Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 51 lok. 124-lok. 125 par. 2
  • Elombe ya etumba ná mwana moko ya mwasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elombe ya etumba ná mwana moko ya mwasi
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Azalaki na mposa ya kosalisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Na ebandeli amonisaki motó makasi, kasi nsukansuka atosaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Kobika ya Naamane
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Elenge mwasi moko ya moke oyo alobaki na mpiko nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 51 lok. 124-lok. 125 par. 2
Naamane ayei kotala Elisha mpo abikisa ye

LITEYA 51

Elombe ya etumba ná mwana moko ya mwasi

Na mokili ya Siri, ezalaki na mwana mwasi moko ya Yisraele. Basoda ya Siri bakabolaki ye na libota na ye, bamemaki ye na Siri, mpe akómaki mosali ya mwasi ya mokonzi moko ya basoda na nkombo Naamane. Mwana yango azalaki kosambela Yehova, atako bato oyo azalaki kofanda na bango bazalaki kosambela Yehova te.

Naamane azalaki na maladi moko mabe ya loposo, mpe azalaki koyoka mpasi ntango nyonso. Mwana mwasi yango alingaki mpenza kosalisa ye. Na yango, ayebisaki mwasi ya Naamane: ‘Nayebi moto oyo akoki kosalisa mobali na yo. Na Yisraele, ezali na mosakoli moko ya Yehova nkombo na ye Elisha. Akoki kobikisa mobali na yo.’

Mwasi ya Naamane ayebisaki mobali na ye likambo oyo mwana mwasi yango alobaki. Naamane azalaki kondima kosala nyonso oyo ekoki kobikisa ye; yango wana akendaki na ndako ya Elisha na Yisraele. Naamane akanisaki ete Elisha akoyamba ye lokola mokonzi. Kasi, Elisha ye moko asololaki na Naamane te; atindaki mosaleli na ye ayamba Naamane mpe ayebisa ye: ‘Kende na Ebale Yordani mpe sukolá kuna mbala nsambo. Soki osali bongo, okobika.’

Naamane asepelaki ata moke te. Alobaki: ‘Nakanisaki ete mosakoli yango akobelela Nzambe na ye mpe akolekisa lobɔkɔ na ye epai na epai esika maladi ezali mpo na kobikisa ngai. Sikoyo azali kotinda ngai na ebale wana ya Yisraele. Tozali na bibale ya malamu koleka na Siri. Nakoki kokende ata kuna te?’ Naamane asilikaki, mpe alongwaki na lopango ya Elisha.

Naamane asukoli na ebale Yordane mpe abiki

Basali ya Naamane basalisaki ye akanisa malamu. Balobaki na ye: ‘Okondima kosala nyonso mpo obika, boye te? Likambo oyo mosakoli ayebisi yo osala ezali mpasi te. Mpo na nini osali yango kaka te?’ Naamane ayokelaki bango. Akendaki na Ebale Yordani mpe amizindisaki na mai mbala nsambo. Na mbala ya nsambo, ntango Naamane abimaki na mai, maladi na ye esilaki. Asepelaki mingi, mpe azongaki kopesa Elisha matɔndi. Naamane alobaki: ‘Sikoyo nandimi ete Yehova azali Nzambe ya solo.’ Kanisá ndenge mwana mwasi ya Yisraele ayokaki ntango Naamane azongaki na ndako, abiki!

“Osali ete monɔkɔ ya bana mpe ya bana oyo bazali komɛla mabɛlɛ ebimisa lisanzoli.”​—Matai 21:16

Mituna: Okanisi ete ezalaki pɛtɛɛ mpo na mwana mwasi ya Yisraele asolola na mwasi ya Naamane? Okanisi nini esalisaki ye azala na mpiko?

2 Bakonzi 5:1-19; Luka 4:27

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto