Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • hf eteni 2 biteni 1-2
  • Zalá sembo epai ya molongani na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zalá sembo epai ya molongani na yo
  • Okoki kozala na libota ya esengo
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • 1 TYÁ LIBALA NA YO NA ESIKA YA LIBOSO
  • 2 BATELÁ MOTEMA NA YO
  • Landá toli ya Nzambe mpo ozala na libala ya esengo
    Okoki kozala na libota ya esengo
  • Nsima ya mokolo ya fɛti ya libala
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Ndenge ya kokokisa ndai na yo ya libala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Pesáká molongani na yo kilo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Okoki kozala na libota ya esengo
hf eteni 2 biteni 1-2
Mobali asimbeli mwasi na ye lingɛmbu wana azali kosalisa ye akɔta na motuka

ETENI 2

Zalá sembo epai ya molongani na yo

“Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.”​—Marko 10:9

Yehova asɛngi biso tózala sembo. (Nzembo 31:23) Yango ezali na ntina mingimingi na libala mpo soki bosembo ezali te, bokotyelana mpe motema te. Yango wana, kotyelana motema ezali na ntina mingi mpo bolingo ekola.

Lelo oyo, bato mingi bazali sembo te na libala na bango. Mpo na kobatela libala na yo, osengeli kosala makambo mibale.

1 TYÁ LIBALA NA YO NA ESIKA YA LIBOSO

OYO BIBLIA ELOBI: “Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.” (Bafilipi 1:10) Libala na yo ezali moko ya makambo oyo eleki ntina na bomoi na yo. Osengeli kotya yango na esika ya liboso.

Yehova alingi ete okangama na molongani na yo mpe ‘bósepela na bomoi’ elongo. (Mosakoli 9:9) Amonisi polele ete osengeli ata mokolo moko te kosundola molongani na yo; kasi osengeli nde koluka ndenge ya kosala makambo oyo ekopesa moninga esengo. (1 Bakorinti 10:24) Salá nyonso mpo molongani na yo amona ete ozalaka na mposa na ye mpe osepelaka na ye.

Mobali amemeli mwasi na ye ti ya mɔtɔ; mobali akuti mwasi na ye na ndako

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Lekisáká ntango mingi elongo na molongani na yo, mpe tyeláká ye likebi nyonso

  • Kanisáká molongani na yo na makambo nyonso

Mwasi ná mobali bazali kolya mpe kozwa mwa mopɛpɛ elongo

2 BATELÁ MOTEMA NA YO

OYO BIBLIA ELOBI: “Moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii ayoki ye mposa asali na ye ekobo na motema.” (Matai 5:28) Soki moto akanisaka makambo ya mbindo mingi, azali sembo te epai ya molongani na ye.

Yehova alobi ete osengeli ‘kobatela motema na yo.’ (Masese 4:23; Yirimia 17:9) Mpo na kosala yango, osengeli kokeba na miso na yo. (Matai 5:29, 30) Landá ndakisa ya Yobo, oyo asalaki kondimana na miso na ye mpo atala ata moke te mwasi mosusu na mposa. (Yobo 31:1) Zalá na ekateli makasi ya koboya mpenza kotala pornografi. Zalá mpe na ekateli makasi ya koboya kozala seresere na mwasi to mobali oyo azali molongani na yo te.

Mobali azali na fɔtɔ ya mwasi na ye na biro na ye na mosala

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Monisáká bato polele ete okangamá kaka na molongani na yo

  • Talelá makambo oyo ekoki koyokisa molongani na yo mpasi, mpe katá mbala moko boninga nyonso oyo ekoki kotungisa ye

SALÁ OYO OKOKI KOSALA

Luká koyeba malamumalamu mabunga na yo. (Nzembo 15:2) Koyoka nsɔni te, sɛngá lisalisi. (Masese 1:5) Soki okanisaka makambo ya mbindo, kobá kobunda mpo na kolongola yango. Kolɛmba te. (Masese 24:16) Yehova akopambola milende oyo ozali kosala mpo na kotikala sembo epai ya molongani na yo.

OMITUNA BOYE . . .

  • Nakoki kosala nini mpo nalekisaka ntango mingi elongo na molongani na ngai?

  • Molongani na ngai azali moninga na ngai ya motema?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto