Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 23 lok. 60-lok. 61 par. 4
  • Bapesaki Yehova elaka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bapesaki Yehova elaka
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Yehova apesi mibeko na ye
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Sinai: Ngomba na Moize mpe ngomba na mawa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Tóyeba banzela ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Bakokisaki elaka na bango te
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 23 lok. 60-lok. 61 par. 4
Bayisraele batɛlɛmi na nse ya Ngomba Sinai

LITEYA 23

Bapesaki Yehova elaka

Sanza soki mibale nsima ya kolongwa na Ezipito, Bayisraele bakómaki na Ngomba Sinai mpe batyaki kaa wana. Yehova abengaki Moize amata na ngomba mpe alobaki na ye: ‘Nabikisaki Bayisraele. Soki batosi ngai mpe batosi mibeko na ngai, bakokóma bato na ngai mpenza.’ Moize akitaki mpe ayebisaki Bayisraele makambo Yehova alobaki. Bango balobaki nini? Balobaki ete: ‘Tokosala makambo nyonso oyo Yehova alobi.’

Moize amataki lisusu na ngomba. Kuna, Yehova alobaki: ‘Nsima ya mikolo misato, nakoloba na bino. Yebisá bato ete bámeka komata na Ngomba Sinai te.’ Moize akitaki mpe ayebisaki Bayisraele bámilɛngɛla mpo na koyoka makambo oyo Yehova akoloba.

Bayisraele bamoni mikalikali mpe lipata ya moindo na Ngomba Sinai

Mikolo misato na nsima, Bayisraele bamonaki mikalikali mpe lipata ya moindo na ngomba. Bayokaki mpe lokito makasi ya nkake mpe lokito ya liseke. Na nsima, Yehova akitaki na ngomba na kati ya mɔtɔ. Bayisraele babangaki makasi mpe babandaki kolɛnga. Ngomba mobimba eninganaki makasi mpe etondaki na milinga. Lokito ya liseke ezalaki se kokóma makasi. Na nsima, Nzambe alobaki: ‘Nazali Yehova. Bosengeli kosambela banzambe mosusu te.’

Na nsima, Moize azongaki na ngomba, mpe Yehova apesaki ye mibeko mpo bato báyeba ndenge basengeli kosambela Ye mpe ndenge basengeli komitambwisa. Moize akomaki mibeko yango mpe atángelaki yango Bayisraele. Balakaki ete: ‘Tokosala makambo nyonso oyo Yehova alobi.’ Ya solo, bapesaki Nzambe elaka. Kasi batosaki yango?

“Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, mpe na makanisi na yo nyonso.”​—Matai 22:37

Mituna: Nini esalemaki na Ngomba Sinai? Bayisraele balakaki Yehova nini?

Kobima 19:1–20:21; 24:1-8; Kolimbola Mibeko 7:6-9; Nehemia 9:13, 14

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto