Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 19 lok. 50-lok. 51 par. 2
  • Malɔzi misato ya liboso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Malɔzi misato ya liboso
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Bakei epai ya Farao
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Malɔzi motoba oyo elandaki
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Jéhovah azali nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mose mpe Alona: Basakoli na mpiko ya Liloba ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 19 lok. 50-lok. 51 par. 2
Moize ná Arona liboso ya Farao

LITEYA 19

Malɔzi misato ya liboso

Bayisraele bazalaki baombo mpe bazalaki kosala misala ya makasi. Yehova atindaki Moize ná Arona báyebisa Farao ete: ‘Tiká bato na ngai bákende kosambela ngai na esobe.’ Na lolendo nyonso, Farao ayanolaki: ‘Nakolanda makambo Yehova alobi te, mpe nakotika Bayisraele bákende te.’ Na nsima, Farao abakiselaki bango mosala. Yehova alingaki kopesa Farao liteya. Oyebi ndenge asalaki yango? Atindaki Malɔzi Zomi na Ezipito. Yehova ayebisaki Moize: ‘Farao azali koyokela ngai te. Na ntɔngɔ, akozala na Ebale Nile. Kende kuna koyebisa ye ete lokola aboyi kotika bato na ngai bákende, mai nyonso ya Nile ekokóma makila.’ Moize atosaki mpe akendaki epai ya Farao. Farao amonaki ndenge Arona abɛtaki nzete na ye na Ebale Nile, mpe ekómaki makila. Ebale yango ekómaki kobimisa nsolo mabe, mbisi ekufaki, mpe bato bakokaki lisusu komɛla mai ya Nile te. Kasi, Farao azalaki kaka koboya kotika Bayisraele bákende.

Mikolo nsambo na nsima, Yehova atindaki lisusu Moize epai ya Farao mpo ayebisa ye: ‘Soki otiki bato na ngai bákende te, Ezipito ekotonda na mbemba (magorodo).’ Arona atombolaki nzete na ye mpe mbemba ebandaki kotonda na mokili. Bato bazalaki komona mbemba na bandako na bango, na bambeto na bango, mpe na basaani na bango. Mbemba ezalaki bisika nyonso! Farao asɛngaki Moize abondela Yehova alongola bolɔzi yango. Farao alakaki ete akotika Bayisraele bákende. Na yango, Yehova alongolaki bolɔzi yango, mpe bato ya Ezipito basangisaki mbemba oyo ekufaki, mabokemaboke. Mboka ekómaki nsolo mabe. Kasi, Farao atikaki Bayisraele bákende te.

Na nsima, Yehova alobaki na Moize: ‘Arona abɛta nzete na ye na mabele, mpe zɛlo ekokóma ngungi.’ Na mbala moko, ngungi etondaki na bisika nyonso. Kutu, basaleli mosusu ya Farao bayebisaki ye: ‘Bolɔzi oyo euti epai ya Nzambe.’ Kasi, Farao aboyaki kaka kotika Bayisraele.

Malɔzi misato kati na malɔzi zomi oyo ebɛtaki Ezipito: Ebale Nile ekómi makila, mbemba, mpe ngungi

“Nakosala ete báyeba makasi na ngai mpe nguya na ngai, mpe bakoyeba mpenza ete nkombo na ngai ezali Yehova.”​—Yirimia 16:21

Mituna: Malɔzi misato ya liboso ezalaki nini? Mpo na nini Yehova atindaki malɔzi yango?

Kobima 5:1-18; 7:8–8:19; Nehemia 9:9, 10

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto