Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 69
  • Kobika ya Naamane

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobika ya Naamane
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Azalaki na mposa ya kosalisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Elombe ya etumba ná mwana moko ya mwasi
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Na ebandeli amonisaki motó makasi, kasi nsukansuka atosaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Lokoso ebebisaki Gehazi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 69

Lisolo 69

Kobika ya Naamane

BOYEBI makambo elenge mwasi oyo azali koloba? Azali koyebisa mwasi oyo makambo ya mosakoli Elisha mpe makamwisi oyo Yehova apesi ye nguya ya kosala. Mwasi oyo azali Moyisraele te mpe ayebi Yehova te. Kasi ndenge nini mwana mwasi ya moke oyo akómi na ndako ya mwasi yango?

Mwasi yango azali moto ya Siri. Mobali na ye, Naamane, azali mokonzi ya basoda ya Siri. Mokolo moko, bato ya Siri bakangaki mwana mwasi yango ya moke na mokili ya Yisraele mpe bapesi ye mwasi ya Naamane.

Naamane azali na maba. Maba ezali maladi mabe, elyaka misuni ya nzoto. Yoká makambo mwana mwasi yango ya moke azali koloba na mwasi ya Naamane: ‘Namoni malamu nkolo na ngai akende na Yisraele epai ya mosakoli ya Yehova. Akobikisa ye na maba na ye.’ Na nsima, bayebisi Naamane makambo yango.

Naamane azali na mposa makasi ya kobika. Bongo asimbi nzela akei na Yisraele. Ntango akómi na ndako ya mosakoli Elisha, mosakoli atindi mosaleli na ye ayebisa ye ete akende kosukola mbala nsambo na Ebale Yordani. Naamane asiliki makasi, mpe alobi ete: ‘Bibale ya mboka na ngai eleki mai nyonso ya Yisraele te?’ Nsima ya koloba bongo, abaluki mpe azongi na nkanda.

Kasi basaleli na ye balobi na ye ete: ‘Nkolo, soki mosakoli asɛnga yo osala likambo ya mpasi, mbɛlɛ osali yango. Bongo mpo na nini te kosukola, ndenge alobi?’ Naamane ayokeli basaleli na ye, akei komizindisa na Ebale Yordani mbala nsambo. Ntango asali bongo, nzoto na ye ekómi pɛto, abiki.

Naamane asepeli mpenza. Lokola alingi kopesa matɔndi, azongi epai ya mosakoli Elisha mpe alobi na ye ete: ‘Sikoyo nayebi ete Nzambe oyo azali na Yisraele azali Nzambe ya solo kaka moko na mabele mobimba. Yango wana, nabondeli yo ete ondima likabo oyo.’ Kasi Elisha aboyi. Ayebi ete kondima likabo wana ezali mabe, mpo Yehova nde moto abikisi Naamane. Kasi Gehazi mosaleli ya Elisha, aluli biloko oyo Naamane ayaki na yango.

Bongo talá likambo oyo Gehazi asali. Ntango Naamane akei, alandi ye na nzela. Alobi na ye ete: ‘Elisha atindi ngai nazwela ye mwa likabo epai na yo mpo azwi bapaya.’ Nzokande, akosi nde kokosa. Kasi Naamane ayebi yango te, yango wana apesi ye mwa biloko.

Ntango Gehazi azongi, Elisha ayebi likambo oyo asali. Yehova ayebisi ye likambo yango. Yango wana, Elisha alobi na ye ete: ‘Lokola osali likambo ya mabe wana, maba ya Naamane ekozwa yo.’ Mpe na mbala moko maba ezwi Gehazi.

Liteya nini tozwi na lisolo oyo? Ya liboso, tosengeli kozala lokola mwana mwasi wana ya moke, oyo abangaki te koloba makambo ya Yehova. Ekozala malamu mingi ntango tozali kosala bongo. Ya mibale, tosengeli te kozala na lolendo ndenge Naamane azalaki liboso, kasi tosengeli nde koyokelaka basaleli ya Nzambe. Ya misato, tosengeli te kobukaka lokuta ndenge Gehazi asalaki. Ya solo, botángi ya Biblia ekoki koteya biso makambo ebele mpenza.

2 Bakonzi 5:1-27.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto