Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 1/8 nk. 22-25
  • Kolanda baninga ekoki kozala malamu mpo na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kolanda baninga ekoki kozala malamu mpo na yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kolanda baninga eponi mbula te
  • Tólanda baninga ya malamu
  • Tókima baninga mabe
  • Bato mosusu oyo bazwaki litomba
  • Bilenge—Bótɛmɛla bopusi ya baninga
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Nakosala nini mpo naboya makanisi mabe ya baninga?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Mposa ya kolanda baninga mpe mosala na yo ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Nasala nini mpo naboya makanisi mabe ya baninga?
    Biyano na mituna 10 oyo bilenge batunaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 1/8 nk. 22-25

Kolanda baninga ekoki kozala malamu mpo na yo?

Biso nyonso tobotamaka na mposa ete baninga na biso bálinga biso. Moto moko te alingaka ete bato báyina ye to báboya ye. Yango wana, na lolenge moko to mosusu tolingaka kolanda makambo ya baninga na biso.

BANINGA ezali bato oyo “bakokani; . . . bato oyo makambo na bango ekokani, mingimingi mbula na bango ya kobotama, mosala na bango to bango nyonso bazali bakonzi to bangamba.” Nzokande, kolanda baninga ezali mposa oyo esalaka ete mbala mosusu, ezala ete tozali koyeba yango to te, tolandaka makanisi na bango to makambo na bango. Mbala mingi, kolanda baninga etalelamaka kaka na ndenge ya mabe. Kasi, lokola tokomona yango, ekoki mpe kopesa biso litomba.

Kolanda baninga eponi mbula te

Kolanda baninga esuki kaka epai ya bilenge te; ezalaka epai ya bato ya mbula nyonso. Likambo yango emonanaka ntango tobandi komituna mituna lokola oyo: “Bato mosusu bazali kosala yango, mpo na nini ngai te?” “Mpo na nini nasengeli ntango nyonso kokesana na basusu?” “Basusu bakokanisa nini to bakoloba nini?” “Baninga na ngai nyonso babimaka na bana basi to na bana mibali mpe bazali kobala, kasi ngai te. Nazali nde na botutu?”

Atako mikóló mpe balandaka makambo ya baninga, kasi epai na bilenge yango eleki mpenza. Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete: “Bilenge mingi bamikɔtisaka mpenza na etuluku ya baninga, elingi koloba etuluku ya baninga mpe bato oyo bayebani na bango. Bilenge yango balukaka ete baninga na bango bándima bango na esika ete baboti na bango bándima bango. Bakoki ata kobongola bizaleli na bango mpo baninga na bango bándima bango.” Buku yango ebakisi lisusu boye: “Bilenge bayokaka ete bazali kokola malamu soki baninga na bango bazali kondima bango.” Mpo na yango “bamipesaka na makambo oyo bakanisaka ete soki bazali kosala yango, bakozala na lokumu, na makambo lokola lolenge ya kolata, makoki ya kozala mokonzi, mpe kobima na bana mibali to na bana basi.”

Bato oyo babalá bakoki komona ete mpo bápona lolenge ya ndako oyo bakosomba to oyo bakofutela, vuatire na bango, soki basengeli kobota bana to te, mpe makambo mingi mosusu batalelaka baninga na bango. Balukaka kosala makambo oyo endimami na esika oyo bafandi, oyo baninga na bango to bato ya ekólo (tribu) na bango bakondima. Mabota mosusu kutu bazali kodefa mbongo kaka mpo na koluka kokokana na bato mosusu to baninga na bango. Ya solo mpenza, mbala mingi emonanaka ete tozali kolanda baninga na makambo oyo tozali kokana, na makanisi na biso, mpe mikano oyo tozali kozwa. Lokola nguya moko etindaka biso tólanda baninga, tokoki mpenza kosala ete yango ezala mpo na bolamu na biso, esalisa biso nyonso na nzela oyo tolingi kolanda? Ɛɛ, Tokoki kosala yango!

Tólanda baninga ya malamu

Minganga na bato mosusu oyo batalelaka kolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato bayebi ete ezali malamu bato ya maladi bázalaka esika moko na bato oyo bazali na makanisi malamu mpe na makambo mosusu oyo ebongi mpo na bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto na bango. Yango ekoki kosalisa bango bábika noki. Na ndakisa, mbala mingi bato oyo bakatani lobɔkɔ to lokolo, bazwaka lisalisi na boumeli ya ntango molai mpo nzoto mpe makanisi na bango ezonga kɔlɔngɔnɔ. Bandakisa ya malamu mpe bilendiseli ya bato mosusu oyo bazali na ezalela ndenge moko na bango ekosalisa bango. Tomoni mpenza ete kofanda elongo na bato oyo bazali na makanisi ya komilɛmbisa te, oyo bazali kopesa ndakisa malamu ekosalisa mpo na kolanda makambo ya baninga.

Likambo yango ezali mpe solo kati na lisangá ya boklisto, mpamba te ezali mpo na kolanda baninga malamu nde Yehova asɛngaki na basaleli na ye ete báyanganaka elongo mbala na mbala. Nzambe alendisi biso ete ‘tólendisana bamoko na bamosusu na bolingo mpe na misala mpo na kolinganaka mpe kosalaka misala malamu mpe tópesanaka toli.’ (Baebele 10:24, 25) Bilendiseli motindo oyo ezali na ntina mpamba te mokili oyo ezali na makambo mingi oyo ezali kolɛmbisa mpe kotungisa biso. Mpo na mitungisi yango, baklisto basengeli ‘komeka makasi’ mpo bátikala ntango nyonso makasi na elimo. (Luka 13:24) Yango wana tozali na mposa ya lisungi ya bolingo ya bandeko na biso baklisto mpe komonisa botɔndi mpo na yango. Lisusu, bamosusu bakoki kozala na ‘monzube moko kati na nzoto’; yango ekoki kozala maladi to mikakatano mosusu ya nzoto. (2 Bakolinti 12:7) Ekoki kozala na basusu oyo bazali kobunda mpo na kotika ezaleli moko ya mabe to bazali konyokwama na makanisi, to bakoki kozala na mikakatano mpo na kokokisa bamposa ya bomoi ya mokolo na mokolo. Yango wana, ezali malamu soki tozali kofanda na bato oyo bamipesi na Yehova Nzambe mpe bazali kosepela kosalela ye. Baninga ya ndenge yango bakolendisa biso mpe bakosalisa biso ‘tókanga motema tii na nsuka.’—Matai 24:13, NW.

Soki toponi baninga ya malamu tokoki koyeba kolanda to koboya makambo na bango mosusu. Lisusu, bilei malamu ya elimo mpe toli ebongi oyo tozwaka na makita ebakisaka nguya na bilendiseli oyo tozwaka epai ya baninga na biso.

Ya solo, koyangana na makita ya boklisto ezalaka ntango nyonso likambo ya pɛtɛɛ te. Bandeko mosusu balendisamaka te na balongani na bango. Basusu basengeli kobongisa bana, mpe basusu bakoki kozala na mokakatano ya transport. Kasi, yebá likambo oyo: Soki ozali kotika te ete mikakatano nyonso oyo epekisa yo koyangana na makita, boye ndakisa na yo ekoki kosalisa bandeko mosusu oyo bazali mpe na mikakatano ndenge moko na yo. Na maloba mosusu, yo na bandeko mosusu oyo bazali mpe na mikakatano lokola yo bokopesa ndakisa malamu mpe bokozala mpe baninga malamu mpo na bato mosusu—kasi kozanga ete bótindika bango na makasi.

Kutu, ntoma Paulo ye moko azalaki kobundana na mikakatano mpe mitungisi mingi, kasi alendisaki baklisto bálanda ndakisa na ye mpe ndakisa ya baklisto mosusu oyo bateli na elimo. Alobaki boye: “Bandeko, bózala bayekoli na ngai mpe bótala epai na bango bazali [kolanda, NW] elakiseli ezwi bino kati na biso.” (Bafilipi 3:17; 4:9) Baklisto ya Tesaloniki ya kala balandaki ndakisa malamu ya Paulo. Paulo akomaki mpo na bango ete: “Mpe bino bosili kozala bayekoli na biso mpe na Nkolo mpo ete boyambi Liloba kati na bolɔzi mingi, na esengo oyo eyei na [elimo santu, NW] mpe bosili kozala etaliseli epai na bandimi nyonso kati na Makedonia mpe na Akaya.” (1 Batesaloniki 1:6, 7) Soki tozali na makanisi malamu mpe soki tozali kopesa ndakisa malamu, tokoki kozala mpe baninga malamu epai ya basusu.

Tókima baninga mabe

Soki tolingi kokima baninga mabe, tosengeli koboya ‘baoyo bazali kotambola na bizaleli na nzoto.’ (Baloma 8:4, 5; 1 Yoane 2:15-17) Soki tosali bongo te, baninga mabe bakokómisa biso mosika na Yehova mpe na toli ya mayele oyo azali kopesa biso. Masese 13:20 elobi ete: “Ye oyo akotambola na bato ya mayele akozala na mayele, nde motamboli elongo na bazoba [akosuka mabe, NW].” Ozali na ndakisa ya moto moko oyo asukaki mabe mpamba te alandaki baninga ya mabe? Na ndakisa, baklisto mosusu bakómaki na mposa ya kozala na biloko mingi, kosala pite to ekobo, to komela bangi mpe kolangwa masanga mpo bazalaki kolanda baninga na bango.

Ata na kati ya lisangá, tokoki kozala na baninga mabe soki totiki ete bato oyo balɛmbi na elimo bázala baninga na biso ya motema. (1 Bakolinti 15:33; 2 Tesaloniki 3:14) Mbala mingi bato motindo wana bazalaka na masolo ya elimo te; bakoki ata kotyola baoyo basepelaka na masolo ya elimo. Soki toponi bato yango bázala baninga na biso ya motema, tokokóma lokola bango, mpe mosika te makanisi na biso mpe bizaleli na biso ekokokana na oyo ya bango. Tokokóma ata mpe na makanisi mabe mpo na baoyo bazali na kondima makasi mpe baoyo bazali koluka kokola na elimo.​—1 Timote 4:15.

Eleki malamu tózala baninga ya baoyo bazali kosala makasi mpo na kosepelisa Yehova, baoyo basepelaka na makambo ya elimo! Baninga motindo wana bakosalisa biso tómonisa “mayele mauti na likoló.” Mayele yango ezali “liboso na pɛto, na nsima ezali na kimya na boboto, na kotosa noki, matondi na mawa mpe na mbuma malamu, . . . na bokosi mpe te.” (Yakobo 3:17) Yango elingi koloba te ete bato oyo bazali na makanisi ya elimo basololaka makambo mosusu te kaka makambo ya elimo. Ezali bongo te! Tókanisa naino masolo ndenge na ndenge ya malamu oyo ebimaka na mikanda ya la Société Watch Tower lokola na zulunalo Lamuká! Masolo malamu oyo tokoki kosolola ezali bebo, mpe soki tozali kosepela na ebele ya masolo yango, tokomonisa ete tolingaka bomoi mpe misala ya Yehova.

Ndenge moko na moto oyo ayebi kobɛta tenis malamu abongisaka ndenge ya kobɛta lisusu malamu koleka ntango azali kobɛta na bato mosusu oyo babɛtaka mpe malamu. Kosangana na baninga malamu ekopesa biso nzela tókola na makanisi, na mayele, mpe na elimo. Nzokande, baninga mabe bakoki komema biso na etamboli ya liso ya nse ya lokasa soki bazali kolendisa biso tózala na lolenge mibale ya bomoi. Eleki malamu tózala na lisosoli ya pɛto mpe tómipesa kilo!

Bato mosusu oyo bazwaki litomba

Bato mingi bamonaka ete koyekola mateya ya Biblia mpe mibeko na yango mpe masɛngami ya elimo ezali mpasi mingi te. Kasi, eloko oyo ekoki kozala mpasi ezali bongo kosalela makambo yango. Ndenge tokomona yango na bandakisa oyo elandi, baninga malamu bakoki kosalisa biso tósalela Yehova na motema mobimba.

Motatoli moko oyo azali na mosala ya ntango nyonso elongo na mwasi na ye alobaki ete ndakisa ya baninga na ye esalisaki ye na komityela mikano na bomoi na ye. Ntango azalaki kokola, akutanaki na baninga mabe. Kasi aponaki kozala moninga ya baoyo bazalaki kolendisa ye abimaka ntango nyonso na mosala ya kosakola mpe ayanganaka ntango nyonso na makita. Ndenge akanganaki na baninga yango esalisaki ye ete akola na elimo.

Motatoli mosusu akomi boye: “Nsima ya libala na biso, ngai na mwasi na ngai tokendaki na lisangá moko epai kuna ndeko mobali moko na mwasi na ye bazalaki mbula moko na biso, bazalaki kosala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Ndakisa na bango elendisaki biso mpe tóbanda mosala ya ntango nyonso. Biso mpe tokolisaki elimo ya mobongisi-nzela na lisangá. Mpo na yango, bandeko mingi bakómaki babongisi-nzela lokola biso.”

Kosala boninga na bato oyo bazali na mikano ya elimo esalaka ete kotosa Yehova ekóma likambo ya pɛtɛɛ. Yango ezali litomba mosusu ya kozala na baninga malamu. Motatoli moko oyo abandaki mosala ya ntango nyonso ntango azalaki naino elenge mpe nsima akómaki mokɛngɛli-motamboli mpe lelo oyo azali kosala na filiale moko ya la Société Watch Tower, akomaki boye: “Bato mosusu oyo batiká ngai na suvenire ya malamu ntango nazalaki mwana ezalaki bandeko oyo bazalaki kosala mosala ya ntango nyonso, oyo bazalaki koya na ndako na biso. Tozalaki ntango nyonso kobongisa esika mpo mopaya moko alya na biso elongo. Mokɛngɛli moko ya zongazonga akabelaki ngai mwa sakosi moko ntango nazalaki naino na mbula 10. Nabombaka mwa sakosi yango tii lelo.”

Motatoli yango alobi boye mpo na ntango azalaki naino elenge: “Bilenge mingi ya lisangá balingaki komipesa na misala ya lisangá, mpe ndakisa na bango epusaki bamoko na biso ete tósala mpe bongo.” Baninga malamu basalisaki elenge mobali yango akóma moklisto oyo akɔmeli lokola mwa nzete oyo ekoli mpe ekómi monene. Baboti, na ndako na bino, bobéngisaka mpe bandeko oyo bakoki kolendisa bana na bino?—Malaki 3:16.

Ezali solo ete biso nyonso te nde tokoki kosala mosala ya ntango nyonso lokola bandeko oyo tolobeli awa. Kasi biso nyonso tokoki koyekola kolinga Yehova ‘na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba, mpe na makanisi na biso mobimba.’ (Matai 22:37) Soki tokopona baninga malamu tokolisa bolingo yango mpe tokobatela elikya na biso ya bomoi ya seko.

Mokomi ya nzembo amonisaki, na maloba ya polele mpe ya ntina mingi, ndenge ya kozala na bomoi malamu. Alobaki ete: “Esengo ezali na moto oyo aboyi kobila toli na bato mabe, oyo atɛlɛmi na nzela na bato na masumu te, oyo afandi esika moko na batyoli te; kasi mposa na ye ezali kati na Mobeko na [Yehova]; akokanisaka mpe Mobeko na ye butu na moi. Azali lokola nzete oyo ekonami penepene na bitima na mai, oyo ekobotaka mbuma na yango na ntango ekoki; nkasa na yango ikokaoka te. Nyonso ekosalaka ye ebongi.”—Nzembo 1:1-3.

Oyo nde elikya kitoko! Ata soki tozali bato ya masumu mpe tosalaka mabunga, bomoi na biso ekozala malamu soki totiki ete Yehova atambwisa biso mpe soki tozali kozwa litomba na ebongiseli kitoko oyo Nzambe apesi biso ya kozala na baninga malamu: ‘libota ya bandeko na biso na mokili mobimba.’—1 Petelo 5:9, NW.

[Elilingi na lokasa 24]

Lisangá ezali na baninga malamu

[Elilingi na lokasa 25]

Baboti, bólendisa bana na bino ete bálukaka baninga ya malamu.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto