Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/5 nk. 8-9
  • Sinai: Ngomba na Moize mpe ngomba na mawa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sinai: Ngomba na Moize mpe ngomba na mawa
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Masolo mosusu
  • Tóyeba banzela ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mokanda ya Biblia nimero 2​—Exode
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Bapesaki Yehova elaka
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Bakokisaki elaka na bango te
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/5 nk. 8-9

Bililingi ya Mokili na ndaka

Sinai: Ngomba na Moize mpe ngomba na mawa

NTANGO ozali kolobela Ngomba Sinai, ekoki kozala ete na makanisi ozali kokanisa Moize. Mpo na nini? Mpo ete ezalaki likoló ya ngomba moko na etuka ya Sinai, nde Moize azwaki Mibeko na Nzambe. Ezali ngomba nini? Emonani ete ekoki kozala oyo ezali komonana awa na likoló.a

Na eteni ya likoló ya etuka yango, penepene na esika mai Motane ezali kokabwana na biteni mibale, ngomba moko ezali wana oyo ekabwani na nsonge mibale. Esika oyo yango ezali eyokani na lisoló ya Biblia oyo etali Moize. Moko na bansongɛ yango ebengami djebel Moussa, oyo elimboli “ngomba na Moize.”

Masolo mingi ya Biblia mamonisi ete nkombo wana ebongi mpenza. Ozali komikundola ete Moize azalaki mobateli na bampate ya Yetelo ntango anzelu moko abimelaki ye kati na epelelo na mɔ́tɔ katikati na nzete moke? Yango ezalaki wapi? Biblia elobeli ˈngomba na Nzambe ya solo, Holebeˈ oyo ebengami lisusu ngomba Sinai. (Exode 3:1-10; 1 Mikonzi 19:8) Ezali kuna nde Moize amemaki libota na Nzambe nsima ya kobimisa bango na Ezipito. Exode 19:2, 3 eyebisi ete: “Bayisraele basalaki molako na bango liboso na ngomba. Moize abutaki epai na Nzambe mpe Jéhovah abengaki ye longwa na ngomba.”

Moize, oyo amataki likoló na ngomba Sinai mpo na mbala ya liboso, asukaki te bobele na komata mwa moke na mipanzi na yango. Mpo na yango tozali kotanga ete: “Jéhovah akitaki na ngomba Sinai, na likoló na nsongɛ na ngomba yango, mpe Jéhovah abengaki Moize likoló na nsonge na ngomba.”​—Exode 19:20.

Lelo oyo, batamboli mingi bazali komona mpasi na kotambola na butu mpo na kokende na nsonge ya ngomba, mpe kozela kino moi ekobima, mpo ete bakoka kokita pene na midi. Nzokande, ezali yango te oyo Moize asalaki. Nzambe alobaki na ye ete: “Buta epai na ngai likoló na ngomba mpe zela kuna. Ngai nakopesa yo bitando na mabanga na mibeko.” Mpe “Moize azalaki likoló na ngomba mikolo ntuku minei butu na moi.”​—Exode 24: 1218.

Na bongo tokangi ntina mpo na nini ngomba wana ezali na boyokani na nkombo ya Moize, kasi mpo na nini ezali ngomba “na mawa”? Tosengeli koyeba ete wana Moize abutaki likoló na ngomba mpo na kozwa Mibeko, kati na esobe oyo ezali na nse (mbala mosusu esobe ebengami er-Rāha oyo ezali komonana kati na foto) bato basalaki likambo moko ya bozoba. Bayisraele bapusaki ndeko na Moize ete asalela bango nzambe. Alona alobaki ete: “Longola biloko ya wolo bizali na matoi ... yaká na yango epai na ngai.” Mpe basalaki mwana na ngombe ya wolo mpo na kosambela yango. Nkanda na Jéhovah epelaki mingi, mpe Bayisraele mingi bakufaki. (Exode 32:1-35) Kasi Alona bayokelaki ye mawa mpe abikaki. Mpo na nini?

Oyo Nzambe alobi kati na Exode 32:10 emonisi ete atalelaki Alona te lokola mobandisi ya likambo wana ya mabe oyo Bayisraele basalaki. Mpe na ntango ya kokata likambo yango, “bana nyonso ya Levi,” kati na bango Alona mpe azalaki kozanga ntembe, bango nyonso bamityaki na ngambo na Nzambe. (Exode 32:26) Na yango, atako Alona azalaki na ndambo ya libunga, Nzambe ayokelaki ye mawa na nse na ngomba Sinai.

Na nsima, Moize azalaki na mposa ya koyeba Jéhovah malamumalamu mpe ya komona nkembo na ye. (Exode 33:13, 18) Ezalaki mpasi mpo na ye na komona elongi na Nzambe; kasi, Jéhovah amonisaki ye mwa moke nkembo na ye, wana alimbolaki ete “komonisa mawa epai na ye oyo [Ye] akoyokela mawa.” (Exode 33:17 kino 34:7) Na yango, Nzambe amonisaki polele mawa na ye, likambo oyo libongi mpenza mpamba te, toyebi ete Biblia ezali kosalela liloba “mawa” mbala mingi kati na boyokani oyo Nzambe azalaki na yango elongo na Bayisraele, baoyo asalaki kondimana elongo na bango na Sinai.​—Nzembo 103:7-13, 18.

Moto na moto oyo azali na likoki ya kotala lelo ngomba Sinai akokuta na nse na ngomba, monastère moko oyo ekoki soko moke te kokundola losambo ya solo oyo Moize azwaki malako na ntina na yango likoló na ngomba wana. Kasi, losambo oyo ezali kosalema na monastère yango ezali kosalela mingi bikeko. Oyo tozali komona awa na pembeni ezali “Ebutelo ya Paradis.” Euti na mokanda moko oyo ekomamaki na Jean Climaque, sango moko ya mboka Byzance oyo, nsima na kolekisa mibu ntuku minei kati na monastère moko, akomaki sango mokonzi na monastère yango mpe akomaki mokanda moko oyo ezali kolobela ebutelo ya elilingi oyo ezali komata kino na likoló. Nzokande, kati na elilingi oyo tozali komona bakonzi na mangomba bazali kobendama na bilimu mabe kati na mɔ́tɔ ya lifelo mpo na konyokwama kuna libela na libela. Ya solo, ezali elilingi ya kokamwisa, kasi ezali kati na Biblia te!​—Mosakoli 9:5,10; Yilimia 7:31.

Na bokeseni na liteya wana ya lokuta, solo ezali ete Mozwi-na-Nguya-Nyonso azali “Nzambe na mawa mpe na ngolu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo.” (Exode 34:6) Moize abelemaki pene na Nzambe wana ya mawa na ngomba Sinai.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na bonene na yango, tala Calendrier des Témoins de Jehovah 1993.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 8]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 9]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 9]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto