Loyembo 27
Tózala na ngámbo ya Yehova!
1. Makanisi ebulunganaki
Na matey’a lokuta tozwaki;
Nzokande sikoyo tosepeli
Mpo na Bokonzi’a Nzambe.
(MONDIMO)
Poná nde Yehova;
Sepelá na ye.
Akotika yo te;
Landá pole n’e.
Sakolá bonsomi,
Kimya na bato.
Nzamb’akoyangela
Na nzel’a Kristo.
2. Kosalela Nzambe ez’esengo,
Tópalanganisa mboto’a solo.
Tósalisa bandeko na biso,
Bákumisa nkombo n’e.
(MONDIMO)
Poná nde Yehova;
Sepelá na ye.
Akotika yo te;
Landá pole n’e.
Sakolá bonsomi,
Kimya na bato.
Nzamb’akoyangela
Na nzel’a Kristo.
3. Biso tokobanga Satana te;
Tokolikya na Yehova Nzambe.
Ata baza’ mingi, biso moke,
Nguya na biso Nzambe.
(MONDIMO)
Poná nde Yehova;
Sepelá na ye.
Akotika yo te;
Landá pole n’e.
Sakolá bonsomi,
Kimya na bato.
Nzamb’akoyangela
Na nzel’a Kristo.
(Talá mpe Nz. 94:14; Mas. 3:5, 6; Ebr. 13:5.)