Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 63 lok. 150-lok. 151 par. 1
  • Makomi na efelo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makomi na efelo
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Lobɔkɔ ekomi na efelo
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Siruse Monene
    Lamuká!—2013
  • Balongwe na Babilone
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Maloba minei oyo mabongolaki mokili
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 63 lok. 150-lok. 151 par. 1
Lobɔkɔ moko ezali kokoma na efelo

LITEYA 63

Makomi na efelo

Na nsima, Beleshazare akómaki mokonzi ya Babilone. Mokolo moko, asalisaki fɛti mpe abengisaki ebele ya bato minene ya Babilone. Asɛngaki basali na ye báya na bakɔpɔ ya wolo oyo Nebukadenezare azwaki na tempelo ya Yehova. Beleshazare ná bapaya na ye bamɛlaki na bakɔpɔ yango mpe bakumisaki banzambe na bango. Na mbala moko, lobɔkɔ ya moto ebimaki mpe ebandaki kokoma makambo moko boye na efelo ya ndako epai bazalaki kolya.

Beleshazare ayokaki nsɔmɔ. Abengaki bato na ye ya maji mpe alakaki bango: ‘Moto oyo akolimbwela ngai maloba oyo, nakokómisa ye moto ya misato oyo aleki monene na Babilone.’ Bato yango bamekaki, kasi moko te alongaki kolimbola maloba yango. Na nsima, mokonzi-mwasi moko akɔtaki mpe alobaki: ‘Ezali na mobali moko na nkombo Danyele oyo azalaki kolimbwela Nebukadenezare makambo. Akoki kolimbwela yo maloba yango.’

Danyele akɔtaki epai ya mokonzi. Beleshazare alobaki na ye: ‘Soki otángeli ngai maloba oyo mpe olimboli yango, nakopesa yo shɛnɛti ya wolo ya nkingo mpe nakokómisa yo moto ya misato oyo aleki monene na Babilone.’ Danyele alobaki: ‘Nalingi makabo na yo te, kasi nakoyebisa yo ndimbola ya maloba oyo. Tata na yo Nebukadenezare azalaki na lolendo, mpe Yehova akitisaki ye. Oyebi makambo nyonso oyo ekómelaki ye, kasi ozangi limemya epai ya Yehova na ndenge omɛli vinyo na bakɔpɔ ya wolo oyo eutaki na tempelo na Ye. Yango wana, Nzambe akomi maloba oyo: Mene, Mene, Tekele, mpe Parasine. Maloba yango elimboli ete Bamede ná Baperse bakokweisa Babilone, mpe okozala lisusu mokonzi te.’

Basoda ya Mokonzi Siruse bazali kokatisa ebale mpe kokɔta na baporte ya Babilone

Ezalaki komonana lokola moto moko te akokaki kokweisa Babilone. Bifelo ya makasi mpe ebale moko mozindo ezalaki kobatela engumba yango. Kasi kaka na butu wana, Bamede ná Baperse bayaki kobundisa Babilone. Siruse mokonzi ya Perse alekisaki mai ya ebale yango na nzela mosusu mpo basoda na ye bákoka kotambola na makolo tii na baporte ya engumba yango. Ntango bakómaki kuna, bakutaki baporte polele! Basoda ya Perse bakɔtaki, bazwaki engumba mpe babomaki Mokonzi Beleshazare. Bongo Siruse akómaki mokonzi ya Babilone.

Mbula moko na nsima, Siruse alobaki: ‘Yehova ayebisi ngai natonga lisusu tempelo na ye na Yerusaleme. Moto nyonso ya ekólo na ye oyo alingi kosalisa na kotonga akoki kokende.’ Na yango, kaka ndenge Yehova alakaki, Bayuda mingi bazongaki na Yerusaleme mbula 70 nsima ya kobebisama na yango. Siruse azongisaki bakɔpɔ ya wolo ná ya palata mpe bisaleli oyo Nebukadenezare azwaki na tempelo. Omoni ndenge Yehova asalelaki Siruse mpo na kosalisa bato na Ye?

“Akwei! Babilone Monene akwei, mpe akómi esika ya kofanda ya bademo.”​—Emoniseli 18:2

Mituna: Makomi oyo ezalaki na efelo elimbolaki nini? Yehova ayebisaki Siruse asala nini?

Ezera 1:1-11; Danyele 5:1-30; Yisaya 44:27–45:2; Yirimia 25:11, 12

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto