LITEYA 23
Ndenge nini mikanda na biso ekomamaka mpe ebongolamaka?
Departema ya Bokomi na États-Unis
Corée du Sud
Arménie
Burundi
Sri Lanka
Mpo “nsango malamu” esakolama na ndenge ebongi mpenza na “bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso,” tozali kobimisa mikanda na minɔkɔ soki 750. (Emoniseli 14:6) Ndenge nini tosalaka mosala monene yango? Tosalaka yango na lisalisi ya bakomi oyo bazali na mokili mobimba mpe babongoli oyo bamepesi na bolingo na bango moko, mpe bango nyonso bazali Batatoli ya Yehova.
Ekomamaka liboso na Lingelesi. Bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bakambaka mosala ya Departema ya Bokomi na biro monene ya Batatoli ya Yehova. Departema yango etalelaka mosala ya bakomi oyo bazali na biro monene mpe na babiro ya filiale mosusu. Lokola bakomi na biso bazali bato ya mikili ndenge na ndenge, balobelaka mimeseno ndenge na ndenge, mpe yango esalaka ete mikanda na biso esepelisa bato ya mokili mobimba.
Na nsima etindamaka epai ya babongoli. Nsima ya kokoma lisolo moko, babongisaka yango lisusu mpe soki endimami, etindamaka na nzela ya Internet na baekipi ya babongoli na mokili mobimba. Bandeko yango babongolaka lisolo yango, na nsima batalaka na likebi mpenza soki makanisi yango ebongolami malamu, mpe na nsuka batángaka yango mpo na komona soki eyokani malamu na mibeko ya lokota. Babongoli yango basalaka nyonso bápona “maloba ya solo na bosikisiki” mpo bábimisa mpenza likanisi mobimba ya Lingelesi na monɔkɔ oyo bazali kobongola.—Mosakoli 12:10.
Baordinatɛrɛ esalisaka mpo mosala ekende mbangu. Ordinatɛrɛ ekoki te kozwa esika ya bakomi to babongoli. Nzokande, mosala na bango esalemaka na lombangu mpo bazali kosalela badiksionɛrɛ, biloko ya kosalela bolukiluki mpe bisaleli mosusu oyo ezali na kati ya ordinatɛrɛ. Batatoli ya Yehova babimisá programɛ moko ya ordinatɛrɛ oyo babengi MEPS (Système électronique d’édition multilingue), oyo esalisaka bandeko bábongola, bátya bililingi mpe bábongisa mikanda na minɔkɔ ebele mpo enyatama na imprimerie.
Mpo na nini tosalaka makasi boye ata mpo na minɔkɔ oyo elobamaka kaka na mwa bato moke? Mpo mokano ya Yehova ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.”—1 Timote 2:3, 4.
Ndenge nini mikanda na biso ekomamaka?
Mpo na nini tobongolaka mikanda na biso na minɔkɔ ebele?