Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rk eteni 7 nk. 18-19
  • Makambo oyo Nzambe alakaki na nzela ya basakoli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo Nzambe alakaki na nzela ya basakoli
  • Kondima ya solosolo—Ekosalisa yo ozala na bomoi ya esengo
  • Masolo mosusu
  • Mokano na Nzambe mpo na bato ezali nini?
    Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?
  • Nzambe azwi bibongiseli mpo na kobikisa bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Mombóto ya Nyoka: Lolenge nini etɔndɔlami?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Zalá na kondima na Liloba ya Esakweli ya Nzambe!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Kondima ya solosolo—Ekosalisa yo ozala na bomoi ya esengo
rk eteni 7 nk. 18-19

ETENI 7

Makambo oyo Nzambe alakaki na nzela ya basakoli

BASAKOLI ya kala bamonisaki kondima epai ya Nzambe. Bazalaki kondima bilaka na ye mpe makambo oyo bazalaki kosala eyokanaki na bilaka yango. Bilaka yango ezalaki nini?

Ntango kaka Adama ná Eva batombokelaki Nzambe na Edene, mbala moko Nzambe alakaki ete akopona moto moko oyo akopanza “nyoka,” elingi koloba ‘dragɔ ya monene . . . , nyoka ya ebandeli, oyo babengi Zabolo mpe Satana,’ akoboma ye mpo na libela. (Ebandeli 3:14, 15; Emoniseli 12:9, 12) Moto yango oyo asengelaki koya ezali nani?

Mbula soki 2 000 nsima ya kopesa esakweli wana ya liboso, Yehova alakaki mosakoli Abrahama ete Moto yango akobima nde na libota na ye. Nzambe ayebisaki Abrahama boye: “Na nzela ya momboto na yo, bikólo nyonso ya mabele ekomizwela mpenza lipamboli, mpo oyoki mongongo na ngai.”​—Ebandeli 22:18.

Na mobu 1473 L.T.B., Nzambe ayebisaki mosakoli Moize makambo mosusu mpo na “momboto” yango. Moize ayebisaki bana ya Yisraele boye: “Mosakoli moko oyo akouta epai na yo mpenza, oyo akouta na kati na bandeko na yo, lokola ngai, ye nde Yehova Nzambe na yo akotɛlɛmisela yo​—ye nde bokoyoka.” (Kolimbola Mibeko 18:15) Mosakoli moko oyo akozala lokola Moize akobima nde na kati ya bana ya Abrahama.

Mosakoli yango akozala mpe mokitani ya Mokonzi Davidi mpe akokóma mokonzi monene. Nzambe alakaki Mokonzi Davidi ete: “Nakobimisa mpenza nsima na yo momboto na yo, [mpe] nakopika kiti ya bokonzi na ye makasi mpenza mpo na ntango oyo etyami ndelo te.” (2 Samwele 7:12, 13) Nzambe amonisaki mpe ete mokitani yango ya Davidi akobengama “Nkumu ya Kimya,” mpe abakisaki: “Bonene ya boyangeli na ye mpe kimya, kiti ya bokonzi ya Davidi mpe bokonzi na ye, ekozala na nsuka te. Ekopikama makasi mpe ekosimbama na bosembo mpe na boyengebene, banda sikoyo mpe tii na ntango oyo etyami ndelo te.” (Yisaya 9:6, 7) Ɛɛ, Mokambi yango ya sembo akozongisa kimya mpe bosembo na mokili mobimba. Kasi, ntango nini asengelaki koya?

Abrahama, Moize, Davidi, Yesu, mpe momboto oyo alakamaki azali kopanza motó ya nyoka

“Momboto” oyo alakamaki asengelaki . . . , kouta na libota ya Abrahama, kozala mosakoli lokola Moize, kouta na bakitani ya Davidi, komonana na mobu 29 T.B., kopanza nyoka, Satana

Na nsima, anzelu Gabriele ayebisaki Danyele mosakoli ya Nzambe ete: “Osengeli koyeba mpe kozwa mayele ya kososola: banda kobima ya liloba ya kobongisa mpe kotonga lisusu Yerusaleme tii Masiya Mokambi, ekozala pɔsɔ nsambo, lisusu pɔsɔ ntuku motoba na mibale.” (Danyele 9:25) Yango ezalaki pɔsɔ 69 ya bambula. Pɔsɔ mokomoko ezalaki na mbula 7, mpe nyonso esali mbula 483. Babandaki kotánga yango na mobu 455 L.T.B. mpe esukaki na mobu 29 T.B.a

Masiya, mosakoli oyo azalaki lokola Moize, “momboto” oyo bazelaki ntango molai, ayaki mpenza na mobu 29 T.B.? Tiká tótalela yango.

a Talá eteni 2 ya maloba ya nsuka ya lisolo na lokasa 255 ya buku Sepelá na bomoi libela na libela! oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Okopesa eyano nini?

  • “Momboto” ya Abrahama oyo alakamaki akosala Satana nini?

  • Nzambe alakaki nini na nzela ya Moize?

  • Makambo nini Davidi ayebaki na ntina na “momboto”?

  • Anzelu Gabriele ayebisaki Danyele nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto