Kokila bilei ezali lisusu na ntina te?
“NAKILAKA bilei mikolo nyonso ya yambo ya pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, uta ntango nazalaki elenge.” Wana ezali maloba ya Mrudulaben, mwasi moko oyo afandaka na mboka Inde, azali na bozwi mingi, mpe azali na mibu 78. Yango ezali eteni moko ya losambo na ye, mpo ete azala malamu na libala na ye, mpe bana na ye bázala na kolɔngɔ́nɔ́ malamu, mpe ete mobali na ye azala na libateli. Sikawa mobali na ye asilá kokufa, atiki te kokila bilei mikolo nyonso ya yambo ya pɔ́sɔ mpo ete azala na kolongɔ́nɔ́ malamu mpe bana na ye bázwa bomɛngo. Lokola ye, basi mosusu mingi ya Lingomba ya Hindou bakilaka bilei mbala na mbala, bakómisá yango momeseno kati na bomoi na bango.
Prakash, moto moko ya mombongo oyo afandaka na kartyé moko ya zingazinga na engumba Mumbai (Bombay), na Inde, alobi ete akilaka bilei mbula na mbula na mikolo nyonso ya yambo ya pɔ́sɔ na sanza ya Sawan (Shravan). Wana ezali sanza moko ya ntina mingi na manáka ya makambo ya losambo na Lingomba ya Hindou. Prakash ayebisi ete: “Nabandaki kokila bilei mpo na kokokisa masɛngami ya lingomba, kasi sikawa namoni likambo mosusu oyo ezali kopusa ngai ete nasala yango mpo na kobatela kolɔngɔ́nɔ́ malamu ya nzoto. Lokola sanza ya Sawan ezalaka pene na nsuka ya eleko ya mopɛpɛ makasi oyo ebéngami mousson, ezalaka libaku malamu mpo na nzoto na ngai ete ekoka kopɛtolama na maladi ndenge na ndenge oyo ebimaka mingi mpenza na eleko ya mbula.”
Basusu bakanisaka ete kokila bilei esungaka moto na nzoto, na makanisi, mpe na elimo. Na ndakisa, búku Grolier International Encyclopedia elobi ete: “Bolukiluki ya siansi oyo euti kosalema mikolo oyo emonisi ete kokila bilei ekoki kozala malamu mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, mpe soki esalelami na bokɛngi nyonso, ekoki kokólisa likoki na yo ya kososola mpe ya koyeba makambo oyo mazali kosalema zingazinga ya nzoto na yo.” Elobami ete Platon, filozofe Mogreke, azalaki kokila bilei na boumeli ya mikolo zomi to mpe koleka, mpe ete nganga-matematiki, Pythagore, azalaki kotinda bana kelasi na ye ete bákila bilei liboso ete apesa bango mateya.
Epai na bamoko, kokila bilei elimboli kozanga kolya mpe kozanga komela mai, ata moke, na boumeli ya mwa ntango; nzokande basusu bamipimelaka komela te na ntango ya kokila bilei. Bato mingi batalelaka ete kozanga kolya mitindo mikeseni ya bilei to komipekisa kolya lolenge moko ya sikisiki ya bilei ezali bongo kokila bilei. Kasi kokila bilei na boumeli ya ntango molai mpe na kozanga bokɛngi ekoki kozala likámá. Mopanzi-nsango Parul Sheth alobi ete wana nzoto esilisi lolenge moko ya sukali oyo ezalaka kati na yango, na nsima ekobongola proteini oyo ezalaka kati na misuni mpe ekokómisa yango lolenge mosusu ya sukali mpe na nsima ekobenda mafuta ya nzoto. Bongo kobongwana ya mafuta Kino sukali ebimisaka mai ya ngɛngɛ oyo ebéngami cétone. Soki cétone yango ekómi mingi, ekomata na bɔɔngɔ́, mpe ekobebisa binama bikangani na bɔɔngɔ́. Sheth alobi ete: “Ezali na ntango yango nde kokila bilei ekoki kokóma likámá. Okoki kobulunganisama, kobungisa makanisi malamu, mpe koyoka mpasi mingi . . . [Ekoki kosala ete] oyeba lisusu ata likambo moko te, mpe na nsima okokufa.”
Ebundeli mpe molulu
Kokila bilei esili kosalelama lokola ebundeli makasi mpo na kokokisa mikano ya politiki to makambo mosusu oyo matali bomoi ya bato. Moto oyo asalelaki mingi mpenza ebundeli yango ezalaki bongo Mohandas K. Gandhi, na Inde. Lokola bamilió ya bato bapesaki ye lokumu mingi, akilaki bilei mpo na kosala bopusi makasi likoló na bato ya Lingomba ya Hindou. Ntango alobelaki mbano oyo emonanaki nsima wana akilaki bilei mpo na kosilisa matáta kati na basáli na izini mpe bankolo izini, Gandhi ayebisaki ete: “Mbano na yango ya sikisiki emonanaki na ngámbo nyonso mibale, bato balongolaki nkanda. Bankolo izini bakangaki motema te . . . basáli bazongaki na mosala nsima wana nakilaki bilei na boumeli ya mikolo misato mpamba.” Prezidá ya Afrique du Sud, Nelson Mandela, asanganaki na molulu ya koboya kolya bilei, oyo eumelaki mikolo mitano, na mibu oyo akangamaki kati na bolɔ́kɔ mpo na makambo ya politiki.
Nzokande, ebele ya bato oyo bakilaka bilei mbala mingi basalaka yango mpo na kokokisa masɛngami ya lingomba. Kokila bilei ezali molulu monene kati na Lingomba ya Hindou. Búku Kokila bilei mpe bilambo ya Inde (na Lingelesi) elobi ete na mikolo misusu ya sikisiki, “bato bakilaka bilei, balyaka ata eloko moko te . . . bamelaka ata litangá ya mai te. Mibali mpe basi bakilaka bilei na lolenge makasi mpenza . . . mpo ete bázalaka ntango nyonso na esengo, na bomɛngo mpe ete bálimbisama mabungá mpe masumu.”
Kokila bilei esalemaka mingi kati na lingomba ya Jain. Zulunalo The Sunday Times of India Review eyebisi ete: “Muni [moto ya mayele] moko ya Lingomba ya Jain, na engumba Bombay [Mumbai], azalaki komela bobele kɔpɔ mibale ya mai matɔkisami mokolo na mokolo—na boumeli ya mikolo 201. Abungisaki kilo 33.” Basusu bakilaka bilei na lolenge boye ete bayaka kino kokufa mpenza na nzala, kondimisamáká ete bakozwa lobiko.
Na Lingomba ya Islam, moto nyonso oyo akómi mokóló asɛngisami kokila bilei na boumeli ya sanza ya Ramadan. Akolya eloko te mpe akomela mai te kobanda na kobima ya moi kino na kolala ya moi na boumeli ya sanza mobimba. Oyo azali maladi to oyo azali na mobembo na boumeli ya sanza wana akosala yango na sanza mosusu. Karézimo, eleko ya mikolo 40 liboso ya Pásika, ezalaka ntango oyo bato ya mangomba mosusu ya boklisto ya nkombo mpamba bakilaka bilei mpe bituluku mingi ya mangomba bakilaka bilei na mikolo na bango ya sikisiki.
Momeseno ya kokila bilei esilá naino te. Mpe, lokola ezali kosalema na mangomba mingi, tokoki komituna ete: Nzambe asɛngi ete bato bákilaka bilei? Ezali na mabaku oyo baklisto bakoki kozwa ekateli ete bákila bilei? Yango ekoki kopesa litomba? Lisoló lilandi likoyanola na mituna oyo?
[Elilingi na lokasa 3]
Lingomba ya Jain etalelaka kokila bilei lokola nzela ya kobikisa molimo
[Elilingi na lokasa 4]
Mohandas K. Gandhi asalelaki kokila bilei lokola ebundeli ya nguya mpo na kokokisa mikano ya politiki mpe ya makambo matali bomoi ya bato
[Elilingi na lokasa 4]
Kati na lingomba ya Islam, kokila bilei esɛngisami na sanza ya Ramadan
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Garo Nalbandian