Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/9 nk. 29-31
  • Yosiya: Moto ya komikitisa oyo asepelisaki Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yosiya: Moto ya komikitisa oyo asepelisaki Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yosiya abandi mosala!
  • Bazwi eloko moko ya motuya mpenza!
  • Liloba ya Yehova esakolami
  • Losambo ya solo ezali kokende liboso
  • Basali Elekeli moko monene
  • Bato baleli ye mingi
  • Yosiya azalaki na baninga ya malamu
    Teyá bana na yo
  • Yosiya alingaki Mibeko ya Nzambe
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Yosiya aponaki kosala oyo ezali malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mokonzi malamu ya nsuka
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/9 nk. 29-31

Yosiya: Moto ya komikitisa oyo asepelisaki Yehova

NA NTEMBE te Yosiya azali kobanga, ye azali mwana ya mokonzi mpe azali na mbula mitano. Mama na ye Yedida azali kolela. Yedida azali kolela mpamba te Mokonzi Manase, nkɔkɔ ya Yosiya, akufi.​—2 Mikonzi 21:18.

Sikoyo, Amona, tata ya Yosiya nde akozala mokonzi ya Yuda. (2 Ntango 33:20) Mbula mibale na nsima (659 L.T.B.), basaleli ya Amona babomi ye. Na nsima, bato ya mboka babomi bato nyonso oyo babomaki mokonzi mpe batii elenge Yosiya mokonzi. (2 Mikonzi 21:24; 2 Ntango 33:25) Ntango Amona azalaki mokonzi, Yosiya azalaki mbala mingi koyoka nsolo ya mpaka ya malasi na Yelusaleme, mpamba te bato mingi bazalaki na bitumbelo likoló ya bandako na bango epai bazalaki kosambela banzambe ya lokuta. Banganga ya bapagano bazali kobanga te kotambola na kati ya engumba mpe bato oyo bandimi losambo yango, ata baoyo bazalaki koloba ete basambelaka Yehova, bazalaki kolapa ndai na nkombo ya nzambe Malakama.​—Sefania 1:1, 5.

Yosiya ayebi ete Amona asalaki mabe na ndenge azalaki kosambela banzambe ya lokuta. Lisusu, mokonzi yango ya Yuda oyo azali naino elenge mpenza, akangi ntina ya makambo oyo Sefania, mosakoli ya Nzambe, azali koloba. Na ntango yango Yosiya akómi na mbula 15 (652 L.T.B.), asi alekisi mbula mwambe na bokonzi mpe azwi mokano ya kosalela makambo oyo Sefania azali koloba. Yosiya abandaki koluka Yehova wana azalaki naino elenge.​—2 Ntango 33:21, 22; 34:3.

Yosiya abandi mosala!

Mbula minei eleki mpe Yosiya abandi kolongola losambo ya lokuta na Yuda mpe na Yelusaleme mpo na kopɛtola yango (648 L.T.B.). Abukibuki bikeko, makonzi ya bulɛɛ, na bitumbelo ya mpaka ya malasi mpo na losambo ya Baala. Abukibuki mpe baniki bikeko ya banzambe ya lokuta mpe asopi mputulu yango na malita ya bato oyo bazalaki kopesa banzambe yango mbeka. Abuki mpe bitumbelo oyo bazalaki kosalela na losambo ya mbindo mpe na nsima alongoli yango.​—2 Mikonzi 23:8-14.

Yilimia, mwana ya nganga moko Molewi, ayei na Yelusaleme na ntango oyo Yosiya azali kosala mosala makasi mpo na kopɛtola (647 L.T.B.). Yehova Nzambe aponi elenge Yilimia lokola mosakoli na ye, mpe azali kosakola na mpiko nyonso nsango ya Yehova mpo na losambo ya lokuta! Yosiya azali na mbula ndenge moko na Yilimia. Atako Yosiya azali kosala mosala ya kopɛtola na mpiko mpe Yilimia azali kosakola kozanga kobanga, mosika te bato bazongeli lisusu losambo ya lokuta.​—Yilimia1:1-10.

Bazwi eloko moko ya motuya mpenza!

Mbula soki mitano eleki. Yosiya oyo akómi sikoyo na mbula ntuku mibale na mitano, akokisi mbula 18 na boyangeli na ye. Abengi Safana, oyo azali sekrɛtɛrɛ, mpe Maseya mokóló ya mboka, Yoa, mokomi. Mokonzi alobi na Safana ete: ‘Kende, epai ya Hilikiya, nganga monene, ete atánga motuya na mosolo oyo babateli ya bikuke ya tempelo bakɔngɔli epai ya bato mpe apesa yango na mabɔkɔ na basali mpo babongisa ndako ya Yehova.’​—2 Mikonzi 22:3-6, NW; 2 Ntango 34:8.

Basali yango ya tempelo bazali kobanda mosala na ntɔngɔntɔngɔ mpe bazali kosala na molende. Na ntembe te Yosiya azali na botɔndi epai ya Yehova lokola basali bazali kobongisa bisika nyonso oyo bankɔkɔ na ye oyo bazalaki bato mabe babebisaki na ndako ya Nzambe. Wana mosala ezali kokoba, Safana ayei koyebisa ye likambo moko. Kasi asimbi eloko nini na mabɔkɔ na ye? Azali na rulo! Alobi ete Nganga Monene Hilikiya azwi “mokanda ya mobeko ya [Yehova], mopesamelaki na nzela ya Mose.” (2 Ntango 34:12-18) Bazwi eloko moko ya motuya mpenza! Na ntembe te, ezali mpenza mokanda ya Mibeko oyo Mose akomaki na mabɔkɔ na ye mpenza!

Yosiya azali na mposa ya koyoka liloba mokomoko ya mobeko mobimba. Ntango Safana azali kotánga, mokonzi azali kokanisa ndenge nini mobeko mokomoko etaleli ye na bato na ye. Likambo ekamwisi ye mingi ezali lolenge oyo mokanda yango ezali kolobela mingi losambo ya solo mpe ezali kosakola malɔzi oyo ekokwela bato mpe ndenge oyo bakokende na boombo soki bamipesi na losambo ya lokuta. Ntango amoni ete bato bazali kotosa mibeko nyonso ya Nzambe te, Yosiya apasoli bilamba na ye mpe alobi na Hilikiya, na Safana mpe bamosusu ete: “Kendá kotuna [Yehova] . . . likambo ya maloba ya mokanda oyo emonani. Nkanda monene ya [Yehova] epelisameli biso mpo ete batata na biso bayokaki maloba ya mokanda oyo te.”​—2 Mikonzi 22:11-13; 2 Ntango 34:19-21.

Liloba ya Yehova esakolami

Bamemi-nsango ya Yosiya bakei epai ya mosakoli mwasi Huluda mpe ye alobi na bango makambo oyo bakoyebisa Yosiya. Huluda asakoli liloba ya Yehova, amonisi ete mabe ekokwela libota ya botomboki ndenge elobelami na mokanda oyo bauti kozwa. Kasi, lokola Yosiya amikitisi liboso ya Yehova Nzambe, ye akomona mabe yango te. Akokundama esika moko na batata na ye mpe ye moko akokende na kimya na lilita na ye.​—2 Mikonzi 22:14-20; 2 Ntango 34:22-28.

Lokola Yosiya akufaki na etumba, tokoki mpenza koloba ete esakweli ya Huluda ezalaki esakweli ya solo? (2 Mikonzi 23:28-30) Ɛɛ, mpamba te “kimya” oyo ezalaki ntango akundamaki na lilita na ye ekeseni mpenza na “mabe” oyo ekoyela Yuda. (2 Mikonzi 22:20; 2 Ntango 34:28) Yosiya akufaki liboso ya bolɔzi oyo eyaki na mobu 609 tii 607 L.T.B., ntango bato ya Babilone bazingaki Yelusaleme mpe babomaki yango. Mpe lisusu lokola alobaki ete ‘koyanganisama esika moko na batata na ye’ elingaki koloba te ete akokufa liwa ya nsɔmɔ te. Na kati ya Biblia, basaleli maloba ya ndenge yango ezala mpo na liwa ya nsɔmɔ to te.​—Dutelonome 31:16; 1 Mikonzi 2:10; 22:34, 40.

Losambo ya solo ezali kokende liboso

Yosiya ayanganisi bato ya Yelusaleme na tempelo mpe atángeli bango “maloba nyonso ya mokanda ya kondimana” oyo emonanaki na ndako ya Yehova. Na nsima, mokonzi asali kondimana ete “akotambola nsima ya [Yehova] mpe akobatela malako na ye mpe matatoli na ye mpe mibeko na ye na motema mobimba mpe na molimo mobimba, kotosa maloba ya kondimana oyo ikomami na mokanda oyo.” Bato nyonso bandimi kondimana yango.​—2 Mikonzi 23:1-3.

Sikoyo, mokonzi Yosiya abandi mosala mosusu mpo na kosilisa losambo ya bikeko. Azali kosukisa mombongo ya banganga ya banzambe ya bapaya na Yuda. Banganga Balevi oyo balandaki losambo ya mbindo babungisaki libaku malamu ya kosalela Yehova na etumbelo na ye. Ata bisika ya likoló, oyo etongamaki ntango Mokonzi Salomo azalaki koyangela, babebisi yango mpo básambela lisusu na bisika yango te. Mosala ya kopɛtola ekei tii na bokonzi ya mabota zomi ya Yisalaele, oyo Baasulia basilaki kobebisa (740 L.T.B.).

Mpo na kokokisa maloba oyo elobamaki mbula 300 liboso na monɔkɔ ya “moto ya Nzambe” oyo Biblia eyebisi nkombo na ye te, Yosiya atumbi mikuwa ya banganga ya Baala likoló na etumbelo oyo Mokonzi Yelobama I atongaki na Betele. Balongoli bisika ya likoló mpe na bingumba mosusu, batumbi banganga ya banzambe ya bikeko likoló ya bitumbelo oyo bazalaki kopesa bambeka.​—1 Mikonzi 13:1-4; 2 Mikonzi 23:4-20.

Basali Elekeli moko monene

Nzambe azali nsima ya Yosiya na mosala na ye ya kotombola losambo ya pɛto. Na mikolo na ye nyonso, mokonzi azalaki kotɔnda Nzambe ete bato “bapɛngwaki te na nzela na [kolanda Yehova], Nzambe ya batata na bango.” (2 Ntango 34:33) Mpe lisusu, Yosiya akoki kobosana te likambo ya ntina oyo esalemaki na mbula ya 18 ya boyangeli na ye.

Mokonzi apesi bato nyonso etinda ete: “Tosá Elekeli ya [Yehova], Nzambe na biso lokola ekomami na mokanda ya kondimana oyo [bauti kozwa].” (2 Mikonzi 23:21) Yosiya asepeli na komona ete bato bandimi maloba na ye. Mpo na Elekeli yango, ye moko apesaki nyama 30 000 mpe ngɔmbɛ 3 000. Ezalaki nsuka ya Elekeli! Soki totaleli bambeka oyo epesamaki, ndenge oyo babongisaki makambo, mpe motuya ya bato oyo bayanganaki mpo na kosambela, Elekeli yango elekaki bilekeli nyonso oyo esalemaki banda na mikolo ya mosakoli Samwele.​—2 Mikonzi 23:22, 23; 2 Ntango 35:1-19.

Bato baleli ye mingi

Yosiya azalaki mokonzi moko malamu ata na makambo oyo balobeli te na boumeli ya mbula 31 oyo ayangelaki (659-629 L.T.B.). Pene na nsuka ya boyangeli na ye, ayoki ete Falo Neko azali na mokano ya koleka na Yuda mpo na kokende kobundisa basoda ya Babilone mpo na kosunga mokonzi ya Asulia na Kalekemisi na Ebale Pelata. Mpo na ntina oyo eyebani te, Yosiya abimaki mpo na kobundisa Baezipito. Neko atindelaki Yosiya bantoma mpo na koyebisa ye boye: “Tiká kotɛmɛla Nzambe oyo azali na ngai elongo ete abebisa yo te.” Kasi Yosiya abongolaki lolenge na ye mpe alukaki kozongisa Baezipito na Megido.​—2 Ntango 35:20-22.

Mawa mpo na mokonzi ya Yuda! Banguna babɛtaki Yosiya mbanzi, mpe alobaki na baombo ete: “Longolá ngai zambi nazoki mpota mabe.” Bongo balongolaki Yosiya na likalo na ye ya etumba, batyaki ye na likalo mosusu, mpe bakumbaki ye na Yelusaleme. Soki mpe na nzela to ntango bakómi na engumba, Yosiya akataki motema. Lisolo elobi ete “akufaki mpe akundamaki na nkunda ya batata na ye. Yuda mobimba mpe Yelusaleme balelaki Yosiya.” Yilimia alelaki mpo na Yosiya na nzembo ya mawa, mpe bakómaki kolela mokonzi na nzembo-ya-kolela na mabaku nyonso ya minene oyo esalemaki na nsima.​—2 Ntango 35:23-25.

Ya solo, Mokonzi Yosiya asalaki libunga moko monene ntango abundisaki Baezipito. (Nzembo 130:3) Atako bongo, Nzambe asepelaki na ye mpo na komikitisa na ye mpe mpiko na ye mpo na losambo ya solo. Bomoi na Yosiya emonisi malamu ete Yehova asepelaka na basaleli na ye oyo bamipesi mpe bazali na komikitisa.​—Masese 3:34; Yakobo 4:6.

[Elilingi na lokasa 29]

Ntango azalaki elenge, Mokonzi Yosiya alukaki Yehova na motema na ye mobimba

[Elilingi na lokasa 31]

Yosiya abebisaki bisika ya likoló mpe atombolaki losambo ya solo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto