Bilenge basengeli kozwa batisimo?
CARLOS,a tata moko mokristo na Philippines, alobi boye: “Nazali na esengo mingi ndenge mwana na ngai ya mwasi akómi mosaleli ya Yehova, mpe nayebi ete ye moko mpe azali na esengo.” Tata mosusu na Grèce akomaki boye: “Ngai ná mwasi na ngai tozali na esengo mingi ndenge bana na biso misato bazwaki batisimo lokola Batatoli ya Yehova ntango bazalaki naino bilenge. Bazali kokola na elimo mpe bazali na esengo ya kosalela Yehova.”
Baboti bakristo bazalaka na ntina ya kosepela makasi ntango bana na bango bazwi batisimo, kasi na bantango mosusu esengo yango esanganaka na mwa kobanga. Mama moko alobi boye: “Nazalaki na esengo mingi kasi nazalaki mpe komitungisa mingi.” Mpo na nini azalaki koyoka ndenge wana? Alobi boye: “Namonaki ete sikoyo mwana na ngai ye moko akozongisa monɔkɔ epai ya Yehova.”
Kozala Motatoli ya Yehova oyo azwá batisimo ezali mokano oyo bilenge nyonso basengeli komityela. Kasi, baboti oyo babangaka Nzambe bakoki komituna boye: ‘Nayebi ete mwana na ngai azali kokola malamu na elimo, kasi akokoka mpenza kotɛmɛla bopusi ya kosala makambo ya mbindo mpe kotikala pɛto na miso ya Yehova?’ Bamosusu bakoki komituna boye: ‘Soki akómi komekama na mposa ya konduka biloko ya mokili, mwana na ngai akokoba kosalela Nzambe na esengo mpe na molende?’ Na yango, mitinda nini ya Biblia ekoki kosalisa baboti báyeba soki bana na bango babongi mpo na kozwa batisimo?
Esengeli libosoliboso kozala moyekoli
Liloba ya Nzambe epesi mbula te oyo moto asengeli kozala na yango mpo azwa batisimo, kasi elobeli nde ndenge oyo bato oyo babongi kozwa batisimo basengeli kozala na elimo. Yesu apesaki bayekoli na ye mitindo ete: “Bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango.” (Mat. 28:19) Na yango, batisimo ezali mpo na bato oyo basili kokóma bayekoli ya Kristo.
Moyekoli azali nani? Buku Étude perspicace des Écritures elobi boye: “Liloba yango esalelamaka libosoliboso mpo na kolobela bato nyonso oyo bazali kaka kondima mateya ya Kristo te kasi bazali mpe kolanda yango malamumalamu.” Baoyo bazali naino bilenge bakoki mpenza kozala bayekoli ya solosolo ya Kristo? Ndeko mwasi moko oyo asali mosala ya misionɛrɛ mbula koleka 40 na Amerika ya Sudi akomi mpo na ye moko ná bandeko na ye mibale ya basi boye: “Na bambula oyo tozalaki na yango, tokokaki koyeba ete tolingi kosalela Yehova mpe kofanda na Paradiso. Komipesa na biso na Nzambe esalisaki biso tózala na makasi ntango tokutanaki na makambo oyo emekaka bilenge. Toyokaka mawa te ndenge tomipesaki na Nzambe ntango tozalaki naino bana mike.”
Ndenge nini okoyeba soki mwana na yo akómi moyekoli ya Kristo? Biblia elobi boye: “Ata na misala na ye mwana mobali asalaka ete bato báyeba ye, soki mosala na ye ezali pɛto mpe elongobani.” (Mas. 20:11) Talá mwa misala oyo emonisaka polele ete elenge ‘azali kokende liboso’ lokola moyekoli ya Kristo.—1 Tim. 4:15.
Makambo oyo emonisaka ete mwana akómi moyekoli
Mwana na yo atosaka yo? (Kol. 3:20) Asalaka misala ya ndako oyo bopesi ye? Mpo na Yesu ntango azalaki na mbula 12, Biblia elobi ete: “Azalaki kaka komikitisa liboso [ya baboti na ye].” (Luka 2:51) Ya solo, mwana moko te lelo akoki kotosa baboti na ye na ndenge ya kokoka. Kasi bakristo ya solo basengeli ‘kolanda matambe [ya Yesu] malamumalamu.’ Na yango, bilenge oyo balingi kozwa batisimo basengeli kozala bana oyo batosaka baboti na bango.—1 Pe. 2:21.
Talelá mituna oyo elandi: Mwana na yo azali ‘kokoba koluka liboso Bokonzi’ na mosala ya kosakola? (Mat. 6:33) Alingaka koyebisa basusu nsango malamu, to esɛngaka olendisa ye makasi mpo abima na mosala ya kosakola mpe aloba na bato? Ayebi mokumba na ye ya mosakoli oyo azwi naino batisimo te? Alingaka kozongela bato oyo akutanaki na bango na teritware mpe oyo basepelaki na nsango malamu? Ayebisaka baninga na ye ya kelasi mpe balakisi na ye ete azali Motatoli ya Yehova?
Amonaka ete koyangana na makita ya lisangá ezali na ntina? (Nz. 122:1) Alingaka kopesa biyano na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe na Boyekoli ya Biblia na lisangá? Asalaka mikumba na ye na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi na esengo?—Ebr. 10:24, 25.
Mwana na yo alukaka koboya baninga ya mabe na kelasi mpe bisika mosusu mpo abatela bizaleli ya pɛto? (Mas. 13:20) Alingaka mingimingi miziki, bafilme, baemisyo ya televizyo, masano ya video mpe basite ya Internet ya ndenge nini? Maloba mpe misala na ye emonisaka ete alingaka kotosa mitinda ya Biblia?
Mwana na yo ayebi Biblia malamu? Akoki kolimbola na maloba na ye moko makambo oyo ayekolaka na losambo na bino ya libota? Akoki kolimbola mateya ya moboko ya Biblia? (Mas. 2:6-9) Kotánga Biblia mpe koyekola mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele esepelisaka ye? (Mat. 24:45) Atunaka mituna na ntina etali mateya mpe bavɛrsɛ ya Biblia?
Mituna wana ekoki kosalisa yo oyeba soki mwana na yo akoli na elimo. Nsima ya kotalela mituna wana, mbala mosusu okomona ete mwana asengeli kobongisa makambo mosusu liboso azwa batisimo. Kasi, soki etamboli na ye emonisi ete azali moyekoli ya Kristo mpe amipesi na Nzambe, okoki komona malamu otika ye azwa batisimo.
Bilenge bakoki kosanzola Yehova
Basaleli mingi ya Nzambe basalelaki ye na bosembo mpe bakangamaki na ye na bolenge na bango to mpe na bomwana na bango. Na ndakisa Yozefe, Samwele, Yosiya, mpe Yesu. (Eba. 37:2; 39:1-3; 1 Sa. 1:24-28; 2:18-20; 2 Nt. 34:1-3; Luka 2:42-49) Mpe na ntembe te bana basi minei ya Filipe oyo bazalaki kosakola bateyamaki malamu banda bomwana.—Mis. 21:8, 9.
Motatoli moko na Grèce alobaki boye: “Nazwaki batisimo ntango nazalaki na mbula 12. Nayokaka mawa ata moke te mpo na ekateli na ngai wana. Na mbula 24 oyo eleki banda wana, nalekisi mbula 23 na mosala ya mobongisi-nzela. Bolingo na ngai mpo na Yehova esalisaki ngai ntango nyonso nabunda na mikakatano ya bolenge. Ntango nazalaki na mbula 12, nazalaki te na boyebi ya Biblia oyo nakómi na yango lelo. Kasi nayebaki ete nazalaki kolinga Yehova mpe nazalaki na mposa ya kosalela ye mpo na libela. Nazali na esengo ndenge asalisi ngai nakoba kosalela ye.”
Azala elenge to mokóló, moto oyo amonisi ete azali moyekoli ya Kristo asengeli kozwa batisimo. Ntoma Paulo akomaki boye: “Na motema nde moto andimaka mpo na boyengebene, kasi na monɔkɔ nde moto alobaka polele mpo na lobiko.” (Rom. 10:10) Ntango elenge moyekoli ya Kristo asali likambo wana ya ntina, elingi koloba azwi batisimo, ye ná baboti na ye basali likambo moko monene. Kotika eloko moko te epekisa yo to bana na yo bózwa esengo oyo ezali kozela bino.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bankombo mosusu ezali ya bango te.
[Etanda na lokasa 5]
Ndenge malamu ya kotalela batisimo
Baboti mosusu bamonaka ete batisimo ya bana na bango ezali likambo moko ya malamu kasi oyo ezali mpe na likama—kaka lokola kozwa mokanda oyo epesaka moto ndingisa ya kokumba motuka. Kasi batisimo mpe mosala mosantu epekisá moto alonga na bomoi? Biblia endimi yango te. Masese 10:22 elobi boye: “Lipamboli ya Yehova—yango nde ekómisaka moto mozwi, mpe abakisaka mpasi ata moko te na yango.” Mpe Paulo akomelaki elenge Timote ete: “Ya solo, ezaleli yango ya kokangama na Nzambe ná ezaleli ya kosepela na oyo ozali na yango ezali nzela ya kozwa litomba monene.”—1 Tim. 6:6.
Ya solo, kosalela Yehova ezali pɛtɛɛ te. Yirimia akutanaki na mikakatano mingi na mosala na ye ya mosakoli ya Nzambe. Kasi, akomaki mpo na losambo ya Nzambe ya solo ete: “Maloba na yo ezwamaki, mpe nalyaki yango; mpe liloba na yo ekómaki nsai epai na ngai mpe esengo na motema na ngai; mpo ngai nabengami na nkombo na yo, Ee Yehova Nzambe ya mampinga.” (Yir. 15:16) Yirimia ayebaki ete mosala ya Nzambe nde ezalaki kopesa ye esengo. Mokili ya Satana ebimisaka mikakatano mingi. Baboti basengeli kosalisa bana na bango báyeba bokeseni wana.—Yir. 1:19.
[Etanda/Elilingi na lokasa 6]
Mwana na ngai asengeli naino kozela liboso azwa batisimo?
Na bantango mosusu, ata soki bana bakokisi masɛngami mpo na kozwa batisimo, baboti na bango bakoki kolinga bázela naino. Bakoki kopesa bantina lokola oyo:
Nazali kobanga ete soki mwana na ngai azwi batisimo, na nsima akoki kokwea na lisumu ya monene mpe akoki kobimisama na lisangá. Ebongi mpenza kokanisa ete elenge oyo azeli naino liboso azwa batisimo akozongisa monɔkɔ te epai ya Nzambe mpo na etamboli na ye? Salomo ayebisaki bilenge ete: “Yebá ete mpo na [misala na yo], Nzambe ya solo akosambisa yo.” (Mos. 11:9) Mpe na moto nyonso, ata soki azali na mbula nini, Paulo alobi boye: “Mokomoko na biso akozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpo na ye moko.”—Rom. 14:12.
Basambeli nyonso, ezala bazwá batisimo to te, bango nyonso bakozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe. Kobosana te, Yehova abatelaka basaleli na ye na ndenge ‘atikaka te ete bámekama koleka oyo bakoki kokangela motema.’ (1 Ko. 10:13) Soki bazali ‘kobatela makanisi na bango’ mpe kobundisa komekama, bakoki kotya motema ete Nzambe akosunga bango. (1 Pe. 5:6-9) Mama moko mokristo akomi boye: “Bana oyo bazwá batisimo bazali na bantina mingi koleka ya kokima makambo mabe ya mokili. Mwana na ngai ya mobali, oyo azwaki batisimo na mbula 15, amonaka ete batisimo ezali libateli. Alobaki ete: ‘Okokanisa te kosala makambo oyo eyokani te na mobeko ya Yehova.’ Batisimo elendisaka mpenza moto asala oyo ezali sembo.”
Soki na maloba mpe na ndakisa na yo oteyaka bana na yo mpo bátosa Yehova, okoki kotya motema ete bakokoba kosala yango nsima ya kozwa batisimo. Masese 20:7 elobi ete: “Moyengebene azali kotambola na ezaleli na ye ya kozanga mbeba. Esengo na bana na ye nsima na ye.”
Nalingi mwana na ngai akokisa naino mikano mosusu. Bilenge basengeli koyekola kosala mosala, mpo ete na nsima, báyeba kokokisa bamposa na bango moko. Kasi ezali likama kolendisa bango bázala na bomoi oyo emipesi kaka na kotánga kelasi mpe na koluka mbongo na esika ya komipesa na losambo ya solo. Mpo na “mboto,” to liloba ya Bokonzi, oyo ekoli te, Yesu alobaki boye: “Oyo elonamaki na kati ya banzubɛ, ezali moto oyo ayoki liloba, kasi motungisi ya makambo ya ntango oyo mpe nguya ya bokosi ya bomɛngo etye liloba nkaka, mpe aboti mbuma te.” (Mat. 13:22) Kolendisa mwana azala na bomoi oyo etye mikano ya mosuni liboso ya mikano ya elimo ekoki kolongola ye mposa ya kosalela Nzambe.
Ntango alobaki mpo na bana oyo bakokisi masɛngami mpo na kozwa batisimo kasi baboti na bango balingi te, nkulutu moko oyo aumeli alobaki boye: “Kopekisa mwana azwa batisimo ekoki kokitisa milende na ye na elimo mpe kolɛmbisa ye.” Mpe mokɛngɛli-motamboli moko akomaki boye: “Mwana akoki kobanda kobangabanga to kokanisa ete baninga baleki ye na makambo ya elimo. Akoki komikɔtisa na mokili mpo amiyoka ete azali na ntina.”
[Elilingi]
Asengeli naino kokende na iniversite?
[Elilingi na lokasa 3]
Elenge akoki komonisa ete azali moyekoli ntango azali . . .
[Bililingi na lokasa 3]
kobongisa makita mpe kopesa biyano
[Elilingi na lokasa 4]
. . . kotosa baboti
[Elilingi na lokasa 4]
. . . kobima na mosala ya kosakola
[Elilingi na lokasa 4]
. . . kobondela