Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • od lok. 179-lok. 184
  • APƐNDISI

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • APƐNDISI
  • Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Masolo mosusu
  • Batisimo mpe boyokani na yo ná Nzambe
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Lisolo ya nsuka ná baoyo bakozwa batisimo
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Kozwa batisimo ekomemela yo mapamboli mingi!
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Bilenge basengeli kozwa batisimo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
od lok. 179-lok. 184

APƐNDISI

Liyebisi epai ya baboti oyo bazali bakristo:

Lokola moboti nyonso, mposa na yo ezali ya kosalisa bana na yo bálinga Yehova mpe bámipesa na ye. Okoki kosala nini mpo na kosalisa bango bámilɛngɛla mpo na kozwa batisimo? Ntango nini ekomonana ete bakoki mpo na kosala litambe wana ya ntina?

Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango.” (Mat. 28:19) Na kolanda maloba wana, likambo ya libosoliboso mpo na kozwa batisimo ezali kokóma moyekoli: yango esuki kaka te na kokanga ntina ya mateya ya Kristo mpe kondima yango; esengeli mpe kotosa yango. Ata elenge mpe akoki kosala yango.

Bópesa bana na bino ndakisa ya malamu, mpe bókɔtisa maloba ya Yehova malamumalamu na mitema na bango. (Mib. 6:6-9) Yango elimboli kosalela buku Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia mpo na koteya bango mateya ya moboko ya Biblia mpe kolakisa bango ndenge ya kokanisa likoló ya mitinda ya Biblia mpe kosalela yango. Salisá bana na yo báyeba kolimbola, na maloba na bango moko, makambo oyo bandimaka. (1 Pe. 3:15) Boyebi mpe bilendiseli oyo okopesa bango, mpe oyo bakozwa na nzela ya boyekoli na bango moko, losambo na kati ya libota, makita ya lisangá, mpe baninga ya malamu, ekosalisa bango bakokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo mpe bákoba kokende liboso. Salisá bango bálukaka ntango nyonso kopusana penepene na Yehova.

Masese 20:11 elobi: “Ata na misala na ye mwana mobali asalaka ete bato báyeba ye, soki mosala na ye ezali pɛto mpe elongobani.” Wapi mwa misala oyo esengeli komonisa ete mwana ya mwasi to ya mobali akómi moyekoli ya Yesu Kristo mpe akoki kozwa batisimo?

Mwana oyo alingi kozwa batisimo asengeli kotosaka moboti to baboti na ye. (Mis. 5:29; Kol. 3:20) Biblia elobi boye mpo na Yesu ntango azalaki na mbula 12: “Azalaki kaka komikitisa liboso [ya baboti na ye].” (Luka 2:51) Ya solo, okoki kozela te ete mwana na yo azala moto ya kokoka. Kasi, mwana oyo alingi kozwa batisimo asengeli kosala makasi alandaka ndakisa ya Yesu mpe esengeli koyebana ete atosaka baboti na ye.

Asengeli mpe komonisa ete azali na mposa ya koyekola mateya ya solo ya Biblia. (Luka 2:46) Mwana na yo alingaka kokende na makita mpe apesaka biyano? (Nz. 122:1) Alingaka mpenza kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe koyekola ye moko?​—Mat. 4:4.

Mwana oyo alingi kozwa batisimo asalaka makasi atya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso. (Mat. 6:33) Ayebaka ete azali na mokumba ya koyebisa basusu makambo oyo ayekoli na Biblia. Lisusu, asanganaka na lolenge nyonso ya mosala ya kosakola mpe ayokaka nsɔni te koyebisa balakisi ná baninga na ye ya kelasi ete azali Motatoli ya Yehova. Azwaka na lisɛki te mikumba oyo bapesaka ye na likita Bomoi mpe mosala.

Asengeli mpe kosala makasi akima baninga mabe mpo abatela bizaleli ya pɛto. (Mas. 13:20; 1 Ko. 15:33) Yango ekomonana na makambo oyo alingaka, na ndakisa miziki, bafilme, baemisyo ya televizyo, masano ya video mpe basite Internet.

Bana mingi bandimá solo mpo na milende oyo baboti na bango basalaki mpe bazwaki batisimo ntango bazalaki naino bilenge. Tiká ete Yehova apambola bino lokola bozali kosalisa bana na bino bázwa batisimo, mpe bákóma na boyokani malamu na Yehova.

Liyebisi epai ya mosakoli oyo azwi naino batisimo te:

Kozala mosakoli oyo azwi naino batisimo te na lisangá ezali lokumu monene. Ebongi ozwa longonya na ndenge okoli na elimo. Koyekola Liloba ya Nzambe esalisi yo oyeba ye mpe ondima bilaka na ye.​—Yoa. 17:3; Ebr. 11:6.

Liboso obanda koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, mbala mosusu, ozalaki na lingomba mosusu to ozalaki kosambela te. Ekoki kozala ete ozalaki kosala makambo mosusu oyo eyokani te na mitinda ya Biblia. Kasi sikoyo omonisi kondima na yo na ndenge obongoli motema, elingi koloba oyoki mawa mingi mpo na mabe wana, mpe obongwani, elingi koloba oboyi etamboli mabe oyo ozalaki na yango mpe ozwi mokano ya kosala oyo ezali malamu na miso ya Nzambe.​—Mis. 3:19.

To ekoki kozala ete oyebi makomi mosantu “banda na bomwana na yo mpenza.” Yango ebateli yo mpo okóma te na etamboli ya mabe mpe osala lisumu monene te. (2 Tim. 3:15) Oyebi koboya makanisi mabe ya baninga mpe makambo oyo elukaka kotinda yo osala mabe na miso ya Yehova. Omonisi ete ozali na kondima mpo okangami na losambo ya solo mpe oyebisaka basusu mateya ya bokristo. Ozwi formasyo na mosala ya kosakola. Sikoyo, yo moko ozwi ekateli ya kosalela Yehova mpe ozali mosakoli oyo azwi naino batisimo te.

Ezala oyebi Yehova ntango okómi mokóló to bateyaki yo banzela na ye banda bomwana, ekoki kozala ete ozali sikoyo kokanisa kosala makambo mibale mpo na komonisa ete okoli na elimo: komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo. Okomipesa na Yehova ntango okosala libondeli mpo na komonisa ye ete ozwi ekateli ya kokangama kaka na ye mpo na libela. (Mat. 16:24) Na nsima, mpo na komonisa na miso ya bato ete omipesi na Yehova, okozwa batisimo na mai. (Mat. 28:19, 20) Komipesa mpe kozwa batisimo nde ekokómisa yo ministre to mosaleli ya Yehova Nzambe. Yango ezali lokumu mpenza!

Nzokande, ndenge omonaki yango na boyekoli na yo ya Biblia, okoki kokutana na mikakatano ndenge na ndenge. Kobosana te ete mwa moke nsima ya batisimo ya Yesu, “elimo ekambaki [ye] na esobe mpe Zabolo amekaki ye.” (Mat. 4:1) Lokola ozali moyekoli ya Kristo, nsima ya batisimo na yo, okoki kokutana na komekama. (Yoa. 15:20) Komekama yango ekoki kozala ya ndenge na ndenge. Bato ya libota na yo bakoki kotɛmɛla yo. (Mat. 10:36) Baninga ya kelasi, baninga ya mosala mpe baninga na yo ya kala bakoki kosɛka yo. Kanisáká maloba ya Yesu oyo ezali na Marko 10:29, 30, oyo elobi ete: “Ya solo mpenza nalobi na bino ete: Moto moko te atiki ndako, to bandeko mibali, to bandeko basi, to mama, to tata, to bana, to bilanga mpo na ngai mpe mpo na nsango malamu akozanga kozwa mbala nkama moko (100) sikoyo na eleko oyo, bandako, mpe bandeko mibali mpe bandeko basi, mpe bamama, mpe bana, mpe bilanga, elongo na minyoko, mpe na ntango oyo ezali koya bomoi ya seko.” Yango wana, kobá kosala makasi mpo otikala penepene na Yehova mpe otosa mitinda na ye ya sembo.

Soki olingi kozwa batisimo, yebisá mokambi-misala ya lisangani ya bankulutu. Na masolo oyo bankulutu bakosolola na yo mpo na koyeba soki okoki kozwa batisimo, bokotalela mituna oyo elandi liyebisi oyo. Na programɛ na yo ya koyekola pɔsɔ na pɔsɔ, okoki kobanda kotalela mituna yango yo moko.

Ntango ozali kobongisa masolo yango, tángá mpe kanisá malamumalamu na bavɛrsɛ oyo batye maloba na yango. Mbala mosusu, okoki kokoma mwa makanisi na yo na buku oyo to na papye mosusu. Ntango okosolola na bankulutu, okoki kotika buku na yo polele mpe kosalela mwa makanisi oyo okomaki. Soki ozali kokanga ntina ya mituna mosusu te, sɛngá mosakoli oyo ayekolaka na yo Biblia asalisa yo to sɛngá bankulutu.

Ntango ozali kosolola na bankulutu, kokanisa te ete osengeli kopesa biyano ya milaimilai to oyo ezali mindɔndɔmindɔndɔ. Ekozala malamu opesa biyano ya mikuse mpe ya polele na maloba na yo moko. Mpo na mituna mingi, ezali mpe malamu olobela vɛrsɛ moko to mibale oyo emonisi ete eyano na yo euti na Biblia.

Soki oyebi malamu te mateya ya moboko ya Biblia, bankulutu bakozwa bibongiseli mpo ete ozwa lisalisi oyo ekopesa yo likoki ya koloba na maloba na yo moko makambo oyo emonisi ete oyebi Biblia malamu, mpo okokisa masɛngami mpe ozwa batisimo na mbala ya nsima.

[Liyebisi epai ya bankulutu ya masangá: Malako oyo emonisi ndenge ya kosolola na baoyo balingi kozwa batisimo ezali na nkasa 208-212.]

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto