Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwhf lisolo 5
  • Nasala nini soki batumoli mwana na ngai?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasala nini soki batumoli mwana na ngai?
  • Lisalisi mpo na libota
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nasengeli koyeba nini mpo na matumoli?
  • Ndenge nini nakoki kosalisa?
  • Nasala nini mpo na matumoli na kelasi?
    Biyano na mituna 10 oyo bilenge batunaka
  • Bósalisa bana na bino na Eteyelo
    Lamuká!—1994
  • Nasala nini soki bazali kotumola ngai na nzela ya Internet?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Tyelá Yehova motema ntango bazali kotumola yo
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
Makambo mosusu
Lisalisi mpo na libota
ijwhf lisolo 5
Tata oyo afungoli porte mpe mwana na ye azali kokɔta elongi na nse

LISALISI MPO NA LIBOTA

Nasala nini soki batumoli mwana na ngai?

Mwana ayebisi yo ete bazali kotumola ye na kelasi. Okoki kosala nini? Kosɛnga ete mokambi ya eteyelo apesa moto oyo atumoli mwana na yo etumbu? Kolakisa mwana na yo ndenge ya kosala mpe bongo? Liboso oyeba soki okosala nini, talelá mwa makambo etali matumoli.

  • Nasengeli koyeba nini mpo na matumoli?

  • Ndenge nini nakoki kosalisa?

Nasengeli koyeba nini mpo na matumoli?

Matumoli ezali nini? Matumoli ezali likambo ya kokana konyokola moto mosusu na nzoto to na makanisi kozanga kotika. Na yango, kofinga nyonso to kosalela moto likambo moko ya mabe yango te nde matumoli.

Mpo na nini ebongi koyeba soki matumoli ezali mpenza nini: Bato mosusu basalelaka liloba “matumoli” mpo na kolobela likambo nyonso oyo ezali kosilikisa moto mosusu, ata soki ezali moke. Kasi soki ozali kokɔtela mwana na makambo mikemike, kozanga koyeba, okoki kotinda mwana ayeba te ndenge ya kosilisa matata​—likoki oyo asengeli kozala na yango sikoyo mpe ntango akokóma mokóló.

Toli ya Biblia: “Elimo na yo esilika nokinoki te.”​—Mosakoli 7:9.

Na mokuse: Atako na makambo mosusu ekosɛnga osala mwa eloko, kasi makambo mosusu ekoki kopesa mwana na yo libaku ya kokolisa ezaleli ya kokanga motema mpe koyekola ndenge ya kosilisa matata na basusu.​—Bakolose 3:13.

Kasi okosala nini soki mwana ayebisi yo ete bazali kotumola ye na nko ntango nyonso?

Ndenge nini nakoki kosalisa?

  • Na motema molai nyonso yoká mwana na yo. Luká koyeba (1) likambo nini ezali koleka mpe (2) mpo na nini bazali kotumola ye. Koloba mbala moko te ete ezali boye to boye te liboso ya koyeba makambo nyonso. Omituna boye, ‘bazali kotumola ye kaka mpamba?’ Mpo oyeba makambo nyonso, ekoki kosɛnga osolola na molakisi ya mwana to na baboti ya mwana wana mosusu.

    Toli ya Biblia: “Ntango moto azali koyanola na likambo liboso ya koyoka yango, wana ezali bozoba mpo na ye mpe kosambwa.”​—Masese 18:13.

  • Soki bazali kotumola mwana na yo, salisá ye amona ete ndenge oyo akosala ekoki kobongisa to kobebisa lisusu makambo. Na ndakisa, Biblia elobi: “Eyano, ntango ezali ya boboto, elongolaka nkɛlɛ, kasi liloba oyo epesaka mpasi ematisaka nkanda.” (Masese 15:1) Ya solo, kozongisa mabe na mabe ekoki kopelisa mɔtɔ, kosala ete matumoli eya makasi na esika esila.

    Toli ya Biblia: “Bózongisaka mabe na mabe te to kofinga na kofinga te.”​—1 Petro 3:9.

  • Limbwelá mwana ete koboya kozongisa mabe elimboli te ete azali yuma. Kutu, ezali komonisa ete azali makasi mpo aboyi basusu bátambwisa bomoi na ye. Na maloba mosusu, azali kolonga matumoli kozanga ete ye mpe akóma motumoli.

    Ezali na ntina mwana na yo abosana likambo yango te mingimingi soki batumoli ye na nzela ya Internet. Kotikela nkanda nzela​—kozongisela moto yango maloba ya nkanda na Internet ekopesa ye kaka nzela ya kokoba matumoli na ye mpe yango ekoki kosala ete mwana na yo mpe akóma motumoli! Mpo na yango, na bantango mosusu kofanda nyɛɛ ezalaka malamu koleka​—mayele yango ekosilisa motumoli makasi ya kotumola mpe akotika kotumola mwana na yo.

    Toli ya Biblia: “Esika nkoni ezali te mɔtɔ ekufaka.”​—Masese 26:20.

  • Na bantango mosusu, mwana na yo akoki koboya bato mpe bisika oyo ebendaka matumoli. Na ndakisa, soki ayebi esika oyo moto to etuluku ya bato yango bakoki kozala, akoki kokima matata soki azwi nzela mosusu.

    Toli ya Biblia: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi, kasi bato oyo bazangi boyebi baleki kaka mpe basengeli kozwa mpasi.”​—Masese 22:3.

Tata oyo azali kosolola na molakisi ya mwana na ye; tata oyo azali kosolola na tata ya mwana mosusu

Ekoki kosɛnga osolola na molakisi ya mwana to na baboti ya mwana wana mosusu

MEKÁ KOSALA BOYE: Salisá mwana akanisa litomba to mabe ya makambo oyo akoki kopona kosala. Na ndakisa:

  • Nini ekoki kosalema soki aboyi kokipe moto oyo azali kotumola ye?

  • Bongo soki ayebisi motumoli yango atika kotumola ye?

  • Bongo soki afundi motumoli yango na eteyelo?

  • Akoki “kosilisa” motumoli yango makasi soki amoniseli ye boboto to azwi matumoli yango na lisɛki?

Ezala bazali kotumola moto boye na miso to na nzela ya internet, likambo na likambo ezalaka na ndenge na yango. Boye yo ná mwana na yo bóluka solisyo oyo ebongi. Monisá mwana ete okopesa ye mabɔkɔ na boumeli ya likambo yango.

Toli ya Biblia: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.”​—Masese 17:17.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto