki kondima, elingi koloba kokokisama ya elaka oyo Nzambe apesaki bankɔkɔ na bango. Likambo yango ebendaki lisusu likebi ya Agripa mpo na koyoka makambo oyo Paulo akoloba.e

11 Paulo alobelaki makambo mabe oyo azalaki kosala bakristo; alobaki boye: “Mpo na ngai, nandimisamaki ete nasengelaki kosala ndenge nyonso mpo na kotɛmɛla nkombo ya Yesu Monazarete . . . Lokola nazalaki na nkanda . . . makasi mpenza [ya bayekoli ya Kristo], nakendaki mosika mpenza tii konyokola bango ata na bingumba mosusu.” (Mis. 26:9-11) Paulo azalaki kolekisa ndelo te na maloba na ye. Bato mingi bayebaki makambo mabe oyo asalaki bakristo. (Gal. 1:13, 23) Na ntembe te, Agripa amitunaki ete, ‘Nini esalaki ete moto yango abongwana?’

12, 13. (a) Ndenge nini Paulo alobelaki kobongwana na ye? (b) Na ndenge nini Paulo azalaki “kobɛta makolo na nsɔngɛ ya mangenda”?

12 Maloba oyo Paulo alobaki na nsima epesaki eyano na motuna yango; alobaki boye: “Ntango nazalaki kokende na Damasi na bokonzi mpe na etinda oyo nazwaki epai ya banganga-nzambe bakonzi, Ee mokonzi, na midi namonaki na nzela, pole moko oyo eleki kongɛnga ya moi ebɛti uta na likoló zingazinga na ngai mpe ya baoyo bazalaki kotambola elongo na ngai. Mpe ntango biso nyonso tokweaki na nse, nayokaki mongongo moko elobi na ngai na monɔkɔ ya Ebre: ‘Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola ngai? Ozali komisala mabe ndenge ozali kobɛtabɛta makolo na nsɔngɛ ya mangenda.’ Kasi ngai natunaki: ‘Yo nani, Nkolo?’ Mpe Nkolo alobaki: ‘Ngai Yesu, oyo yo ozali konyokola.’”f​—Mis. 26:12-15.

13 Liboso amona emonaneli wana, na maloba ya elilingi, Paulo azalaki “kobɛtabɛta makolo na nsɔngɛ ya mangenda.” Ndenge nyama oyo ememaka mikumba emizokisaka mpamba soki ezali kobɛta makolo na nsɔngɛ ya lingenda, Paulo azalaki komiyokisa mpasi na elimo na ndenge azalaki kotɛmɛla mokano ya Nzambe. Ndenge Yesu abimelaki Paulo na nzela ya Damasi, asalisaki mobali yango oyo azalaki sembo, kasi abungaki nzela, ete abongola makanisi na ye.​—Yoa. 16:1, 2.

14, 15. Paulo alobelaki mbongwana nini oyo asalaki na bomoi na ye?

14 Paulo asalaki mpenza mbongwana monene na bomoi na ye. Alobaki na Agripa boye: “Naboyaki te kotosa emonaneli wana oyo eutaki likoló, kasi libosoliboso epai ya baoyo bazalaki na Damasi, na nsima epai ya baoyo bazalaki na Yerusaleme, na mokili mobimba ya Yudea, mpe epai ya bikólo, namemaki nsango oyo: basengeli kobongola motema, kobaluka epai ya Nzambe mpe kosala misala oyo emonisi ete babongoli motema.” (Mis. 26:19, 20) Banda bambula mingi, Paulo azalaki kokokisa mokumba oyo Yesu Kristo apesaki ye na emonaneli wana. Yango ebotaki mbuma nini? Bato oyo bandimaki nsango malamu oyo Paulo azalaki kosakola babongolaki mitema mpe batikaki misala ya mbindo mpe ya kozanga bosembo, mpe babalukaki epai ya Nzambe. Bato yango bakómaki bana-mboka ya malamu, oyo bazalaki kotosa mibeko mpe kofanda na kimya.

15 Nzokande, matomba nyonso wana ezalaki na ntina moko te mpo na Bayuda oyo bazalaki kotɛmɛla Paulo. Paulo alobaki boye: “Ezali mpo na yango nde Bayuda bakangaki ngai na tempelo mpe balukaki koboma ngai. Nzokande, lokola nazwi lisalisi oyo euti epai ya Nzambe, nazali kokoba tii na mokolo ya lelo kopesa litatoli epai ya bato mike mpe bato minene.”​—Mis. 26:21, 22.

16. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Paulo ntango tozali koloba epai ya bazuzi mpe bakonzi mpo na kokɔtela bindimeli na biso?

16 Biso bakristo ya solo tosengeli ‘komibongisa ntango nyonso mpo na kolobela’ kondima na biso. (1 Pe. 3:15) Ntango tozwi libaku ya koloba liboso ya bazuzi mpe bakonzi mpo na kokɔtela bindimeli na biso, ekozala malamu mingi tólanda mayele oyo Paulo asalelaki ntango alobaki liboso ya Agripa ná Festusi. Tokoki kosimba mitema ya bakonzi yango soki toyebisi bango ndenge oyo mateya ya solo ebongolaki bomoi na biso moko mpe ya bato mosusu oyo bandimaki nsango na biso.

“Okondimisa ngai nakóma mokristo” (Misala 26:24-32)

17. Festusi asalaki nini ntango azalaki koyoka Paulo, mpe ndenge nini ezaleli yango emonanaka lelo oyo?

17 Ntango bakonzi yango mibale bazalaki koyoka Paulo, litatoli na ye esimbaki mpenza mitema na bango. Yoká likambo oyo esalemaki: “Wana [Paulo] azalaki koloba makambo yango mpo na kosamba na ye, Festusi alobaki na mongongo makasi ete: ‘Ozwi ligboma, Paulo! Koyekola mingi ekómisi yo ligboma!’” (Mis. 26:24) Maloba ya Festusi ezali komonisa ezaleli oyo bato mingi bazalaka na yango ata lelo oyo. Bato mingi balobaka ete baoyo bateyaka makambo ya Biblia bazali na molende ya mabe. Mbala mingi, bato ya mayele ya mokili bandimaka lisekwa te, liteya oyo Biblia elobeli polele.

18. Paulo apesaki Festusi eyano nini, mpe yango etindaki Agripa aloba nini?

18 Kasi, Paulo apesaki guvɛrnɛrɛ yango eyano oyo: “Nazwi ligboma te, Festusi Moto ya Lokumu, kasi nazali nde koloba makambo ya solo mpe ya makanisi malamu. Likambo ya solo ezali ete, mokonzi oyo ngai nazali koloba liboso na ye na elobeli ya polele ayebi makambo yango malamu . . . Mokonzi Agripa, ondimaka Basakoli? Nayebi ete ondimaka.” Kasi Agripa alobaki na Paulo: “Na mwa ntango moke okondimisa ngai nakóma mokristo.” (Mis. 26:25-28) Ezala ete Agripa alobaki maloba oyo eutaki mpenza na motema to te, emonisi ete litatoli ya Paulo esimbaki mpenza motema ya mokonzi wana.

19. Ekateli nini Festusi ná Agripa bazwaki mpo na Paulo?

19 Na nsima, Agripa ná Festusi batɛlɛmaki, likambo oyo emonisaki ete basilisi kosambisa. “Ntango bazalaki kobima babandaki kosolola bango na bango: ‘Moto oyo asali ata likambo moko te oyo ebongi na liwa to na bolɔkɔ.’ Lisusu, Agripa alobaki na Festusi: ‘Bakokaki kotika moto oyo soki asɛngaka te kokende kosamba epai ya Kaisala.’” (Mis. 26:31, 32) Bamonaki ete moto oyo bautaki kosambisa asalaki likambo moko ya mabe te. Mbala mosusu, yango esalisaki bango bákóma kotalela bakristo na ndenge ya malamu.

20. Litatoli ya Paulo liboso ya bakonzi minene ebotaki mbuma nini?

20 Emonani ete moko te kati na bakonzi yango andimaki nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Ezalaki nde na ntina ete ntoma Paulo asamba liboso na bango? Ɛɛ. Lokola Paulo ‘amemamaki liboso ya bakonzi mpe baguvɛrnɛrɛ’ na Yudea, azwaki libaku ya kopesa litatoli epai ya bakonzi ya Roma oyo mbala mosusu bakokaki kozwa libaku ya koyoka nsango te. (Luka 21:12, 13) Longola yango, makambo oyo akutanaki na yango mpe bosembo na ye na ntango wana ya mpasi elendisaki bakristo mosusu.​—Flp. 1:12-14.

21. Matomba nini tokoki kozwa soki tozali na molende na mosala ya kosakola?

21 Lelo oyo mpe esalemaka bongo. Soki tozali molende na mosala ya Bokonzi atako tozali kokutana na mikakatano mpe botɛmɛli, tokoki kobuka mbuma ya malamu. Tokoki kopesa litatoli epai ya bakonzi oyo mbala mosusu tokokaki kozwa libaku ya kokutana na bango te. Ezaleli na biso ya koyika mpiko na bosembo ekoki kolendisa bandeko na biso mpe kotinda bango bákóma na molende koleka na mosala ya kopesa litatoli mpo na Bokonzi ya Nzambe.

GUVƐRNƐRƐ PORKIUSI FESTUSI

Makambo nyonso oyo toyebi mpo na Porkiusi Festusi ezali kaka oyo elobami na Misala ya Bantoma mpe na mikanda ya Flavius Josèphe. Festusi akómaki guvɛrnɛrɛ ya Yudea na mobu 58 T.B., akitanaki Feliksi mpe ekoki kozala ete akufaki ntango azalaki naino na mokumba yango, mbula soki mibale to misato mpamba na nsima.

Porkiusi Festusi.

Na makambo mingi, emonani ete Festusi azalaki guvɛrnɛrɛ oyo azalaki na bokɛngi mpe na mayele, na bokeseni na Feliksi, oyo azalaki liboso na ye, mpe Albinus, oyo akitanaki ye. Na ebandeli ya boyangeli ya Festusi, miyibi bazalaki ebele na etúká ya Yudea. Josèphe akomaki ete, “Festusi . . . amityelaki mokano ya kopesa etumbu na bato oyo bazalaki kotya mobulu na ekólo. Yango wana akangaki miyibi ebele, mpe abomaki mingi kati na bango.” Na boyangeli na ye, Bayuda batongaki efelo moko mpo na kopekisa Mokonzi Agripa amonaka makambo oyo ezalaki kosalema na kati ya lopango ya tempelo. Festusi apesaki mitindo ete bábuka efelo yango. Kasi, Bayuda basɛngaki bámema likambo yango epai ya Amperɛrɛ Néron, mpe Festusi andimaki.

Emonani ete Festusi azalaki mpenza na mokano ya kosukisa bato ya mobulu mpe batomboki. Kasi, lokola azalaki na mposa ya kozala na boyokani ya malamu ná Bayuda, akangaki mpe miso na makambo oyo esɛngelaki kokatama na bosembo​—na ndakisa, na likambo ya ntoma Paulo.

MOKONZI ERODE AGRIPA II

Agripa oyo Misala mokapo 25 elobeli ezalaki Mokonzi Erode Agripa II, nkɔkɔ ya Erode Monene mpe mwana ya Erode oyo anyokolaki lisangá ya Yerusaleme mbula 14 liboso. (Mis. 12:1) Agripa azalaki mokonzi ya nsuka na molɔngɔ ya bato ya libota ya Erode oyo bakómaki bakonzi.

Mokonzi Erode Agripa II.

Ntango tata na ye akufaki na mobu 44 T.B., Agripa azalaki na mbula 17 mpe azalaki na Roma epai azalaki koyekola na ndako ya Amperɛrɛ Klode. Bapesi-toli ya amperɛrɛ bamonaki ete Agripa azalaki naino elenge mpenza mpo azwa ebonga ya tata na ye; yango wana, Baroma batyaki guvɛrnɛrɛ moko mpo ayangela. Atako bongo, Flavius Josèphe alobi ete, ntango Agripa azalaki naino na Roma, azalaki kolobela Bayuda mpe kobatela matomba na bango.

Na mobu soki 50 T.B., Klode atyaki Agripa mokonzi ya etúká ya Chalcis mpe na mobu 53, atyaki ye mpe mokonzi ya etúká ya Iturea, ya Trakonitise, mpe ya Abilene. Agripa azwaki mpe bokonzi likoló ya makambo etali tempelo mpe azalaki na bokonzi ya kopona banganga-nzambe monene. Amperɛrɛ Klode, oyo akitanaki Néron, abakiselaki Agripa bingumba mosusu ya etúká ya Galile mpe ya Perea. Ntango Mokonzi Agripa akutanaki na Paulo, azalaki na Kaisaria ná ndeko na ye ya mwasi Bernise, oyo akabwanaki na mobali na ye, mokonzi ya Silisia.​—Mis. 25:13.

Na mobu 66 T.B., milende nyonso oyo Agripa asalaki mpo na kopekisa Bayuda oyo bazalaki kotombokela bokonzi ya Roma elongaki te; kutu, batomboki babalukelaki ye, mpe akómaki na ngámbo ya Baroma. Ntango basoda ya Roma basukisaki botomboki ya Bayuda, Vespasien, amperɛrɛ ya sika, apesaki Agripa mbano, abakiselaki ye bitúká mosusu.

a Talá etanda “Guvɛrnɛrɛ Porkiusi Festusi,” na lokasa 199.

b “Kiti ya kosambisa” ezalaki likoló ya estrade moko. Esika na yango oyo etombwami ezalaki komonisa ete zuzi nde azalaki na ekateli ya nsuka mpe bato basengelaki kotosa yango. Pilate afandaki na kiti ya ndenge wana ntango azalaki kotalela makambo oyo bafundaki Yesu na yango.

c Talá etanda “Kosɛnga ete tribinale monene etalela lisusu ekateli moko,” na lokasa 200.

d Talá etanda “Mokonzi Erode Agripa II,” na lokasa 201.

e Lokola Paulo azalaki mokristo, azalaki kondima ete Yesu azali Masiya. Bayuda, oyo bandimelaki Yesu te, bazalaki komona ete Paulo azali mopɛngwi.​—Mis. 21:21, 27, 28.

f Mpo na maloba ya Paulo ete azalaki kokende “na midi,” moto moko ya mayele oyo alimbolaka maloba ya Biblia alobaki boye: “Soki likambo moko ezali te kosɛnga moto ya mobembo akóma nokinoki epai azali kokende, mbala mingi azalaki kopema na midi mpo molunge ezalaki makasi. Yango emonisi biso ete Paulo azalaki na ekateli makasi mpo na kokokisa etinda ya konyokola [bakristo].”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto