Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ypq motuna 5 nk. 15-17
  • Nasala nini mpo na matumoli na kelasi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasala nini mpo na matumoli na kelasi?
  • Biyano na mituna 10 oyo bilenge batunaka
  • Masolo mosusu
  • Nasala nini soki batumoli mwana na ngai?
    Lisalisi mpo na libota
  • Tyelá Yehova motema ntango bazali kotumola yo
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Ndenge nini nakoki komibatela na eteyelo?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Nasala nini soki bazali kotumola ngai na nzela ya Internet?
    Mituna oyo bilenge batunaka
Makambo mosusu
Biyano na mituna 10 oyo bilenge batunaka
ypq motuna 5 nk. 15-17
Elenge moko azali kotumola moninga na miso ya bana-kelasi

MOTUNA 5

Nasala nini mpo na matumoli na kelasi?

NTINA NA YANGO

Ndenge oyo okosala ekobongisa to ekobebisa lisusu makambo.

YO OLINGAKI KOSALA NINI?

Talá likambo oyo: Thomas aboyi kokende kelasi lelo. Lobi mpe akokende te. Akimi na ye libela. Mpo na nini? Makambo ebandaki esali sanza misato ntango baninga na ye ya kelasi bapanzaki ye nsango ya lokuta. Na nsima, babambaki ye bankombo. Ntango mosusu mwana-kelasi akokweisa babuku ya Thomas mpe akosala lokola amonaki te; to baninga oyo bazali nsima na ye, moko na bango akotindika ye, mpe ntango Thomas akobaluka, akomona te nani atindiki ye. Lobi, makambo ebebaki lisusu ntango Thomas akutaki baninga bakomeli ye maloba ya kokanela na Internet . . .

Soki ozalaki Thomas, olingaki kosala nini?

KANISÁ!

Kokanisa te ete okoki kosala eloko te! Kutu, okoki kolonga matumoli kozanga ete obunda. Ndenge nini?

  • KOLOBA TE. Biblia elobi: “Zoba abimisaka elimo na ye nyonso, kasi ye oyo azali na bwanya abatelaka yango ezala kimya tii na nsuka.” (Masese 29:11) Soki osali makasi ofanda kimya, ata soki na motema ozali kobanga, bato oyo bazali kotumola yo bakoki kotika.

  • KOZONGISA MABE TE. Biblia elobi: “Bózongisela moto mabe na mabe te.” (Baroma 12:17) Kozongisa mabe na mabe ekobebisa lisusu makambo.

  • KOMILUKELA MAKAMBO TE. Biblia elobi: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi.” (Masese 22:3) Salá makasi okima bato oyo bakoki kotungisa yo mpe boyá makambo oyo ekoki kosala ete bátumola yo.

  • PESÁ EYANO OYO BAKANISAKI TE. Biblia elobi: “Eyano, ntango ezali ya boboto, elongolaka nkɛlɛ [nkanda].” (Masese 15:1) Okoki komeka kosala ata mwa masɛki. Na ndakisa, soki moto oyo azali kotumola yo alobi ete ozali monene, okoki kotombola mapeka mpe koloba: “Namoni nasengeli kokɔnda!”

  • KOSALA ELOKO TE. Nora, oyo azali na mbula 19, alobi: “Kofanda nyɛɛ ekomonisa ete okoli mpe ete oleki moto oyo azali kotumola yo na makasi. Ekomonisa ete ozali na komipekisa, ezaleli oyo ye azangi.”​—2 Timote 2:24.

  • KOBANGA ELOKO TE. Mbala mingi, baoyo batumolaka baninga bayebaka soki moto azali kobanga, mpe akokoka kozongisa te. Kasi bato ya matumoli bakotika yo soki bamoni ete otikeli bango nzela te bámonela yo.

  • SOLOLÁ NA MOTO. Moto moko oyo kala azalaki molakisi alobi boye: “Nakosɛnga moto nyonso oyo batumolaka ye aloba likambo yango. Yango nde ebongi kosala, mpe ekoki kosala ete bátumola bato mosusu te.”

Elenge moko abangi te moto ya motumoli

Kozala na mpiko ekopesa yo makasi oyo bato oyo batumolaka basusu bazalaka na yango te

OYEBAKI YANGO?

Longola kobundisa, matumoli ekoki kozala:

  • Maloba ezali kobima na monɔkɔ ya moto ya matumoli lokola mɔtɔ

    Kofinga. “Nabosanaka te bankombo oyo babambaki ngai to makambo oyo bazalaki koloba. Ezalaki kotinda ngai namimona ntina te, eloko mpamba. Nazalaki komona malamu báyokisa ngai nsɔni na ndenge mosusu.”​—Celine, mbula 20.

  • Elenge moko afandi ye moko mpo baninga na ye baboyi ye

    Kosundola. “Baninga na ngai ya kelasi bakómaki kokima ngai. Na bopemi ya midi, bazalaki kosala lokola esika ezali te na mesa, mpo nafanda na bango te. Mbula yango mobimba, nazalaki kolela mpe kolya ngai moko.”​—Haley, mbula 18.

  • Elenge mwasi moko ayoki nsɔmɔ mpo baninga batumoli ye nzela ya Intenet

    Na nzela ya Internet. “Mwa maloba moke kaka oyo etyami na Internet, ekoki kobebisa lokumu ya moto, ata mpe bomoi na ye. Emonani lokola nalekisi ndelo, kasi ekoki kosalema!”​—Daniel, mbula 14.

MITUNA ETALI MATUMOLI

SOLO TO LOKUTA

BIYANO

1 Matumoli ezalaka banda na ntango ya kala.

1 Solo. Na ndakisa, Biblia elobeli bato oyo babengamaki Banefilime, nkombo oyo elimboli “Bato oyo bakweisaka basusu.”​—Ebandeli 6:4.

2 Matumoli ezalaka mabe te. Ezali kaka masɛki.

2 Lokuta. Matumoli ezali na kati ya makambo oyo etindaka bilenge mingi bámiboma.

3 Ndenge malamu ya kokata matumoli ezali ya kozongisa.

3 Lokuta. Mbala mingi bato ya matumoli bazalaka makasi koleka, na yango koluka kozongisa ekosalisa te.

4 Soki omoni bazali kotumola moto, kokipe yango te.

4 Lokuta. Okozala na ngambo. Soki omoni bazali kotumola moto kasi olobi eloko te, ezali lokola olingi likambo yango ekoba, na esika oluka esila.

5 Atako bamimonisaka bilombe, mbala mingi bato ya matumoli babangaka.

5 Solo. Ata soki bato mosusu ya matumoli bamimonisaka lokola bilombe, mingi babangaka mpe banyokolaka basusu mpo bámiyoka malamu.

6 Bato ya matumoli bakoki kobongwana.

6 Solo. Soki moto ya matumoli azwi lisalisi, akoki kobongola makanisi mpe bizaleli na ye.

MAKAMBO NAKOSALA

  • Makambo nini na kosala to na koloba soki moto azali kotumola ngai?

MAKAMBO MOSUSU!

Longá matumoli kozanga ete obunda

Talá video moto azali koyema Longá matumoli kozanga ete obunda na www.pr2711.com. (Kende esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > BILENGE)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto