Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yc liteya 3 nk. 8-9
  • Rahaba andimelaki Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Rahaba andimelaki Yehova
  • Teyá bana na yo
  • Masolo mosusu
  • Laaba ayokaki nsango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Rahaba abombaki banɔngi
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • “Atángamaki moyengebene mpo na misala na ye”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Rahaba Atangamaki moyengebene mpo na misala ya kondima
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Teyá bana na yo
yc liteya 3 nk. 8-9
Rahaba amati na plafɔ esika banɔngi babomanaki

LITEYA 3

Rahaba andimelaki Yehova

Kanisá ete tozali na engumba Yeriko. Engumba yango ezali na mokili ya Kanana, epai bato bandimelaka Yehova te. Mwasi moko na nkombo Rahaba afandaka kuna.

Ntango Rahaba azalaki elenge, ayokaki na masolo ndenge Moize akabolaki Mbu Motane mpe abimisaki Bayisraele na Ezipito. Ayokaki lisusu ndenge Yehova asalisaki bango bálonga banguna na bango. Sikoyo, Rahaba ayoki ete Bayisraele bakómi pene ya kozwa Yeriko.

Rahaba abombaki banɔngi mpo andimelaki Yehova

Mokolo moko na mpokwa, Bayisraele mibale bakɔti na mayele mpo na kotala mokili ya Yeriko. Bakómi na ndako ya Rahaba. Asɛngi bango bákɔta na ndako mpe báfanda. Na butu, bayebisaki mokonzi ya Yeriko ete banɔngi moko bakɔti na mboka mpe ete bakei na ndako ya Rahaba. Mokonzi atindaki bato epai ya Rahaba mpo na kokanga mibali yango. Kasi Rahaba abombaki banɔngi yango mibale na plafɔ ya ndako na ye mpe alobaki na basali ya mokonzi ete: ‘Banɔngi bazalaki awa kasi babimi. Soki bolandi bango sikoyo, bokoki kozwa bango!’ Oyebi mpo na nini Rahaba abombaki banɔngi yango?​— Ezali mpo andimelaki Yehova mpe ayebaki ete akopesa Bayisraele mokili ya Kanana.

Liboso ete banɔngi yango bábima na ndako ya Rahaba, balakaki Rahaba ete bakobatela ye ná bandeko na ye ntango Yeriko ekobomama. Oyebi nini bayebisaki ye asala?​— Bayebisaki ye: ‘Zwá nsinga oyo ya motane, kangá yango na fɛnɛtrɛ na yo ekita libándá. Soki osali yango, moto nyonso oyo akozala na ndako na yo akobika.’ Rahaba asalaki kaka ndenge banɔngi yango bayebisaki ye. Oyebi ndenge makambo elekaki?​—

Nsinga ya motane etɛlɛmi na fɛnɛtrɛ ya ndako ya Rahaba na efelo ya Yeriko

Yehova abikisaki Rahaba ná bandeko na ye

Nsima ya mwa mikolo, Bayisraele batambolaki zingazinga ya engumba yango na kimya. Basalaki bongo mikolo motoba; bazalaki kobaluka mbala moko na mokolo. Kasi na mokolo ya nsambo, babalukaki engumba yango mbala nsambo. Mpe na nsima, bango nyonso bagangaki makasi. Yehova akweisaki efelo ya engumba mobimba. Kasi ndako oyo ezalaki na nsinga ya motane na fɛnɛtrɛ ekweaki te. Ozali komona yango na elilingi?​— Rahaba ná bandeko na ye babikaki!

Lisolo ya Rahaba ekoki koteya yo nini?​— Rahaba andimelaki Yehova mpo ayebaki makambo minene oyo asalaki. Yo mpe ozali koyekola makambo mingi ya Yehova. Ondimelaka Yehova lokola Rahaba?​— Toyebi ete ondimelaka ye!

TÁNGÁ NA BIBLIA

  • Yosua 2:1-24; 6:1-5, 14, 15, 20-25

  • Baebre 11:31

MITUNA:

  • Masolo nini Rahaba ayokaki ntango azalaki elenge?

  • Ndenge nini Rahaba asalisaki Bayisraele oyo bayaki konɔnga mboka? Mpo na nini asalisaki bango?

  • Banɔngi yango balakaki Rahaba nini?

  • Lisolo ya Rahaba ekoki koteya yo nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto