Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 31
  • Bakei epai ya Farao

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bakei epai ya Farao
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Malɔzi misato ya liboso
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Mose mpe Alona: Basakoli na mpiko ya Liloba ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Malɔzi motoba oyo elandaki
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Jéhovah azali nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 31

Lisolo 31

Bakei epai ya Farao

NTANGO Moize azongi na Ezipito, akutanaki na yaya na ye Arona, ayebisi ye likambo ya makamwisi oyo asalaki. Ntango basali makamwisi yango liboso ya Bayisraele, bato nyonso bandimi ete Yehova azali na bango.

Na nsima, Moize ná Arona bakei epai ya Farao. Balobi na ye ete: ‘Yehova Nzambe ya Bayisraele alobi ete: “Tiká bato na ngai bákende mobembo ya mikolo misato, mpo básambela ngai na esobe.”’ Bongo Farao azongisi ete: ‘Ngai nandimaka Yehova te. Mpe nakotika Yisraele bákende te.’

Farao asiliki mpo Bayisraele balingi bátika mosala mpo bákende kosambela Yehova. Abakiseli bango kutu mosala koleka. Bongo Bayisraele basilikeli Moize, mpo babakiselaki bango mosala ya makasi koleka, mpe Moize ayoki mawa. Kasi Yehova ayebisi ye amitungisa te. Alobi boye: ‘Nakotinda Farao atika bato na ngai bákende.’

Moize ná Arona bakei lisusu epai ya Farao. Mbala oyo basali likamwisi ya liboso. Arona abwaki lingenda na ye na nse ekómi nyoka ya monene. Bato ya bwanya ya Farao basalaki mpe bongo. Kasi nyoka ya Arona emɛlaki banyoka ya bato ya bwanya. Ata bongo Farao aboyaki kotika Bayisraele bákende.

Sikoyo ntango ekoki mpo Yehova apesa Farao liteya. Boyebi eloko asalaki? Apesaki Ezipito bitumbu to malɔzi zomi.

Nsima ya malɔzi mingi, Farao abengi Moize mpe alobi na ye ete: ‘Soki bolɔzi esili nakotika Yisraele bákende.’ Kasi ntango bolɔzi esili, Farao azwi makanisi mosusu. Mpe aboyi kotika Bayisraele. Kasi, nsukansuka, nsima ya bolɔzi ya zomi, Farao abenganaki Bayisraele.

Boyebi malɔzi zomi yango? Lokasa oyo elandi ekoyebisa biso yango.

Kobima 4:27-31; 5:1-23; 6:1-13, 26-30; 7:1-13.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto