Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • th liteya 7 lok. 10
  • Makambo oyo ezali solo mpe oyo ezali kondimisa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo ezali solo mpe oyo ezali kondimisa
  • Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Masolo mosusu
  • Koloba makambo oyo ezali solo mpenza
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Komonisa ntina oyo olingi kotánga vɛrsɛ
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Komonisa polele bolamu oyo bato bakozwa
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Kotuna mituna
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
Makambo mosusu
Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
th liteya 7 lok. 10

LITEYA 7

Makambo oyo ezali solo mpe oyo ezali kondimisa

Vɛrsɛ

Luka 1:3

NA MOKUSE: Zwá makambo na mikanda to na bisika mosusu oyo ekoki kotyelama motema mpo na kosalisa bato bákóma na likanisi oyo ebongi.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Zwá makambo na mikanda oyo ekoki kotyelama motema. Makambo oyo okoloba euta na Liloba ya Nzambe, mpe soki esengeli, tángá yango mbala moko kuna na kati. Soki okolobela liteya moko ya siansi, to nsango moko boye, to likambo moko oyo esalemá, to likambo mosusu nyonso, talelá naino soki ozwi yango na esika oyo ekoki kotyelama motema to ezalaka kaka bongo tii lelo.

  • Lobelá makambo ndenge ezali mpenza. Ndimbola nyonso oyo okopesa na vɛrsɛ esengeli koyokana na lisolo mobimba epai yango euti, to na nsango mobimba ya Biblia, to mpe na makanisi oyo ezali na mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45) Likanisi nyonso oyo ozwi na mokanda ya mokili esengeli koyokana na lisolo mobimba epai yango euti mpe na makanisi ya moto oyo akomaki yango.

    Toli

    Esengeli te kobakisa mungwa ná pilipili ntango otángi maloba ya moto mpe esengeli te kovimbisa mitángo oyo ozwi na esika moko boye. Kebá ete maloba “bato mosusu” ekóma te “bato mingi,” “ntango mosusu” ekóma te “ntango nyonso,” mpe “ekoki kozala” ekóma te “na ntembe te.”

  • Salisá bato bákanisa. Soki otángi vɛrsɛ moko to otángi maloba ya mokanda moko, tuná mituna oyo ebongi to pesá ndakisa moko mpo na kosalisa bato bákóma na likanisi oyo ebongi.

NA MOSALA YA KOSAKOLA

Ntango ozali komibongisa mpo na kokende kosakola, kanisá mituna oyo bato bakoki kotuna yo, mpe luká biyano oyo okoki kopesa. Soki oyebi eyano te na motuna oyo moto atuni yo, yebisá ye ete okoluka eyano mpe okozonga mokolo mosusu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto