Maloba ya ebandeli
Na ntango oyo ya mpasi mpenza, ntango oyo mabala mpe mabota ezali kobeba, ekoki kosalema ete libota mobimba ezala na esengo? Yango ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Kasi lisalisi ezali. Atako mwa buku oyo elobeli makambo nyonso ya libala te, emonisi batoli ya Biblia mpe makanisi ya ntina oyo ekoki kosalisa. Soki ozali kosalela yango na ndenge ebongi, yango ekosalisa yo ozala na libota ya esengo.