Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 74 lok. 176-lok. 177 par. 4
  • Yesu akómi Masiya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu akómi Masiya
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Yoane abatisi Yesu
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Yesu azwi batisimo
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Azalaki Mopasoli nzela mpo na Masiya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Yoane abongisi nzela
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 74 lok. 176-lok. 177 par. 4
Ntango Yoane abatisaki Yesu, elimo ya Nzambe ekitelaki Yesu lokola ebenga

LITEYA 74

Yesu akómi Masiya

Yoane asakolaki boye: ‘Moto oyo aleki ngai azali koya.’ Ntango Yesu azalaki na mbula soki 30, autaki na Galile mpe akendaki na Ebale ya Yordani, epai Yoane azalaki kobatisa bato. Yesu alingaki Yoane abatisa ye, kasi Yoane ayebisaki ye ete: ‘Nakoki kobatisa yo te. Yo nde osengeli kobatisa ngai.’ Yesu alobaki na Yoane: ‘Yehova alingi obatisa ngai.’ Na yango, bakɔtaki na Ebale ya Yordani, mpe Yoane azindisaki Yesu na mai.

Ntango Yesu abimaki na mai, abondelaki. Na mbala moko, likoló efungwamaki, mpe elimo ya Nzambe ekitelaki ye lokola ebenga. Na nsima, Yehova alobaki uta na likoló ete: “Yo ozali Mwana na ngai ya bolingo; nandimi yo.”

Ntango elimo ya Yehova ekitelaki Yesu, akómaki Kristo to Masiya. Ntango ekokaki mpo abanda mosala oyo Yehova atindaki ye asala awa na mabele.

Mbala moko nsima ya batisimo na ye, Yesu akendaki na esobe mpe asalaki kuna mikolo 40. Ntango azongaki, akendaki kotala Yoane. Wana azalaki kopusana pene na Yoane, Yoane alobaki boye: ‘Talá, Mwana-Mpate ya Nzambe oyo akolongola lisumu ya mokili.’ Yoane alobaki bongo mpo asalisa bato báyeba ete Yesu azali Masiya. Oyebi nini ekómelaki Yesu ntango azalaki na esobe? Tokolobela yango.

“Mpe mongongo moko eutaki na likoló, elobi: ‘Yo ozali Mwana na ngai, ya bolingo; nandimi yo.’”​—Marko 1:11

Mituna: Mpo na nini Yesu azwaki batisimo? Mpo na nini Yoane alobaki ete Yesu azali Mwana-Mpate ya Nzambe?

Matai 3:13-17; Marko 1:9-11; Luka 3:21-23; Yoane 1:29-34; Yisaya 42:1; Baebre 10:7-9

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto