Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 56 lok. 134-lok. 135 par. 1
  • Yosiya alingaki Mibeko ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yosiya alingaki Mibeko ya Nzambe
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Yosiya azalaki na baninga ya malamu
    Teyá bana na yo
  • Yosiya: Moto ya komikitisa oyo asepelisaki Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mokonzi malamu ya nsuka
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Yosiya aponaki kosala oyo ezali malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 56 lok. 134-lok. 135 par. 1
Shafane azali kotángela Mokonzi Yosiya rulo

LITEYA 56

Yosiya alingaki Mibeko ya Nzambe

Yosiya akómaki mokonzi ya Yuda ntango azalaki na mbula mwambe. Na mikolo yango, bato bazalaki kosala misala ya maji mpe kosambela bikeko. Ntango Yosiya azalaki na mbula 16, alukaki koyeba ndenge malamu ya kosambela Yehova. Ntango akómaki na mbula 20, abandaki kobebisa bikeko mpe bitumbelo na mokili na ye mobimba. Ntango akómaki na mbula 26, azwaki bibongiseli mpo na kobongisa tempelo ya Yehova.

Na tempelo, nganga-nzambe monene Hilikiya amonaki rulo ya Mibeko ya Yehova: mbala mosusu rulo mpenza oyo Moize akomaki. Shafane, sɛkrɛtɛrɛ ya mokonzi, amemelaki Yosiya rulo yango mpe abandaki kotánga Mibeko na mongongo makasi. Wana Yosiya azalaki koyoka, amonaki ete na boumeli ya bambula mingi, bato bazalaki lisusu kotosa Yehova te . Mokonzi Yosiya alobaki na Hilikiya: ‘Yehova asilikeli biso makasi. Kende kosolola na ye. Yehova akoyebisa biso makambo tosengeli kosala.’ Yehova ayanolaki na nzela ya mosakoli Huluda ete: ‘Bato ya Yuda batiki ngai. Bakozwa etumbu kasi na ntango ya boyangeli ya Yosiya te, mpo ye amikitisi.’

Hilikiya amoni rulo oyo ezali na Mibeko ya Yehova

Ntango Mokonzi Yosiya ayokaki nsango yango, akendaki na tempelo mpe ayanganisaki bato nyonso ya Yuda. Na nsima, atángelaki ekólo mobimba Mibeko ya Yehova na mongongo makasi. Yosiya ná bato ya ekólo balakaki Yehova ete bakotosa ye na motema mobimba.

Yuda esalaki fɛti ya Elekeli te bambula mingi. Kasi ntango Yosiya atángaki na Mibeko ete molulu yango esengeli kosalema mbula na mbula, ayebisaki bato ya ekólo ete: ‘Tokosala Elekeli mpo na Yehova.’ Yosiya abongisaki bambeka ebele mpe atyaki bayembi na tempelo. Na nsima, ekólo yango esalaki Elekeli, mpe fɛti ya bagato ezangá levire, oyo eumelaki mikolo nsambo. Elekeli ya bongo esalemá naino te banda na mikolo ya Samwele. Yosiya alingaki mpenza Mibeko ya Nzambe. Yo mpe osepelaka koyekola makambo ya Yehova?

“Liloba na yo ezali mwinda na lokolo na ngai, mpe pole mpo na nzela na ngai.” ​—Nzembo 119:105

Mituna: Mokonzi Yosiya asalaki nini ntango ayokaki Mibeko ya Nzambe? Ndenge nini Yehova atalelaki Yosiya?

2 Bakonzi 21:26; 22:1–23:30; 2 Ntango 34:1–35:25

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto