Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yp1 mok. 32 nk. 228-234
  • Ndenge ya komibatela mpo básangisa na ngai nzoto na makasi te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya komibatela mpo básangisa na ngai nzoto na makasi te
  • Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Soki ozali komiyoka lokola omemi ngambo
  • Yebisá basusu likambo yango
  • Bongo soki basangisá na ngai nzoto na makasi?
    Biyano na mituna 10 oyo bilenge batunaka
  • Koluka kosangisa na moto nzoto na makasi—Eteni 2: Soki basalá yo yango
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Lolenge nini kolónga mpasi ya kobebisama
    Lamuká!—1993
  • Kobebisa basi: Makambo mazali kosalema
    Lamuká!—1993
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
yp1 mok. 32 nk. 228-234

Mokapo 32

Ndenge ya komibatela mpo básangisa na ngai nzoto na makasi te

Mbula na mbula, bato bazali kosangisa nzoto na makasi na bamilio ya bato, mpe bato ya mayele bamonisi ete ezali kosalema mingimingi epai ya bilenge. Na ndakisa, ankɛtɛ moko oyo esalemaki na États-Unis emonisi ete kati na bato oyo basangisaki na bango nzoto na makasi, ndambo na bango bakokisi naino mbula 18 te. Lokola likambo ya kosangisa nzoto na makasi epalangani mingi, ezali na ntina mingi otalela yango.

“Akangaki ngai mpe abwakaki ngai na nse liboso nayeba likambo oyo ezalaki kosalema. Nasalaki nyonso oyo nakokaki mpo atika ngai.  . . . Nalukaki koganga, kasi ata mongongo na ngai ezalaki kobima te. Natindikaki ye, nabɛtaki ye, natyaki ye manzaka, mpe natutatutaki ye na makolo. Na ntango wana nde nayokaki mbeli ekɔti ngai na nzoto. Nasilaki mpenza makasi.”​—Annette.

BATO oyo balukaka kosangisa nzoto bakómi mingi lelo, mpe mbala mingi balukaka kosala yango na bilenge. Na ndakisa ya Annette, bilenge mosusu bakangaki bango na makasi mpo básangisa nzoto na moto oyo bayebi te. Basusu bakangaki bango na makasi na moninga moko ya kartye. Likambo yango ekómelaki Natalie, oyo azalaki naino na mbula 10 ntango elenge moko oyo azalaki kofanda pembeni ya ndako na bango asangisaki na ye nzoto na makasi. Alobi boye: “Nazalaki kobanga makasi mpe nayokaki nsɔni, yango wana liboso nayebisaki moto te.”

Bilenge mosusu basangisaki na bango nzoto na makasi na ndeko moko ya libota. Mwasi moko nkombo na ye Carmen, alobi boye: “Ntango nazalaki kati na mbula 5 tii 12, tata na ngai asangisaki na ngai nzoto na makasi. Nsukansuka, ntango nakómaki na mbula 20, nasololaki na ye mpo na likambo yango. Asɛngaki ngai pardɔ, kasi mwa basanza na nsima, abenganaki ngai na ndako.”

Likambo ya mawa, lelo oyo bato mingi bakangaka bango na ndeko moko ya kartye, moninga moko to ndeko moko ya libota mpo básangisa na bango nzoto na makasi.a Kasi likambo yango ya konyokola bilenge ebandi lelo te. Likambo wana ya mawa esalemaki kutu na kala, ntango Biblia ekomamaki. (Yoele 3:3; Matai 2:16) Lelo oyo tozali na ntango moko ya mpasi. Bato mingi “balinganaka te na kati ya libota,” mpe ekómaka mbala mingi ete básangisa nzoto na makasi na bilenge basi (ata mpe bilenge mibali). (2 Timote 3:1-3) Ata soki eloko moko te ekoki kobatela yo mpenza na likambo yango, okoki kosala makambo mingi mpo omibatela. Talelá makambo oyo elandi:

Zalá ekɛngɛ. Ntango ozali kotambola libándá, yebáká makambo oyo ezali kosalema liboso na yo, nsima na yo, mpe zingazinga na yo. Bisika mosusu eyebaná ete ezalaka mabe, mingimingi na butu. Soki likoki ezali, kokendaka bisika wana te, to soki olingi kokende kuna, kokendaka yo moko te.​—Masese 27:12.

Kopesaka bato makanisi mabe te. Kozalaka seresere te na moto oyo azali mwasi to mobali na yo te mpe kolataka te bilamba oyo etikaka nzoto libándá. Kosala bongo ekoki komonisa ete osepelaka básangisa na yo nzoto, to omonaka yango mabe te.​—1 Timote 2:9, 10.

Lobelá makambo oyo ebongi te bósala. Soki ozali na fianse, bósolola makambo oyo ebongi to ebongi te bósala.b Soki bosololi makambo yango, koluka te komitya na makambo oyo ekoki kotinda moto asangisa na yo nzoto na makasi.​—Masese 13:10.

Kobanga te koloba. Ezali mabe te soki ozali koloba na mpiko nyonso ete: “Kosala bongo te!” to “Longolá lobɔkɔ na yo na nzoto na ngai!” Kokakatana te mpo oz’obanga ete okobungisa moninga na yo. Soki aboyi yo mpo na likambo yango, elakisi ete abongi te kokoba kozala moninga na yo! Kutu, obongi na mobali ya solo, oyo azwaka nzoto na yo mpe mateya ya Biblia na valɛrɛ.c

Zalá ekɛngɛ ntango ozali na internet. Koyebisa basusu ata mokolo moko te makambo etali yo moko, mpe kotyaka te na internet bafɔtɔ oyo ezali kolakisa esika oyo ozali.d Soki moto moko atindeli yo mesaje mpo na kosɛnga yo bósangisa nzoto, koyanola te na mesaje wana. Soki ozali koboya koyanola bamesaje ya ndenge wana, bato mingi bakozala lisusu na makasi te ya kosɛnga yo bósangisa nzoto.

Soki osaleli makambo oyo touti kolobela, yango ekoki kobatela yo na bato oyo balingi kosangisa na yo nzoto. (Masese 22:3) Kasi, mpo na koloba solo, okoki te kokima makambo nyonso oyo ekoki kokweisa yo na motambo yango. Na ndakisa, okoki te kozala ntango nyonso ná moto ntango ozali kotambola to kokima bisika ya mabe. Mbala mosusu kutu ozali kofanda na esika moko mabe.

Mbala mosusu likambo moko ya mabe oyo ekómelá yo esalisi yo oyeba ete makambo mabe ekoki kokómela moto ata soki asali makasi akima yango. Lokola Annette, oyo tolobeli na ebandeli, ekoki kozala ete bakangaki yo na mbalakaka mpe makasi esilaki yo. To na ndakisa ya Carmen, banyokolaki yo ntango ozalaki mwana moke, mpe na ndenge yango, ozalaki na makasi te ya kokima likambo yango​—to mpe ozalaki koyeba malamu te likambo oyo ezalaki kosalema. Okoki kosala nini soki ozali komiyoka lokola omemi ngambo mpo basangisaki na yo nzoto na makasi?

Soki ozali komiyoka lokola omemi ngambo

Tii lelo, Annette amiyokaka kaka lokola amemi ngambo mpo na likambo oyo esalemaki. Alobi boye: “Nazali monguna na ngai moko. Nazali kokanisa likambo yango mokolo na mokolo. Nakanisaka ete esengelaki natindika ye lisusu makasi. Ya solo, ntango mbeli ekɔtaki ngai, nabangaki makasi. Nakokaki kosala eloko moko te, kasi namonaka ete esengelaki nasala eloko.”

Natalie mpe amiyokaka lokola amemi ngambo. Alobi boye: “Esengelaki te nazala bindimandima bongo. Baboti batyaki mobeko ete ngai ná ndeko na ngai ya mwasi tosengeli kozala esika moko ntango tozali kosakana libándá. Namoni ete ngai nde napesaki moto wana ya kartye na biso libaku ya kosala ngai mabe. Likambo oyo esalemaki esalaki libota na ngai mpasi, mpe namonaka lokola ngai nde nasalaki ete báyoka mpasi bongo. Likambo yango nde etungisaka ngai mingi.”

Soki omiyokaka mpe lokola Annette ná Natalie, okoki kosala nini mpo otika komiyoka ete omemi ngambo? Ya liboso, salá makasi obatela na makanisi ete soki basangisaki na yo nzoto na makasi, ezalaki te mpo ondimaki básala yo bongo. Bato mosusu bakanisaka ete likambo yango eza’ mabe te, balobaka ete “mibali basalaka kaka bongo” mpe ete eza’ nde foti ya mwana mwasi. Kasi moto moko te alingaka básangisa na ye nzoto na makasi. Soki basalelá yo likambo wana ya nsɔmɔ, ezali foti na yo te!

Ya solo, ezali mpasi te kotánga ete “ezali foti na yo te”; kondima yango nde ekoki kozala mpasi mingi. Basusu babombaka likambo oyo esalemaki na motema, batungisamaka na yango mpe bamiyokaka mabe. Kasi, soki ofandi nyɛɛ, nani akosepela: yo to moto oyo asalaki yo likambo wana? Osengeli kotalela mpe likanisi mosusu oyo.

Yebisá basusu likambo yango

Biblia eyebisi biso ete ntango mpasi ya Yobo, moto ya sembo ekómaki makasi, alobaki boye: “Nakobimisa lobanzo oyo nazali na yango mpo na ngai moko. Nakoloba na bololo ya molimo na ngai!” (Yobo 10:1) Okozwa matomba soki ozali mpe kosala bongo. Koyebisa moto oyo otyelaka motema likambo oyo ekómelaki yo ekosalisa yo na nsima ondima likambo yango mpe okitisa mpasi na yo.

Soki ozali Motatoli ya Yehova, ezali na ntina oyebisa nkulutu moko ya lisangá likambo yango. Maloba ya kolendisa ya nkulutu moko ya bolingo ekoki kondimisa yo ete lokola basangisi na yo nzoto na makasi, okómi mbindo te mpo na lisumu ya moto mosusu. Yango mpe Annette amonaki. Alobi boye: “Nasololaki na moninga moko ya motema, mpe alendisaki ngai nasolola na bankulutu mibale ya lisangá na biso. Nasepelaki mingi ndenge nasalaki yango. Basololaki na ngai mbala mingi mpe bayebisaki ngai oyo nazalaki mpenza na mposa ya koyoka: ete likambo oyo esalemaki ezalaki foti na ngai te. Nazalaki na foti ata moke te.”

Koyebisa basusu likambo oyo ekómelaki yo mpe komonisa ndenge ozali komiyoka ekoki kosalisa yo okóma na nkanda te mpe obomba nkanda yango na motema te. (Nzembo 37:8) Ekoki mpe kosalisa yo oyoka malamu, mbala mosusu mpo na mbala ya liboso banda likambo yango esalemá. Natalie amonaki ete likambo yango ezali solo, nsima ya koyebisa baboti na ye ete basangisaki na ye nzoto na makasi. Alobi boye: “Basungaki ngai mingi. Balendisaki ngai nayebisa basusu likambo yango, mpe yango esalisaki ngai nazala mawamawa te mpe nkandankanda te.” Natalie amonaki mpe ete libondeli epesaka ye makasi. Alobi boye: “Kobondela Nzambe ezalaki kosalisa ngai, mingimingi na ntango oyo nakokaki te koyebisa moto makambo oyo naza’ na yango na motema. Ntango nabondelaka, nalobaka polele. Epesaka ngai mpenza kimya na motema.”e

Yo mpe okoki komona ete ezali na “ntango ya kobikisa.” (Mosakoli 3:3) Luká lisalisi epai ya baninga oyo bazali lokola bankulutu oyo Biblia elobi ete bazali lokola “esika ya komibomba mpo na kokima mopɛpɛ mpe esika ya kobombana mpo na kokima mbula ya mopɛpɛ makasi.” (Yisaya 32:2) Bateláká nzoto na yo mpe makanisi na yo. Zwáká ntango ya kopema mingi. Mpe oyo eleki nyonso, tyá motema epai ya Yehova, Nzambe ya kobɔndisa nyonso, oyo akotya mosika te mokili ya sika oyo “basali-mabe bakobomama, kasi bato oyo balikyaka na [Ye] nde bakozwa mabele.”​—Nzembo 37:9.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ekoki mpe kosalema ete mobali asangisa nzoto na makasi na mwasi oyo abimaka na ye to mpe alangwisa ye mpo asangisa na ye nzoto.

b Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 4 ya Volimi 2.

c Ya solo, toli oyo ekoki mpe kosalelama soki mwana mwasi az’otya mwana mobali mbamba mpo básangisa nzoto.

d Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 11 ya Volimi 2.

e Na ntango mosusu baoyo basangisaki na bango nzoto na makasi batungisamaka makasi na makanisi. Soki ezali bongo, ezali malamu koluka monganga. Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali ndenge ya kosilisa mawa yango, talá mokapo 13 mpe 14 ya buku oyo.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

“Mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka, . . . oyo balinganaka te na kati ya libota, . . . oyo bazangi komipekisa, bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te.”​—2 Timote 3:1-3.

TOLI

Soki basangisá na yo nzoto na makasi, salá liste ya bavɛrsɛ oyo ekoki kopesa yo makasi. Na ndakisa, okoki kozwa Nzembo 37:28; 46:1; 118:5-9; Masese 17:17; mpe Bafilipi 4:6, 7.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Na États-Unis, bilenge mingi (koleka 90 %) oyo bakokisi naino mbula 18 te, oyo basangisá na bango nzoto na makasi, bayebaka moto oyo asali bango yango.

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Soki naz’omiyoka lokola namemi ngambo mpo na likambo oyo esalemaki, nako ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Matomba nini okozwa soki oyebisi basusu ete basangisaki na yo nzoto na makasi?

● Nini ekoki kokómela yo to basusu soki ofandi nyɛɛ?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 232]

“Eza’ mpasi koyebisa basusu ete basangisaki na yo nzoto na makasi, kasi eza’ likambo ya malamu koleka oyo okoki kosala. Koloba ekosalisa yo olongola mawa mpe nkanda mpe ozwa lisusu makasi.”​—Natalie

[Etanda na lokasa 230]

“Soki olingaka ngai . . . ”

Moto moko oyo alukaka kosangisa nzoto na bana basi, akangaka bango na makasi te kasi, na mayele nyonso asakanaka nde na motema na bango. Ndenge nini? Alobaka maloba lokola: “Moto nyonso asangisaka nzoto,” “Moto moko te akoyeba,” to, ndenge elobelami na mokapo 24 ya buku oyo, “Soki olingaka ngai, okosala yango.” Kokosama te na mwana mobali oyo az’oluka kondimisa yo ete kosangisa nzoto elakisi bolingo. Moto nyonso oyo akanisaka bongo azali kaka koluka matomba na ye moko. Azali kokanisa yo te mpe bolamu na yo te. Nzokande, mobali ya solo akotya matomba na yo liboso na oyo ya ye mpe akomonisa ete azali na makasi ya kolanda mibeko ya Nzambe. (1 Bakorinti 10:24) Mobali ya solo akanisaka te ete bana basi babongi kaka na kosangisa nzoto. Kasi, atalelaka “bilenge basi lokola bandeko basi na makanisi ya pɛto mpenza.”​—1 Timote 5:1, 2.

[Elilingi na lokasa 233]

Soki basangisaki na yo nzoto na makasi, ezali mpasi omema mawa yango yo moko. Mpo na nini te koyebisa yango moto mosusu mpo ozwa lisalisi?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto