Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 29 lok. 74-lok. 75 par. 2
  • Yehova aponaki Yosua

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova aponaki Yosua
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Yosua akómi mokambi
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Makambo oyo Yosua abosanaki te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mokanda ya Biblia nimero 6—Yosua
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Yosua 1:9​—“Zalá na mpiko mpe zalá na makasi”
    Ndenge bavɛrsɛ ya biblia elimbolami
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 29 lok. 74-lok. 75 par. 2
Banganga-nzambe bamemi sanduku ya kondimana mpe bazali kokɔta na Ebale Yordani

LITEYA 29

Yehova aponaki Yosua

Yosua azali kotánga Mibeko

Nsima ya kotambwisa ekólo Yisraele bambula mingi, Moize akómaki na nsuka ya bomoi na ye. Yehova alobaki na ye: ‘Okokɔtisa Bayisraele na Mokili ya Ndaka te. Kasi nakolakisa yo mokili yango.’ Na nsima, Moize asɛngaki Yehova apona mokambi ya sika mpo na bato. Yehova alobaki na ye: ‘Kende epai ya Yosua, mpe yebisá ye ete naponi ye.’

Moize ayebisaki bato ya ekólo ete etikali moke akufa, mpe ete Yehova aponi Yosua mpo akɔtisa bango na Mokili ya Ndaka. Moize alobaki na Yosua: ‘Kobanga te. Yehova akosalisa yo.’ Mwa moke na nsima, Moize amataki na nsɔngɛ ya Ngomba Nebo, mpe kuna Yehova alakisaki ye mokili oyo alakaki Abrahama, Yisaka, mpe Yakobo. Moize azalaki na mbula 120 ntango akufaki.

Moize azali kolakisa Yosua epai ya nganga-nzambe mpe mibali mosusu

Yehova alobaki na Yosua: ‘Katisá Ebale Yordani, mpe kɔtá na Kanana. Nakosalisa yo kaka ndenge nasalisaki Moize. Osengeli kotánga Mibeko na ngai mokolo na mokolo. Kobanga te. Zalá na mpiko. Kende mpe salá makambo oyo natindi yo osala.’

Yosua atindaki bato mibale bákende konɔnga engumba Yeriko. Na lisolo oyo elandi, tokolobela makambo oyo elekaki kuna. Ntango bazongaki, bayebisaki bato ete ezali ntango ya malamu ya kokɔta na Kanana. Mokolo oyo elandaki, Yosua ayebisaki bato bálongola kaa. Na nsima, alobaki na banganga-nzambe oyo bazalaki komema sanduku ya kondimana ete báleka liboso mpe bákɔta na Ebale Yordani. Ebale yango etondaki mpenza. Kasi ntango kaka makolo ya banganga-nzambe ekɔtaki na mai, ebale etɛlɛmaki mpe mai ebandaki kokauka! Banganga-nzambe batambolaki tii na katikati ya ebale mpe batɛlɛmaki kaka wana, kino Yisraele mobimba ekatisaki na ngámbo mosusu. Boye likamwisi yango etindaki bango bákanisa lisusu makambo oyo Yehova asalaki na Mbu Motane!

Nsukansuka, nsima ya bambula nyonso wana, Bayisraele bakɔtaki na Mokili ya Ndaka. Batongaki bandako mpe bingumba. Basalaki bilanga mpe balonaki banzete ya vinyo ná banzete ya mbuma. Mokili yango etondaki na miliki mpe na mafuta ya nzoi.

“Yehova akokamba yo ntango nyonso mpe akokokisa mposa na yo ata na mokili oyo ekauká mpenza.”​—Yisaya 58:11

Mituna: Nani akómaki mokambi ya Bayisraele nsima ya liwa ya Moize? Nini esalemaki na Ebale Yordani?

Mitángo 27:12-23; Kolimbola Mibeko 31:1-8; 34:1-12; Yosua 1:1–3:17

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto