Osepeli na makambo oyo oyekoli?
Ya Papye
Okosepela koyeba makambo mosusu ya Biblia?
Oyo ezali kaka mwa makambo moke oyo ezali na buku Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia.
Buku oyo mpe boyekoli na yango ezali ofele. Tokosepela koyekola na yo Biblia na ntango mpe na esika oyo okolinga.
Na boyekoli ya Biblia oyo, okoyekola makambo ebele, na ndakisa:
■ Ntina ya bomoi
■ Oyo okoki kosala mpo na kozala na kimya ya solosolo
■ Oyo mabota ekoki kosala mpo ezala na esengo
■ Makambo oyo Biblia elaki mpo na mikolo ezali koya
Mpo na kozwa buku yango mpe kokoba boyekoli, sololá na Motatoli ya Yehova to tondisá lokasa oyo ezali na jw.org mpo na kosɛnga boyekoli ya Biblia.