Kobebisa basi: Makambo mazali kosalema
NTANGO okosilisa kotanga lokasa oyo, na eteni moko ya États-Unis basili kobebisa mwasi moko. Azali ye moko, atyolami, azali kati na nsomo mpe mobulungano na likambo oyo bauti kosalela ye, mbala mosusu na moto oyo ye ayebi. Ekoki kozala ete babeti ye to ameki komibikisa. Na ntembe te, akoki kokanisa ete azali pene na kufa na ye.
Na États-Unis, esika motuya na yango mozali moko na mituya mileki minene na mokili mobimba, kobebisa basi ezali lolenge ya mobulu mabe oyo ezali kokola mingi. Engebene ba rapports ya la police, na ngonga nyonso ezali na makaneli 16 ya kobebisa basi mpe basi 10 babebisami mpenza. Tokoki kobakisa na oyo motuya ya kobebisama oyo eyebani te, ekoki koleka mbala zomi.
Likambo oyo ya mawa esuki bobele na États-Unis te. Na France, motuya ya basi oyo bayebisaki kobebisama na bango ebakisamaki na 62% kati na 1985 mpe 1990. Na Canada bayebisaki kobebisama 27 000 na 1990, oyo ezali bokoli ya 100% na mibu motoba. Na Allemagne, nsima ya minutes nsambo nyonso oyo ezali koleka bazali kobebisa mwasi moko.
Kobebisama ezali mpe kosalema likoló na mibali.a Psychologue Elizabeth Powell alobaki ete bato mosusu “bazali konyokwama wana bafandi elongo na bato oyo ndambo na bango bazali na bantina ya kooka nkanda, ya kokakatana mpe ya kobanga.” Basusu bazali ntango nyonso kolenga na ntina na basi na bango, bamama na bango, bandeko basi, bana basi na bango to baninga na bango ya basi, to basengeli kolonga mpasi mpe kotungisama ya lisosoli oyo euti na kobebisama ya moto moko oyo balingi ye.
Mpo na nini bokoli wana?
Kobebisama ya basi ezali mingi kati na bato oyo bazali kondima mobulu mpe boyangeli mabe ya mibali likoló na basi. Na mikili mingi, mibali mpe basi bazali kobanda bomwana na bango koyoka masoló mpe makambo ya lokuta matali kosangisa nzoto, oyo ezali na bopusi mabe. Bopanzi nsango, libota mpe bato ya zongazonga bazali kobebisa elimo na bango na likanisi oyo ete kosangisa nzoto ekendaka nzela moko na mobulu, mpe ete basi bazali wana mpo na kokokisa bamposa ya mibali mpe ete mposa na bango ezali na ntina moko te.
Jacques, oyo azali na mibu 23 mpe azali mobateli ya mikanda alobi ete: “Bato bazali komonisa na yo ete, mpo na kozala mobali, osengeli kosangana na basi mingi.” Lokola azalaki moombo ya likanisi wana, mbele Jacques abebisaki mwasi moko oyo azalaki kosilikisa ye to azalaki kookisa ye mawa.
Engebene makanisi ya Linda Ledray, mwasi moko ya mayele mingi, bizaleli ya mobulu mpe ya nkanda motindo wana epai na basi bizali komonana mingi kati na bikolo epai kobebisama ya basi epalangani mpenza. Abakisaki ete: “Mbala mingi, mobebisi azali bobele komekola makambo oyo azali komona epai na bato nyonso.” Na likambo yango, cinéma mpe televizyó ezali kosala mingi mpo na kopalanganisa makambo wana ya mabe. Kobebisama ya basi ezali motó na likambo oyo esalelami mingi na makambo matali kolakisa bolumbu na bato, nzokande ezali bobele yango moko te. Boyekoli esili komonisa ete ba films ya mobulu oyo ezali na boyokani te na makambo ya kosangisa nzoto ezali kotinda na kosala mabe mingi epai na basi koleka ba films oyo ezali na makambo ya kosangisa nzoto, kasi ezangi mobulu. Televizyó mpe ezangi ekweli te wana, lokola elobaki Elizabeth Powell, “ezali kolakisa misala mileki mabe oyo bato bakoki komona mitali konyokola basi.” Bopanzi nsango ezali koloba ete, “soki nkanda eyeli yo, silisa yango likoló na moto moko.”
Nsango wana ezali komonisama na misala kati na boyokani ya mokolo na mokolo, elongo na matomba mabe oyo biso nyonso toyebi. Wana mokili mozali kopesa nzela na makambo nyonso, mibali mingi bazali komona kosangisa nzoto lokola lotomo na bango, mingimingi soki bazali kobimisa mosolo mpo na mwasi moko to soki mwasi yango amonisi lokola ete azali kosepela na matumoli na bango.
Mokomi na zulunalo Robin Warshaw amonisaki ete, “na likambo ya kosangisa nzoto, liloba ‘te’ ezalaka mbala mingi na ntina moko te wana euti na mwasi.” Mpe esukaka mbala mingi na kobebisama ya mwasi.
“Kobebisama ya mbala na mibale”
Cathy azalaki na mibu 15 ntango babeti misato ya équipe ya hockey ya lycée na bango babebisaki ye. Lokola libota na ye bafundaki likambo yango, bato mosusu bamonaki yango mabe mpe batungisamaki mingi na baninga, na bato ya pembeni mpe bato bayebani te. Bazalaki koloba na libota na ye ete, “bana mibali bazali se bana mibali.” Na eteyelo, bazalaki kofinga Cathy, mpe azalaki kokuta mikanda ya makaneli kati na ebombelo na ye ya mikanda. Bana mibali oyo babebisaki ye bakweisamaki na etumbu oyo basengelaki kosala yango nsima mpe na misala ya matomba ya bato nyonso, nzokande bakomaki ba vedettes ya masano na eteyelo. Cathy atungisamaki na boumeli ya basanza mingi kino asukaki na komiboma.
Lokola likambo oyo ya mawa emonisi yango, likoló na monyoko ya nzoto oyo mobebisi apesi, bato ya pembeni bazali kobakisa monyoko ya makanisi. Makanisi ya lokuta oyo mapalangani na ntina na kobebisama mazali mbala mingi kotinda na kotya mokumba ya likambo likoló na mwasi oyo abebisami. Baninga, baboti, minganga, basambisi mpe bakati makambo—epai na bango mwasi oyo abebisami azali kolikya kozwa kobondisama—mbala mosusu bazalaka na makanisi wana ya libunga mpe bazali mpenza kosala mabe lokola mobebisi. Ezali na ntina soki bazali kolobela mpamela wana lokola “kobebisama ya mbala na mibale.”
Makanisi ya libunga na ntina na kobebisama ya basi ezali kopesa maoki ya libateli ya lokuta. Bato mosusu bazali kokanisa ete soki bameki kososola mwa mabunga kati na ezaleli na mwasi oyo abebisami—alataki bilamba oyo ezali kokanga nzoto makasi, azalaki kobima ye moko na mpokwa to andimaki—mpe soki bapengoli etamboli yango, bakobebisama te ezala bango moko to basangani ya libota na bango. Likanisi mosusu oyo, ete kobebisama ya basi ezali na mitinda te mpe ekoki kokomela mwasi nyonso ata alati motindo nini, ezali mpenza mpasi mpo na kondima yango.
Mwasi moko oyo abebisamaki na mobali moko oyo akanisaki ete azali “malamu, moto na lokumu,” alobaki ete: “Likambo lileki mabe oyo okoki kosala ezali ya kokanisa ete ekoki kokómela yo te.”
Kokokisa makanisi mapalangani na makambo mazali kosalema
Totalela mwa makanisi mosusu oyo bato bazalaka na yango, oyo ezali komema na kokweisa basi oyo babebisami mpe ezali nde kolendisa babebisi:
Likanisi lipalangani: Mobebisi azalaka ntango nyonso moto oyo ayebani te.
Makambo mazali kosalema: Mbala mingi, babebisi ya basi bazali bayebani oyo bazalaki kotyela bango motema. Boyekoli moko emonisi ete basi 84 kati na basi 100 babebisamaki na mibali oyo bayebi bango mpe kobebisama ya basi 57 kati na 100 esalemaki na elaka ya bokutani. Mwasi moko kati na basi nsambo akobebisama na mobali na ye.b Ezala ete esalemi na moto ayebani te, na moninga to mpe na mobali na ye moko, kobebisama ya mwasi ezali likambo ya mobulu mpe ezali kopesa mobulungano ya maoki.
Likanisi lipalangani: Bakoki kolobela kobebisama bobele soki mwasi azali na elembo ya koboya na ye, lokola kokangama ya makila na nse ya mposo.
Makambo mazali kosalema: Ata babundi na makasi to te, basi mingi bazalaka na bilembo te oyo ezali komonana, lokola kokangama ya makila to mpota.
Likanisi lipalangani: Mwasi oyo babebisi ye azali mpe na ngambo soki asali eloko moko te mpo na koboya.
Makambo mazali kosalema: Kobebisa mwasi elimbolami lokola likambo ya kosangisa nzoto, ezala ya lolenge nini, na makasi to na kobangisáká, kozanga ete mwasi yango andima. Ezali kosalela nguya epai na mwasi oyo alingi te nde ezali kokómisa mobali mobebisi. Mpo na yango, mwasi oyo abebisami akoki kokweisama te ete asali pite. Lokola na likambo ya kosangisa nzoto elongo na mosangani ya libota, mwasi oyo abebisami azali na nse ya bopusi ya mobebisi na ye, oyo atindi ye na kotosa. Ezali te mpo ete nsomo to kobanga epusi mwasi moko na komitika nde andimi likambo yango. Kondima elimboli kozala na likoki ya kopona kozanga ete abangisama; ete andimi kosala yango ye moko kasi apusami te.
Likanisi lipalangani: Kobebisama ezali likambo ya bolingo boleki.
Makambo mazali kosalema: Kobebisama ezali likambo ya mobulu. Mibali bazali kobebisa basi bobele mpo na kokokisa bamposa na bango te, kasi lisusu mpo na esengo ya konyokola moto moko.c
Likanisi lipalangani: Mwasi moko akoki kolamusa to kokolisa mposa na mobali moko na motindo boye ete mobali yango azali lisusu na makoki te ya kopekisa mposa na ye ya kosangisa nzoto.
Makambo mazali kosalema: Epai na babebisi mposa na kosangisa nzoto eleki ya mibali misusu te. Nkutu, mobebisi moko kati na misato akokoka te kosangisa nzoto kino nsuka. Mbala mingi, kobebisa basi ezali likambo ekanami liboso kasi ya pwasa te. Ndenge esalemaka, mobebisi abendaka mwasi oyo alingi kobebisa na esika akoki kozwa ye moko, ekoki kozala ete alandi ye kino esika oyo bato bazali te soki ayebi ye te, to asali ete bakutana bobele bango mibale soki ayebi ye.
Likanisi lipalangani: Basi bazali kokosela mibali misusu makambo mpo na kosala bango mabe to mpo ete batungisami na lisosoli nsima na kosala pite.
Makambo mazali kosalema: Motuya ya matatoli ya lokuta na likambo ya kobebisama eleki te oyo etali mobulu mosusu ya mabe: 2%. Nzokande, bato bayekoli mingi likambo yango bazali bongo kondima ete nkutu motuya monene ya kobebisama eyebisamaka te.
Likanisi lipalangani: Mwasi akoki “kobyanga” ete babebisa ye soki azali na molato oyo ezali kotumola mposa, to soki ameli masanga mingi, to ntango andimi ete mobali moko afuta biloko alei mpe ameli na restaurant to soki andimi kokende epai na mobali yango.
Makambo mazali kosalema: Ezali te mpo ete mwasi moko azangi bososoli to azangi mayele nde abongi ete babebisa ye. Babebisi bango moko bazali na mokumba ya mabe na bango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kati na kobebisama 10 moko ezali kobebisama ya mobali.
b Bakoki kolobela kobebisama kati na libala ntango mobali asaleli nguya mpo na kosangana na mwasi na ye na makasi. Mibali mosusu bazali kokanisa ete wana ntoma Paulo alobeli “bokonzi” na mobali likoló na nzoto na mwasi na ye, azalaki kokanisa bokonzi oyo ezangi ndelo. Nzokande, Paulo alobaki lisusu ete, “mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko.” Ntoma Petelo mpe alimbolaki ete mibali basengeli kopesa na basi na bango “lokumu lokola na mbeki na motau, mbeki na bomwasi.” Maloba oyo mazali kolongola makanisi nyonso ya mobulu to ya kosala na makasi mpo na kosangisa nzoto.—1 Bakolinti 7:3-5; Baefese 5:25, 28, 29; 1 Petelo 3:7; Bakolose 3:5, 6; 1 Batesaloniki 4:3-7.
c “Kosangisa nzoto ezali mokano ya mobebisi te, kasi bobele mwango oyo mobebisi asaleli mpo na kosala likambo moko ya mabe.”—Wanda Keyes-Robinson, chef divisionnaire de la brigade des moeurs na Baltimore, États-Unis.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 13]
Na États-Unis, mwasi moko kati na basi minei akobebisama to bakoluka kobebisa ye
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 14]
Kobebisa basi ezali kopalangana na bikolo oyo bindimi mobulu mpe boyangeli makasi ya mibali likoló na basi