Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • hf eteni 1 biteni 1-3
  • Landá toli ya Nzambe mpo ozala na libala ya esengo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Landá toli ya Nzambe mpo ozala na libala ya esengo
  • Okoki kozala na libota ya esengo
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • 1 NDIMÁ MOKUMBA OYO YEHOVA APESI YO
  • 2 YEBÁ MPENZA KOMITYA NA ESIKA YA MOLONGANI NA YO
  • 3 BÓZALA NA BOMOKO
  • Pesáká molongani na yo kilo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Zalá sembo epai ya molongani na yo
    Okoki kozala na libota ya esengo
  • Nsima ya mokolo ya fɛti ya libala
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Libala—Likabo oyo euti na Nzambe
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
Makambo mosusu
Okoki kozala na libota ya esengo
hf eteni 1 biteni 1-3
Mwasi ná mobali mokolo ya libala na bango

ETENI 1

Landá toli ya Nzambe mpo ozala na libala ya esengo

“Moto oyo azalisaki bango na ebandeli asalaki bango mobali ná mwasi.”​—Matai 19:4

Yehovaa Nzambe nde abalisaki mwasi ná mobali ya liboso. Biblia eyebisi biso ete asalaki mwasi mpe na nsima “ayaki na ye epai ya moto.” Adama asepelaki mingi mpe alobaki ete: “Aa! sikoyo, oyo nde mokuwa ya mikuwa na ngai mpe mosuni ya mosuni na ngai.” (Ebandeli 2:22, 23) Tii lelo, Yehova alingi ete bato oyo babalá bázala na esengo.

Ntango obali, okoki kokanisa ete makambo nyonso ekotambola malamu. Kasi, yebá ete ata mwasi ná mobali oyo balingani mpenza bakutanaka na mikakatano. (1 Bakorinti 7:28) Na mwa buku oyo, okomona batoli ya Biblia oyo, soki osaleli yango, ekoki kosala ete ozala na esengo na libala mpe na libota na yo.​—Nzembo 19:8-11.

1 NDIMÁ MOKUMBA OYO YEHOVA APESI YO

OYO BIBLIA ELOBI: Mobali azali mokonzi ya libota.​—Baefese 5:23.

Soki ozali mobali, Yehova asɛngi yo osalelaka mwasi na yo makambo na boboto. (1 Petro 3:7) Asalá mwasi mpo azala mosungi na yo, mpe alingi ete opesaka ye lokumu mpe olinga ye. (Ebandeli 2:18) Osengeli kolinga mwasi na yo na bolingo oyo ekotinda yo otya bamposa na ye liboso ya bamposa na yo.​—Baefese 5:25-29.

Soki ozali mwasi, Yehova asɛngi yo ozalaka na limemya mingi epai ya mobali na yo mpe osalisa ye akokisa mokumba na ye. (1 Bakorinti 11:3; Baefese 5:33) Ndimáká bikateli na ye mpe salisáká ye na motema mobimba. (Bakolose 3:18) Soki ozali kosala bongo, okozala na motuya mingi na miso ya mobali na yo mpe na miso ya Yehova.​—1 Petro 3:1-6.

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Tuná molongani na yo makambo nini okoki kosala mpo ozala mwasi to mobali ya malamu koleka. Yoká ye na likebi, mpe salá makasi obongisa bisika oyo esengeli

  • Zalá na motema molai. Ekozwa ntango mpo oyeba makambo oyo ekopesa moninga esengo

2 YEBÁ MPENZA KOMITYA NA ESIKA YA MOLONGANI NA YO

OYO BIBLIA ELOBI: Osengeli kotyelaka molongani na yo likebi. (Bafilipi 2:3, 4) Zwáká molongani na yo na valɛrɛ mingi, mpe kobosana te ete Yehova asɛngi basaleli na ye bázala na “boboto na bato nyonso.” (2 Timote 2:24) Koloba kozanga kokanisa ezali lokola “kozokisa na mopanga, kasi lolemo ya bato ya bwanya nde nkisi oyo ebikisaka.” Yango wana, ponáká maloba na yo malamumalamu. (Masese 12:18) Elimo ya Yehova ekosalisa yo olobaka na boboto mpe na bolingo.​—Bagalatia 5:22, 23; Bakolose 4:6.

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Liboso osolola na molongani na yo makambo ya ntina mingi, bondelá Nzambe asalisa yo ozala motema mpiɔ mpe na makanisi malamu

  • Kanisá malamu makambo oyo okoloba mpe ndenge oyo okolobela yango

3 BÓZALA NA BOMOKO

OYO BIBLIA ELOBI: Ntango bobalani, yo ná molongani na yo bokómi “mosuni moko.” (Matai 19:5) Atako bongo, bozali bato mibale mpe makanisi na bino ekoki kokesana. Yango wana, bosengeli koyokanisa makanisi na bino mpo bózala na bomoko. (Bafilipi 2:2) Kozala na bomoko ekosalisa mingi ntango bozali kozwa bikateli. Biblia elobi boye: “Myango epikamaka makasi na toli.” (Masese 20:18) Bólanda toli ya Biblia ntango bozali kozwa bikateli minene elongo.​—Masese 8:32, 33.

Mwasi ná mobali bazali kosukola bilamba mpe basaani elongo

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Kosuka kaka te na koyebisa molongani na yo makambo to makanisi na yo; yebisá ye mpe ndenge ozali koyoka na motema na yo

  • Sololá na molongani na yo liboso omikɔtisa na likambo moko

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe ndenge emonisami na Biblia.

KOZALA MAKAMBO MAKASIMAKASI TE MPE KOZANGA ELIKYA TE

Koluka te ete yo to molongani na yo bósalaka makambo na ndenge ya kokoka. (Nzembo 103:14; Yakobo 3:2) Luká nde komona bizaleli malamu ya molongani na yo. Zalá na elikya ete batoli ya Biblia ekosalisa bino, mpe kolɛmba te. (2 Timote 3:16) Yehova akopambola milende oyo ozali kosala mpo na kolanda toli na ye, mpe mbula na mbula, libala na bino ekobanda kobonga se kobonga.​—Bagalatia 6:9.

OMITUNA BOYE . . .

  • Molongani na ngai amonaka mpenza ete nakipaka ye mingi koleka ngai moko?

  • Likambo nini nasali lelo mpo na komonisa limemya mpe bolingo epai ya molongani na ngai?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto