Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jy mok. 28 lok. 70-lok. 71 par. 6
  • Mpo na nini bayekoli ya Yesu bakilaka bilei te?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini bayekoli ya Yesu bakilaka bilei te?
  • Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Masolo mosusu
  • Likambo litali kokila bilei
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Kokila bilei esalisaka yo opusana penepene na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Biblia elobi nini na likambo etali kokila bilei?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Kokila bilei ezali lisusu na ntina te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
jy mok. 28 lok. 70-lok. 71 par. 6
Bayekoli ya Yoane Mobatisi batuni Yesu likambo ya kokila bilei

MOKAPO 28

Mpo na nini bayekoli ya Yesu bakilaka bilei te?

MATAI 9:14-17 MARKO 2:18-22 LUKA 5:33-39

  • BAYEKOLI YA YOANE BATUNI YESU LIKAMBO YA KOKILA BILEI

Yoane Mobatisi akɔtaki bolɔkɔ mwa moke nsima ya Elekeli oyo Yesu asalaki na mobu 30 T.B. Yoane alingaki ete bayekoli na ye bákóma bayekoli ya Yesu, kasi bango nyonso te nde basali yango na basanza oyo elandaki kokɔta na ye na bolɔkɔ.

Sikoyo, lokola Elekeli ya mobu 31 T.B. ekómi pene, bayekoli mosusu ya Yoane bayei epai ya Yesu mpe batuni ye: “Mpo na nini biso ná Bafarisai tokilaka bilei kasi bayekoli na yo bakilaka bilei te?” (Matai 9:14) Mpo na Bafarisai, kokila bilei ezali molulu ya losambo. Na nsima, Yesu apesi kutu ndakisa ya Mofarisai moko oyo amimoni sembo, azali kobondela: “Ee Nzambe, natɔndi yo mpo nazali lokola bato mosusu te . . . Nakilaka bilei mbala mibale na pɔsɔ.” (Luka 18:11, 12) Ekoki kozala ete bayekoli ya Yoane bazali mpe na momeseno ya kokila bilei. Ntango mosusu, bazali kokila bilei mpo bazali koyoka mawa ndenge Yoane azali na bolɔkɔ. Bato mosusu mpe bazali komituna mpo na nini bayekoli ya Yesu bazali kokila bilei te, mbala mosusu bakanisi ete soki basali bongo bakomonisa mawa na bango na likambo oyo ekómeli Yoane.

Yesu ayanoli bango na ndakisa oyo: “Baninga ya mobali ya libala bazali na ntina moko te ya kolela ntango mobali ya libala azali elongo na bango, boye te? Kasi mikolo ekoya ntango mobali ya libala akolongolama epai na bango, mpe bongo bakokila bilei.”​—Matai 9:15.

Yoane abengaki Yesu mobali ya libala. (Yoane 3:28, 29) Yango wana, lokola Yesu azali wana, bayekoli na ye basengeli kokila bilei te. Na nsima, ntango Yesu akokufa, bakozala na mawa mpe na mposa ya kolya te. Kasi, makambo ekobongwana ntango akosekwa! Na ntango wana ekozala lisusu na ntina te bákila bilei mpo na mawa.

Na nsima, Yesu apesi ndakisa mibale: “Moto moko te abambaka eteni ya elamba ya sika na elamba ya kala; mpo ntango elamba ya sika ekobendana, ekopasola elamba wana ya kala mabe koleka. Batyaka mpe vinyo ya sika na milangi ya kala ya mposo ya nyama te; soki basali bongo, milangi ya mposo ya nyama ekopanzana, vinyo ekosopana mpe milangi ya mposo ya nyama ekobeba. Kasi batyaka vinyo ya sika na milangi ya sika ya mposo ya nyama.” (Matai 9:16, 17) Yesu alingi kopesa liteya nini?

Yesu azali kosalisa bayekoli ya Yoane Mobatisi báyeba ete moto moko te asengeli kotinda bayekoli na ye bálanda mimeseno ya kala ya Bayuda, na ndakisa kokila bilei. Yesu ayaki te mpo na kosangisa losambo ya sika ná losambo ya kala, to koumisa losambo ya kala oyo etikalaki moke eboyama. Yesu alendisi bato te ete básambela losambo ya Bayuda ya mikolo na ye oyo ezali kolanda mimeseno ya bato. Aluki te kokangisa eteni ya elamba ya sika ná elamba ya kala to kotya vinyo ya sika na milangi ya kala ya mposo ya nyama.

BANDAKISA MPO NA LIKAMBO ETALI KOKILA BILEI

Molangi ya mposo ya nyama

Yesu asaleli ndakisa oyo ezali mpasi te mpo bato mingi oyo bazali koyoka ye báyeba yango: kotonga bilamba. Soki moto atongi elamba ya sika ná elamba ya kala esika moko, nini ekosalema? Ntango akosukola elamba yango, elamba ya sika ekobenda elamba ya kala mpe ekopasola yango.

Ndenge moko mpe, ntango mosusu bazalaki kobomba vinyo na milangi ya mposo ya nyama. Nsima ya ntango, mposo yango ezalaki kokóma makasi mpe kobendana lisusu te. Kotya vinyo ya sika na milangi ya ndenge wana ezalaki likama. Vinyo ya sika ekobaka kotɔka mpe ekómaka na nguya. Yango ekoki kopasola molangi ya kala, oyo mposo na yango ekómi makasi.

  • Banani bazali kokila bilei na ntango ya Yesu, mpe mpo na nini bazali kosala bongo?

  • Mpo na nini bayekoli ya Yesu bazali kokila bilei te ntango Yesu azali elongo na bango, kasi likambo nini ekotinda bango bákila bilei na nsima?

  • Bandakisa oyo Yesu apesi ya eteni ya elamba ya sika mpe vinyo ya sika elimboli nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto