Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 1/4 nk. 4-7
  • Programɛ ya koyekola Biblia mpo na moto nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Programɛ ya koyekola Biblia mpo na moto nyonso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • BIYANO YA MITUNA OYO BATO BAMITUNAKA MPO NA PROGRAMƐ NA BISO YA KOYEKOLA BIBLIA
  • Koyekola Biblia elimboli nini?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Epai wapi tokoki kozwa biyano na mituna minene etali bomoi?
    Epai wapi tokoki kozwa biyano na mituna minene etali bomoi?
  • Osepeli na makambo oyo oyekoli?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Mateya ya ebandeli mpo na koyekola Biblia
  • Mpo na nini koyekola Biblia?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 1/4 nk. 4-7
Boyekoli ya Biblia

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | OKOSEPELA KOYEKOLA BIBLIA?

Programɛ ya koyekola Biblia mpo na moto nyonso

Batatoli ya Yehova bayebani mpo na mosala na bango ya kosakola. Kasi, oyebi ete na mokili mobimba, tozalaka mpe na programɛ ya koyekola na bato Biblia?

Mobali oyo azali koyekola Biblia na esika asalaka

Na 2014, Batatoli ya Yehova koleka 8 000 000, na mikili 240 bayekolaki Biblia na bato soki 9 500 000 sanza nyonso.a Kutu, motángo ya bato oyo bayekolaka na biso Biblia eleki motángo ya bato ya bikólo soki 140!

Mpo na kokokisa mosala yango, Batatoli ya Yehova babimisaka mbula nyonso miliare moko na ndambo ya Babiblia, babuku, bazulunalo mpe mikanda mosusu oyo esalisaka mpo na koyekola Biblia, na minɔkɔ soki 700! Milende nyonso wana ezalaka mpo na kosalisa bato báyekola Biblia na monɔkɔ oyo balingi.

“Koyekola na kelasi ezalaki kosepelisa ngai ata moke te, kasi koyekola Biblia ezalaki kosepelisa ngai mpenza. Mpe makambo nayekolaki elendisaki ngai mpenza!”​—Katlego, Afrika ya Sudi.

“Boyekoli yango eyanolaki na mituna na ngai nyonso mpe mituna mingi mosusu.”​—Bertha, Mexique.

“Boyekoli ya Biblia ezalaki kosalema na ndako na ngai mpe na ngonga oyo ebongaki mpo na ngai. Yango ekokaki mpo na ngai!”​—Eziquiel, Brésil.

“Na bantango mosusu boyekoli ezalaki koumela miniti 15 to 30 to mpe koleka na kolanda programɛ na ngai.”​—Viniana, Australie.

“Boyekoli yango ezalaki ya ofele, ezalaki kokamwisa ngai mpenza!”​—Aimé, Bénin.

“Moto oyo azalaki koyekola na ngai Biblia azalaki motema molai mpe boboto. Tokómaki mpenza baninga.”​—Karen, Irlande du Nord.

“Bato mingi bayekolaka Biblia kozanga ete bákóma Batatoli ya Yehova.”​—Denton, Angleterre.

BIYANO YA MITUNA OYO BATO BAMITUNAKA MPO NA PROGRAMƐ NA BISO YA KOYEKOLA BIBLIA

Boyekoli yango esalemaka ndenge nini?

Tozwaka masolo ndenge na ndenge ya Biblia mpe totalelaka bavɛrsɛ oyo eyokani na masolo yango. Na ndakisa, Biblia epesi biyano na mituna lokola oyo: Nzambe azali nani? Azalaka ndenge nini? Azali na nkombo? Afandaka wapi? Tokoki kopusana penepene na ye? Mokakatano ezali nde ya koyeba bavɛrsɛ nini ya Biblia epesi biyano na mituna yango.

Mpo na kosalisa bato bázwa biyano, tosalelaka mingi buku Biblia eteyaka mpenza nini?b Buku yango ya nkasa 224 ebongisami mpo na kosalisa bato bákanga ntina ya mateya ya ebandeli ya Biblia. Ezali na masolo etali Nzambe, Yesu Kristo, bampasi ya bato, lisekwa, libondeli mpe masolo mingi mosusu.

Ntango nini mpe esika nini boyekoli yango esalemaka?

Boyekoli ekoki kosalema na ngonga mpe na esika oyo olingi.

Boyekoli yango eumelaka ngonga boni?

Bato mingi bapesaka ngonga moko to koleka pɔsɔ nyonso mpo na koyekola Biblia. Boyekoli nyonso eumelaka ngonga ndenge moko te. Tokoki kosala yango na kolanda programɛ na yo. Bato mosusu bapesaka miniti 10 to 15 mpo na koyekola Biblia pɔsɔ nyonso.

Bafutaka mbongo boni mpo na boyekoli yango?

Mateya ná mikanda oyo esalisaka mpo na koyekola Biblia ezalaka ya ofele. Yango eyokani na maloba oyo ya Yesu epai ya bayekoli na ye: “Bozwi ofele, bópesa ofele.”​—Matai 10:8.

Boyekoli yango eumelaka mbula boni?

Yango etali kaka yo. Buku Biblia eteyaka mpenza nini? ezali na mateya 19. Okoki kosilisa koyekola liteya to mateya na yango nyonso na boumeli ya ntango oyo ebongi mpo na yo.

Esengeli kaka nakóma Motatoli ya Yehova?

Te. Na limemya nyonso tondimaka lotomo ya moto ya kopona makambo oyo akondima to te. Kasi, moto oyo akómi na boyebi ya mateya ya ebandeli ya Biblia akoki kopona malamu lingomba na ye.

Nakoki koyeba makambo mosusu wapi?

Site Internet jw.org ezali na bansango ya solosolo oyo etali mateya mpe misala ya Batatoli ya Yehova.

Ndenge nini nakoki kosɛnga boyekoli ya Biblia?

  • Bato basɛngaka boyekoli ya Biblia na balolenge mingi: na Internet, bakomelaka biso

    Sɛngá boyekoli yango na site www.jw.org.

  • Komá na adrɛsi oyo ezali pene na esika ofandi na lokasa ya mibale ya zulunalo oyo.

  • Kutáná na Batatoli ya Yehova ya esika ofandi. Okoki koluka “Batatoli ya Yehova” na liste ya banimero ya telefone ya esika ofandaka.

a Mbala mingi, toyekolaka Biblia na moto ye moko to na mwa etuluku ya bato.

b Ebimisami na Batatoli ya Yehova. Milio koleka 230 ya babuku yango ebimisami na minɔkɔ koleka 260.

LISALISI MPO NA MABOTA

Eziquiel

“Ntango mwasi na ngai abandaki koyekola Biblia, namonaki ete abongwanaki mpenza. Libota na biso ebongaki. Lokola nalingaki koyeba makambo oyo azalaki koyekola, ngai mpe nakómaki koyekola Biblia. Makambo oyo nayekolaki ebongisaki mpenza bizaleli na ngai. Koyekola Biblia esalaki ete tókóma koyokana malamu na libota.”​—Eziquiel.

Karen

“Nsima ya kobanda koyekola Biblia, natikaki komɛla drɔgɛ, kolangwa masanga mpe nayekolaki kopekisa ezaleli na ngai ya nkanda. Ndako na ngai ekómá pɛto mpe kitoko. Nakómá kosepela na libota na ngai mpe kosala makambo oyo epesaka bango esengo. Nakómá na esengo mpenza.”​—Karen.

Viniana

“Bato mosusu bazalaki kosɛka ngai mpo nazalaki koyekola Biblia. Kasi mobali na ngai azalaki kolendisa ngai mpe koloba na ngai boye: ‘Ata soki bato balobi nini, etali ngai te. Ndenge ozali kokóma na bizaleli ya malamu, yango nde ezali na ntina mpo na ngai. Kobá kosala oyo ozali kosala.’ Libota na biso ebongá mpenza!”​—Viniana.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto