Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/8 nk. 24-25
  • Laaba ayokaki nsango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Laaba ayokaki nsango
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Rahaba andimelaki Yehova
    Teyá bana na yo
  • “Atángamaki moyengebene mpo na misala na ye”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Rahaba abombaki banɔngi
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Rahaba Atangamaki moyengebene mpo na misala ya kondima
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/8 nk. 24-25

Teyá bana na yo

Laaba ayokaki nsango

OZALI na engumba Yeliko, na mokili ya Kanana. Mwasi moko na nkombo Laaba azalaki na engumba yango eleki sikoyo mbula soki 3 500. Abotamaki nsima ya kobimisama ya Bayisalaele na boombo na Ezipito, ntango Moize akatisaki bango Mbu Motane mpe amemaki bango na mokili ekauká! Radio, televizyo, to Internet ezalaki te, kasi Laaba ayokaki nsango ya likamwisi yango​—atako esalemaki mosika mpenza na mboka na ye. Oyebi ndenge ayokaki nsango yango?​—a

Na ntembe te, bato oyo bazalaki kosala mibembo nde bamemaki nsango ya makamwisi yango. Ntango azalaki kokola, Laaba abosanaki te likambo oyo Yehova asalelaki bato na ye. Na nsima, ayokaki lisusu makambo mingi ya kokamwa na ntina na Bayisalaele. Nsima ya kotambola na esobe mbula 40, bakɔtaki na mokili ya Kanana, mpe Nzambe asalisaki bango bálonga bato nyonso oyo bazalaki kotɛmɛla bango. Sikoyo, Laaba ayoki ete Bayisalaele bakómi pene na Yeliko, na ngámbo mosusu ya Ebale Yolodani!

Mokolo moko na mpokwa, bapaya mibale bayaki epai ya Laaba, mpo bayebaki ete bato bayaka mingi epai na ye. Laaba ayambaki bango. Na butu, mokonzi ya Yeliko ayokaki ete banɔngi mibale, bato ya Yisalaele bayei na Yeliko mpe bazali na ndako ya Laaba. Na yango, mokonzi atindaki bato epai ya Laaba mpe bayebisaki ye abimisa bato mibale oyo bayaki epai na ye. Oyebi makambo oyo Laaba ayebaki mpe asalaki nini?—

Liboso kutu bato oyo mokonzi atindaki bákóma epai na ye, Laaba ayebaki ete bato yango mibale bazali banɔngi, bato ya Yisalaele. Na yango, abombaki bango likoló ya ndako na ye mpe ayebisaki bato oyo mokonzi atindaki ete: “Solo mibali bakómi epai na ngai . . . mpe penepene na ntango ya kozipa ekuke na ntango ya butu, bango babimi.” Laaba alobaki na bango boye: ‘Bólanda bango.’

Mpo na yo, Laaba abatelaki banɔngi yango mpo na nini?— Ye moko amonisi ntina oyo abatelaki bango; alobaki boye: “Ngai nayebi ete [Yehova] asili kopesa bino mokili oyo . . . Mpo ete biso toyoki motindo [Yehova] akaokisaki mai ya Mai Motane liboso na bino wana ebimaki bino na Ezipito.” Ayokaki mpe ndenge Nzambe asalisaki Bayisalaele bálonga banguna na bango mosusu.

Na ntembe te, Yehova asepelaki ndenge Laaba abombaki banɔngi yango mibale, ndenge Biblia ezali komonisa yango na Baebele 11:31. Asepelaki mpe ntango Laaba asɛngaki banɔngi yango boye: ‘Ngai nasaleli bino boboto, bino mpe bólaka ngai ete ntango bokozwa Yeliko, bokobikisa bomoi ya tata na ngai mpe mama na ngai, mpe bandeko na ngai nyonso.’ Banɔngi balakaki Laaba ete bakobikisa libota na ye mobimba soki alandi malako na bango. Oyebi malako oyo bapesaki ye?—

Balobaki na Laaba boye: ‘kamatá nkamba motane oyo mpe kangá yango na lininisa na yo, mpe yanganisá bandeko na yo nyonso na ndako na yo. Soki osali bongo, bato nyonso oyo bakozala na kati ya ndako na yo bakobika.’ Laaba asalaki kaka ndenge banɔngi yango bayebisaki ye. Oyebi likambo oyo esalemaki na nsima?—

Bayisalaele bakómaki na libándá ya lopango ya Yeliko. Na boumeli ya mikolo motoba, batambolaki zingazinga ya engumba yango mbala moko na mokolo kozanga koloba. Na mokolo ya nsambo, batambolaki zingazinga ya engumba yango mbala nsambo mpe na nsima bagangaki makasi. Bifelo ya engumba ekweaki nyonso—Kaka ndako ya Laaba nde etikalaki, epai nsinga ya motane ekangisamaki na lininisa! Laaba mpe libota na ye mobimba babikaki.—Yosua 2:1-24; 6:1-5, 14, 15, 20-25.

Liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo Laaba asalaki?— Asukaki kaka te na koyoka nsango ya makamwisi oyo Nzambe asalaki mpo na kobikisa Bayisalaele, kasi asungaki mpe basaleli ya Nzambe ntango azwaki libaku ya kosala yango. Ya solo, Laaba aponaki kozala elongo na basaleli ya Yehova! Yo mpe okosala bongo?— Tozali kolendisa yo osala yango.

a Ntango ozali kotánga na bana, soki omoni elembo oyo (—), tɛlɛmá mwa moke mpe tiká bana báyanola na motuna yango.

Mituna:

  • Bansango nini ya ntina mingi Laaba ayokaki ntango azalaki mwana moke?

  • Makambo nini asalelaki banɔngi mibale ya Yisalaele, mpe mpo na nini?

  • Laaba asɛngaki banɔngi bálaka ye nini?

  • Ndenge nini oyebi ete Yehova asepelaki na Laaba, mpe ndenge nini okoki komekola ye?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto