Loyembo 79
Nguya ya boboto
Ya Papye
1. Koyeba Yehova ez’esengo,
Ye alobá bongo:
Aza’ na bwanya mpe nguya mingi,
Yehov’aza’ mpe boboto.
2. Kristo’alobi na oyo alɛmbi:
Bwakelá ngai kilo.
Ekanganeli na y’eza’ pɛtɛɛ,
Mpo azali na boboto.
3. Nzambe ná Yesu baza’ ndakisa,
Tómekola bango.
Na nyonso tosalaka butu moi,
Tómonisa mpe boboto.
(Talá mpe Mika 6:8; Mat. 11:28-30; Kol. 3:12; 1 Pe. 2:3.)