Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ypq motuna 6 nk. 18-20
  • Nasala nini mpo naboya makanisi mabe ya baninga?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasala nini mpo naboya makanisi mabe ya baninga?
  • Biyano na mituna 10 oyo bilenge batunaka
  • Masolo mosusu
  • Nakosala nini mpo naboya makanisi mabe ya baninga?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Bilenge—Bótɛmɛla bopusi ya baninga
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mpo na nini koyekola Biblia?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Kolanda baninga ekoki kozala malamu mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Biyano na mituna 10 oyo bilenge batunaka
ypq motuna 6 nk. 18-20
Baninga ya kelasi bazali kopesa elenge moko likaya

MOTUNA 6

Nasala nini mpo naboya makanisi mabe ya baninga?

NTINA NA YANGO

Soki okangami na makanisi na yo, yo moko okotambwisa bomoi na yo, na esika otikela basusu bátambwisa yango.

YO OLINGAKI KOSALA NINI?

Talá likambo oyo: Ntango baninga na ye mibale ya kelasi bazali kopusana, Brian ayoki mpema ekómi mokuse. Mbala mibale na pɔsɔ oyo, balukaki kotinda ye amɛla likaya. Oyo ekozala mbala ya misato.

Mwana-kelasi moko alobi:

“Ozali lisusu kaka yo moko? Nalakisa yo moninga moko.”

Ntango atángi liloba “moninga” afini Brian liso mpe abimisi eloko moko na libenga mpe apesi ye yango.

Brian amoni ete elenge yango abimisi nde likaya. Mpema ya Brian ekómi na nsuka.

Brian alobi: “Bótika ngai. Nasí nayebisaki bino ete . . .”

Mwana-kelasi mosusu akati ye maloba: “Kozala yuma te!”

Brian azwi mpiko mpe alobi: “Nazali yuma te!”

Mwana-kelasi ya mibale asimbi Brian na lipeka. Alobi na malɛmbɛ, “Zwá, koboya te.”

Mwana-kelasi ya liboso apusi likaya na elongi ya Brian mpe alobi na ye na litoi: “Tokoyebisa moto te. Ata moto moko te akoyeba.”

Soki ozalaki Brian, olingaki kosala nini?

KANISÁ!

Baninga ya Brian bakanisi malamu mpo na likambo oyo bazali kosala? Bango moko nde baponaki komɛla likaya? Mbala mosusu te. Ntango mosusu bango mpe balandaki makanisi mabe ya baninga. Balingaki baninga bándima bango; na yango, batikaka basusu bátambwisa bango.

Soki okutani na likambo ya ndenge wana, okoki kosala nini mpo oboya makanisi mabe ya baninga?

  1. MONÁ MOSIKA

    Biblia elobi: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi, kasi bato oyo bazangi boyebi baleki kaka mpe basengeli kozwa mpasi.”​—Masese 22:3.

    Mbala mingi, makambo emonanaka na mosika. Na ndakisa, okoki komona bana-kelasi mingi mwa liboso na nzela na yo, bazali komɛla likaya. Soki omoni mosika, okoyeba ndenge ya kosala.

  2. KANISÁ

    Biblia elobi: “Bózala na lisosoli ya malamu.”​—1 Petro 3:16.

    Omituna boye: ‘Nakobanda komiyoka ndenge nini soki nalandi bato?’ Baninga wana bakoki kosepela na yo mpo na mwa ntango. Kasi, na nsima okomiyoka ndenge nini? Okondima komitɛka kaka mpo na kosepelisa bana-kelasi na bino?​—Kobima 23:2.

  3. PONÁ

    Biblia elobi: “Moto ya bwanya abangaka [to, azalaka ekɛngɛ].”​—Masese 14:16.

    Nsukansuka, moto na moto asengeli kopona nzela oyo alingi mpe kondima oyo ekomemela ye. Biblia elobeli bato lokola Yozefe, Yobo, mpe Yesu, oyo baponaki nzela ya malamu. Elobeli mpe bato lokola Kaina, Esau, ná Yudasi, oyo baponaki nzela ya mabe. Yo okosala nini?

Biblia elobi: “Salá makambo na bosembo.” (Nzembo 37:3) Soki okanisi makambo oyo ekoki kokómela yo mpe obongisi makanisi na yo, koyebisa likambo oyo olingi ekozala mpasi te, mpe yango ekosalisa yo.

Komitungisa te: ekosɛnga te osalela baninga na yo diskur. Koloba kaka na mpiko ete NABOYI, ekoki kosalisa. To mpo na komonisa ete okobongola makanisi te, okoki koloba:

  • “Bótya kutu motema te!”

  • “Nasalaka makambo wana te!”

  • “Boyebi ngai malamu, nakosala yango te!”

Eloko eleki ntina ezali koloba mbala moko, na mpiko. Soki osali bongo, okokamwa ndenge baninga na yo bakotika yo mbala moko!

SOKI BASƐKI YO

Elenge moko azali kosakana na elenge mosusu lokola robo

Soki ondimi makanisi mabe ya baninga, otiki bátambwisa yo lokola robo

Okosala nini soki baninga na yo basɛki yo? Okosala nini soki balobi: “Mabe ezali wapi, ozali yuma?” Kobosana te ete maloba wana ezali kaka matumoli ya baninga. Okoki kosala nini? Okoki kosala makambo mibale.

  • Okoki komɛla yango. (“Olobi solo, nazali kobanga!” Na nsima oyebisi na mokuse ntina oyo oboyi.)

  • Okoki kozongisela bango yango. Yebisá ntina oyo oboyi, na nsima lobá likambo oyo ekotinda bango bákanisa. (“Bino bana mayele boye bomɛlaka likaya!”)

Soki baninga bakobi kotungisa yo, longwá wana! Kobosana te ete soki otikali kaka wana, matumoli na bango ekoya makasi. Soki olongwe wana, okomonisa ete olingi te bato bákómisa yo ndenge mosusu.

Mpo na koloba solo, baninga bakotika kotungisa yo te. Kasi, okoki kopona oyo okosala, koyebisa makanisi na yo, mpe koboma mɔtɔ. Kasi, yo moko nde okopona!​—Yosua 24:15.

MAKAMBO NAKOSALA

  • Ndenge nini nakoki komibongisa mpo na koboya makanisi mabe ya baninga?

  • Nakosala nini soki baninga bazali kotinda ngai nasala mabe?

MAKAMBO MOSUSU!

Boyá makanisi mabe ya baninga!

Talá video moto azali koyema Boyá makanisi mabe ya baninga! na www.pr2711.com. (Kende esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > BILENGE)

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto