Basalaki mokano ya Yehova
Paulo atatoli na molende liboso ya bakonzi
BOKESENI kati na mibali oyo mibale ezalaki monene mpenza. Moko alataki motole mpe mosusu bakangaki ye minyɔlɔlɔ. Moko azalaki mokonzi; nde mosusu azalaki mokangami. Nsima ya kolekisa mbula mibale na bolɔkɔ, ntoma Paulo atɛlɛmi sikawa liboso ya Elode Akalipa II, mokonzi ya Bayuda. Mokonzi na mwasi na ye, Belenike, bayaki “na nkembo mingi kokɔta na esambiselo, esika moko na mikóló na basoda, na mibali na liboso na mboka.” (Misala 25:23) Buku moko elobi ete: “Na ntembe te bato bazalaki bankama mingi na likita wana.”
Ezalaki Fesete, oyo autaki kokóma guvernere sika, nde abongisaki likita yango. Feliki, oyo azalaki guvernere liboso na ye, asepelaki kosundola Paulo na bolɔkɔ. Kasi, Fesete alukaki koyeba solo na ntina na makambo oyo bafundaki Paulo. Mpamba te, Paulo azalaki ntango nyonso koloba ete asalaki likambo moko ya mabe te mpe asɛngaki ete bámema likambo na ye epai na Kaisala! Likambo ya Paulo ebendaki likebi ya Akalipa. Alobaki ete: “Nalingi mpe koyoka moto yango ngai moko.” Fesete azwaki bibongiseli nokinoki, na ntembe te amitunaki soki mokonzi akanisaki nini na ntina na mokangami oyo.—Misala 24:27–25:22.
Mokolo elandaki, Paulo atɛlɛmaki liboso ya ebele ya bakonzi. Alobaki na Akalipa ete: “Nazali komitánga moto na esengo ete nazwi nzela lelo na kozongisa monɔkɔ liboso na yo . . . , mpo ete yo ososoli malamu mingi mitindo nyonso na Bayuda mpe ntembe na bango. Yango wana nazali kosɛnga yo koyoka ngai na motema molai.”—Misala 26:2, 3.
Paulo azali kosamba na molende
Liboso, Paulo ayebisaki Akalipa ndenge azalaki konyokola baklisto. Alobaki ete: “Nanyokoli bango ete nameka kotukisa bango Nzambe. Nangali mpenza, bongo nabengani bango ata kino mboka na bapaya.” Na nsima, Paulo alobaki ndenge azwaki emonaneli ya nkembo ya Yesu oyo asekwaki, atunaki ye ete: “Ozali konyokola ngai mpo na nini? Ezali na yo mpasi kotuta makolo na makonga.”a—Misala 26:4-14.
Na nsima, Yesu apesaki Saulo mosala ya kotatola epai na bato ya mabota nyonso ‘makambo oyo amonaki mpe makambo oyo [Yesu] akomonisa ye yango.’ Paulo alobaki ete asalaki makasi mpo na kokokisa mokumba wana nokinoki. Alobaki lisusu na Akalipa ete: “Na ntina na makambo oyo Bayuda bakangi ngai kati na Tempelo, mpe bameki koboma ngai.” Lokola ayebaki ete Akalipa asepelaka na Lingomba ya Bayuda, Paulo amonisaki na litatoli na ye ete azali “koloba likambo mosusu te, bobele makambo malobaki basakoli na Mose ete makobima” na ntina na liwa mpe lisekwa ya Masiya.—Misala 26:15-23.
Fesete akataki ye maloba. Angangaki ete: “Koyekola na yo mingi na mikanda ezali kobɛlisa yo ligboma.” Paulo azongisaki ete: Nazali na ligboma te. Kasi nazali koloba makambo na solo mpe na sembo.” Na nsima Paulo alobaki mpo na Akalipa ete: “Mokonzi ayebi ntina na makambo oyo, bongo nazali koloba na ye polele, mpo nayebi ete azangi koyeba likambo moko na yango te, mpo ete makambo oyo masili kosalama na kobomba te.”—Misala 26:24-26.
Bongo Paulo alobaki na Akalipa: “Mokonzi Akalipa, ondimi basakoli?” Na ntembe te, motuna yango etungisaki Akalipa. Ezalaki bongo mpamba te, asengelaki naino kobatela lokumu na ye, mpe soki ayanolaki ɛɛ na motuna ya Paulo ye mpe alingaki komitya na ngámbo ya likambo oyo Fesete abéngaki “ligboma.” Mbala mosusu asosolaki ete Akalipa azali kokakatana mpo na koyanola, Paulo ye moko apesaki eyano. Alobaki ete: “Nayebi ete ondimi.” Sikawa Akalipa alobaki, kasi na maloba ya polele te. Ayebisaki Paulo ete: “Olingi kondimisa ngai na ntango mokuse ete nasala mosala na Moklisto!”—Misala 26:27, 28.
Na mayele nyonso Paulo asalelaki maloba oyo Akalipa alobaki mpo na komonisa likambo moko ya ntina. Alobaki ete: “Nabondeli Nzambe ete, soko na mokuse, soko na molai, bobele yo moko te kasi bango nyonso bayoki ngai lelo bázala bobele boye lokola ngai, nde na minyɔlɔlɔ oyo te.”—Misala 26:29.
Akalipa na Fesete bazwaki Paulo na likambo te oyo esɛngaki ete akufa to akɔta bolɔkɔ. Lisusu, mposa na ye ya kokende epai ya Kaisala esengelaki kokokisama. Yango wana Akalipa alobaki na Fesete ete: “Soko moto oyo alɔmbi kokenda na Kaisala te, mbɛ ayebi kokangwa.”—Misala 26:30-32.
Liteya mpo na biso
Lolenge oyo Paulo atatolaki liboso na bakonzi ezali ndakisa monene mpo na biso. Asalelaki bokɛngi ntango azalaki koloba na Mokonzi Akalipa. Na ntembe te, ayebaki malamu makambo ya nsɔni oyo ezalaki kati na Akalipa na Belenike. Libala na bango ezalaki libala ya bandeko, mpamba te, Belenike azalaki mpenza leki ya Akalipa. Kasi, na libaku oyo Paulo aponaki te kolobela etamboli malamu. Nzokande, alobelaki makambo oyo ye na Akalipa bazalaki kondima. Soki olongoli wana, atako Paulo atángaki kelasi epai ya Gamaliele moto ya mayele, ayebaki ete Akalipa ayebaki mimeseno ya Bayuda malamumalamu. (Misala 22:3) Atako Akalipa azalaki na etamboli ya mbindo, Paulo alobaki na ye na limemya mpamba te Akalipa azalaki mokonzi.—Baloma 13:7.
Ntango tozali kolobela bindimeli na biso na molende, mokano na biso ezali te ya kolobela to kokweisa misala ya mbindo oyo bayoki na biso basalaka. Nzokande, mpo bákakatana te mpo na koyamba solo, tosengeli kolobela mingi makambo kitoko ya nsango malamu, kobenda likebi mingi likoló na bilikya oyo biso na bango tozali na yango. Ntango tozali koloba liboso ya mikóló to ya bakonzi, tosengeli koyeba etɛlɛmɛlo na bango. (Levitike 19:32) Na motindo yango, tokoki komekola Paulo, oyo alobaki ete: “Nayei ndenge nyonso epai na bato nyonso ete na nzela nyonso nabikisa bamosusu.”—1 Bakolinti 9:22.
[Maloba na nse ya lokasa]
a “Kotuta makolo na makonga” emonisi mosala ya ngɔmbɛ oyo ezali komiyokisa mpasi na kotutáká nsɔngɛ ya nzete oyo ebongisami mpo na kotambwisa mpe kokamba nyama. Bobele bongo, Saulo azalaki nde komiyokisa mpasi ntango azalaki konyokola bato oyo Nzambe azalaki kosunga.