Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • be liteya 40 lok. 223-lok. 225 par. 3
  • Koloba makambo oyo ezali solo mpenza

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koloba makambo oyo ezali solo mpenza
  • Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Masolo mosusu
  • Makambo oyo ezali solo mpe oyo ezali kondimisa
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Ndenge ya kolukaluka na mikanda
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Bolamu bozali kozwama na boyekoli
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Ndenge ya kozwa mpenza matomba na botángi ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
be liteya 40 lok. 223-lok. 225 par. 3

LITEYA 40

Koloba makambo oyo ezali solo mpenza

Osengeli kosala nini?

Osengeli koyebisa bato makambo ndenge oyo yango esalemaki mpenza to ndenge yango ezalaka.

Yango ezali na ntina nini?

Soki ozali koloba makambo oyo ezali solo mpenza, yango ekosala ete bato bándimela yo, bándimela lingomba na yo mpe Nzambe oyo ozali kosambela.

MPO na nini ekómelaka baklisto mosusu ete báloba makambo ya lokuta? Mbala mosusu mpo kaka bazongelaka makambo oyo bayokaki, kozanga kotalela yango soki ezali solo to te. To mbala mosusu, kozanga koyeba, balekisaka ndelo na likambo moko mpo batángaki yango malamu te. Ntango tozali kotya likebi ata na makambo ya mike ete tóloba likambo oyo ezali solo, bato oyo bazali koyoka biso bakomona yango mpe bakoki kotya motema ete nsango ya ntina mingi oyo tozali komemela bango ezali mpe nsango ya solo.

Na mosala ya kosakola. Bato mingi babangaka mpo na kobanda lisolo na mosala ya kosakola, mpamba te bamonaka ete ezali na makambo mingi oyo naino bayebi yango te. Kasi eumelaka te mpo bango moko bámona ete bakoki kopesa litatoli ya malamu mpenza, ata bayebi kaka mateya ya ebandeli ya Biblia. Ndenge nini? Sɛkɛlɛ mpo na kosala yango ezali nde komibongisa.

Liboso okende na mosala ya kosakola, luká komesana na lisolo oyo okosala. Meká kokanisa mituna oyo bato oyo bakoyoka yo bakoki kotuna. Luká biyano oyo ekosepelisa bango na kati ya Biblia. Yango ekosalisa yo okitisa motema mpo na kopesa biyano ya solo. Ozali kokende kotambwisa boyekoli ya Biblia? Zongelá malamumalamu makambo oyo bokoyekola. Salá makasi ete okanga ntina ya bavɛrsɛ oyo esimbi biyano na mituna ya paragrafe oyo ekomami na mokanda.

Bongo soki moto yango to moninga na yo ya mosala atuni yo motuna moko oyo omibongisaki mpo na yango te? Soki oyebi te soki makambo oyo olingi koloba ezali makambo ya solo to te, koluka kopesa makanisi na yo moko te. “Motema ya moyengebene [ekanisaka mozindo, NW] liboso ya kozongisa liloba.” (Mas. 15:28) Mokanda Ndenge ya kosolola na bato na Makomami to makambo oyo ezali na mwa buku “Masolo ya kosolola na Biblia” ekoki kosalisa yo, soki ezali na monɔkɔ oyo oyebi. Soki ozali na mikanda yango te, okoki koyebisa ye okende kolukaluka na mikanda bongo na nsima, ozongela ye. Soki moto oyo atuni yo motuna yango azali mpenza na motema sembo, akomona mabe te ete azela moke mpo na kozwa eyano oyo ebongi. Kutu komikitisa na yo ekoki kokamwisa ye mpe kosimba motema na ye.

Soki ozali kosala elongo na basakoli oyo bamesaná na mosala, yango ekoki kosalisa yo oyeba kosembola Liloba ya Nzambe malamumalamu. Talá bavɛrsɛ oyo bazali kosalela mpe ndenge oyo bazali kobimisa makanisi na yango. Ntango bapesi yo toli to basɛngi yo obongisa likambo moko, ndimá yango na komikitisa mpenza. Apolosi, moyekoli moko ya molende, azwaki matomba mingi na lisalisi oyo eutaki na bandeko mosusu. Luka alobi ete Apolosi azalaki “molobi moko malamu,” “ayebaki Makomami malamumalamu mpenza,” mpe “azalaki kopela na elimo,” “abandaki kosakola mpe koteya na ndenge ya malamu mpenza makambo oyo etali Yesu.” Kasi ezalaki na makambo mosusu oyo akangaki ntina na yango te. Ntango Pilisila na Akila bamonaki yango, “bakamataki ye na molɔngɔ na bango mpe bamonisaki ye polelepolele nzela ya Nzambe na ndenge ya malamu lisusu koleka.”​—Mis. 18:24-28.

“Akangami makasi na liloba ya sembo.” Masolo na biso na makita esengeli komonisa ete tozali mpenza kotalela lisangá lokola “likonzí mpe eloko oyo esimbi solo.” (1 Tim. 3:15) Mpo na kokɔtela solo, ezali na ntina mingi ete tókanga ntina ya bavɛrsɛ oyo tokosalela na masolo na biso. Talelá mpe bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe nsima na yango mpe likanisi oyo ezali kopesa.

Bato bakoki kozongela makambo oyo ozali koloba na makita ya lisangá. Ya solo, “biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.” (Yak. 3:2) Kasi soki osali makasi okóma na bizaleli oyo ekosala ete olobaka makambo oyo ezali solo mpenza, yango ekosalisa yo mingi. Nsukansuka, bandeko mibali mingi oyo bazali kosala masolo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi bakokóma bankulutu. Epai ya bato oyo bazwi mokumba yango, “bakosɛnga ye mingi koleka ndenge esɛngamaka.” (Luka 12:48) Nkulutu oyo azangi likebi mpe apesi toli moko ya mabe oyo ememeli bato ya lisangá mikakatano minene, akomilukela nkanda ya Nzambe. (Mat. 12:36, 37) Yango wana, ndeko mobali oyo akokisi masɛngami mpo na kozala nkulutu asengeli koyebana mpo na ndenge “akangami makasi na liloba ya sembo na oyo etali mayele na ye ya koteya.”​—Tito 1:9.

Kebá ete makanisi na yo eyokana na “ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba” ndenge emonisami na kati ya solo nyonso oyo ezali na kati ya Makomami. (2 Tim. 1:13) Yango esengeli kobangisa yo te. Mbala mosusu osengeli naino kosilisa kotánga Biblia mobimba. Kotika te kosala yango. Kasi sikoyo naino, talá ndenge toli oyo ekoki kosalisa yo otalela malamumalamu makambo oyo okani koloba ntango okoteya.

Libosoliboso omituna boye: ‘Makambo oyo eyokani mpenza na oyo nayekolaki na Biblia? Ekotinda bato oyo bakoyoka ngai ete bálinga Yehova, to ezali nde kokumisa mayele ya mokili oyo mpe ezali kolendisa bato bálanda yango?’ Yesu alobaki boye: “Liloba na yo ezali solo.” (Yoa. 17:17; Det. 13:1-5; 1 Kol. 1:19-21) Na nsima, salelá malamu mpenza mikanda oyo moombo ya sembo mpe ya mayele apesi biso mpo na koyekola. Yango ekosalisa yo kaka te ete okanga ntina ya bavɛrsɛ na ndenge esengeli, kasi mpe ete osalela yango na bokatikati mpe na makanisi malamu. Soki osali ete masolo na yo eutaka na “ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba” mpe soki otii motema na ebongiseli oyo Yehova azali kosalela mpo na koloba na bato, ntango okolimbola bavɛrsɛ mpe okomonisa ndenge ya kosalela yango, makambo oyo okoloba ekozala makambo ya solo mpenza.

Talá soki makambo yango ezali solo mpenza. Makambo oyo ezali koleka na mokili, makambo oyo bato mosusu balobi mpe makambo oyo bakutaná na yango ekoki kosalisa yo ntango ozali kopesa bandakisa mpe komonisa ndenge ya kosalela makanisi mosusu. Ndenge nini okoki koyeba ete makambo yango ezali solo mpenza? Lolenge moko ezali ya kozwa makambo yango epai ya bato to na mikanda oyo ebongi kotyela motema. Kobosana te kotala soki makambo yango ebongi mpenza mpo na mikolo na biso. Mitango esilaka ngala; makambo ya sika oyo bato ya siansi basalaka eumelaka te, mpo mosusu oyo eleki yango ebimaka mpe lokola mayele ya moto na makambo ya istware mpe ya minɔkɔ ya kala ezali se kokola, babongolaka makanisi na bango oyo eutaki na makambo oyo bayebaki liboso. Kebá mpenza soki olingi kosalela makambo oyo euti na bazulunalo, na televizyo, na radio, na ordinatɛrɛ, to na Internet. Masese 14:15 epesi toli oyo: “Moto ya zoba ayambi maloba nyonso, nde moto ya mayele akotala malamu na nzela ekokenda ye.” Omituna boye: ‘Bato bayebi ete moto to mokanda yango elobaka makambo ya solo? Bato bakoki koluka na mokanda to na esika mosusu mpo na komona ete likambo yango ezali solo mpenza?’ Soki ozali na ntembe ete likambo moko ezali solo te, kozwa yango te.

Soki tolongoli kotala mpo na koyeba soki moto to mokanda yango ebongi kotyelama motema, talá malamumalamu ndenge olingi kosalela makambo yango. Salá nyonso ete ndenge oyo ozali kosalela maloba mpe mitango yango eyokana mpenza na mokano oyo balobelaki yango. Ntango ozali konyata makanisi na yo ya ntina, kebá ete likambo oyo etali “mwa bato” ekóma likambo ya “bato mingi” te, likambo ya “bato mingi” ekóma oyo ya “moto nyonso” te mpe likambo oyo esalemaka “na bantango mosusu” ekóma oyo esalemaka “ntango nyonso” te. Soki olekisi ndelo na makambo etali mitango, to bonene ya likambo, yango ekosala ete bato bámituna soki ozali mpenza koloba solo mpe soki bakoki mpenza kotyela yo motema.

Soki makambo nyonso oyo ozali koloba ezali solo mpenza, bato bakoyeba yo lokola moto oyo amemyaka solo. Yango ekopesa lisangá ya Batatoli ya Yehova lokumu. Koleka nyonso, yango ekokumisa “Yehova, Nzambe ya bosolo.”​—Nz. 31:5, NW.

NDENGE YA KOSALA YANGO

  • Kopesa eyano te ntango oyebi te soki likambo oyo okoloba ezali solo mpenza to te.

  • Biyano na yo euta na “ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba” na kati ya Biblia.

  • Lukáluká lisolo na yo na mikanda.

  • Talá soki mitango, maloba mpe masolo yango ezali solo mpenza mpe salelá yango kozanga kolekisa ndelo. Na makambo oyo ozali koyeba lisusu malamu te, kopesa makanisi na yo moko te.

DEVUARE: Sɛngá Motatoli moko oyo akɔmeli ayoka yo mpe atala soki makambo oyo ozali koloba ezali solo mpenza, ntango ozali koyanola na mituna oyo elandi na maloba na yo moko: (1) Yehova azali moto ya ndenge nini, mpe ndenge nini oyebi yango? (2) Mpo na nini Yesu apesaki bomoi na ye lokola mbeka, mpe ndenge nini tokoki kozwela yango litomba? (3) Banda ntango oyo akómaki Mokonzi, Yesu Klisto azali kosala nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto