LOYEMBO 161
Nasepeli kosala mokano na yo
1. Nsima ya batisimo na ye,
Yesu atondi n’esengo
Ya kosala mokano na yo.
Amipesaki mpenza.
Lisumu elongaki ye te.
Apesaki yo nkembo.
Amipesaki tii na liwa.
Aza’ ndakisa na nga’.
(MONDIMO)
Kosala mokano na yo
Epesaka nga’ esengo.
Namipesi mpo nalingi.
Nakolanda pole n’o.
Kosala mokano na yo
Epesi eliky’a solo.
Bolingo n’o eza’ solo.
Nakokumis’o Nkolo
Mpo na seko.
2. Koyeba yo, Yehova Nzambe,
Eza’ esengo ya solo.
Nazali motatoli na yo
Mpe nakoteya solo.
Kosalela yo ná bandeko:
Oyo bomoi kitoko!
Nakokumisa nkombo na yo.
Nakopesa yo nyonso.
(MONDIMO)
Kosala mokano na yo
Epesaka nga’ esengo.
Namipesi mpo nalingi.
Nakolanda pole n’o.
Kosala mokano na yo
Epesi eliky’a solo.
Bolingo n’o eza’ solo.
Nakokumis’o Nkolo
Mpo na seko.
Mpo nalingaka yo!