Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lffi liteya 1
  • Biblia ekoki kosalisa yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia ekoki kosalisa yo?
  • Sepelá na bomoi libela na libela!—Mateya ya ebandeli mpo na koyekola Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KƆTÁ NA MOZINDO
  • NA MOKUSE
  • MAKANISI MOSUSU
  • Biblia ekoki kosalisa yo?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Mateya ya ebandeli mpo na koyekola Biblia
  • Oyo okoki kosala mpo botángi ya Biblia esalisa yo mpenza
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Nini ekoki kosalisa yo okoba koyekola Bibia?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Biblia elaki bomoi ya malamu na mikolo ezali koya
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Sepelá na bomoi libela na libela!—Mateya ya ebandeli mpo na koyekola Biblia
lffi liteya 1
Liteya1. Biblia ya kofungwama.

LITEYA 01

Biblia ekoki kosalisa yo!

Ya Papye
Ya Papye
Ya Papye

Biso nyonso tolingaka koyeba makambo mingi etali bomoi, bampasi, liwa, mpe makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Tomitungisaka mpe mpo na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Na ndakisa, tolukaka mbongo mpo na kokokisa bamposa na biso mpe tolingaka kozala na libota ya esengo. Biblia esalisi bato mingi bázwa biyano na mituna ya ntina mingi etali bomoi mpe epesi batoli oyo ebongi mpo na kozala na bomoi ya esengo. Oyebi moto moko oyo Biblia ekoki kosalisa?

1. Biblia epesi biyano na mituna nini?

Biblia epesi biyano na mituna oyo ya ntina mingi: Bomoi ebandá ndenge nini? Mpo na nini tozali awa na mabele? Mpo na nini bato malamu bamonaka mpasi? Soki moto akufi, akendaka wapi? Soki bato nyonso balingaka kimya, mpo na nini bitumba ezali? Mabele ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya? Biblia epesi biyano oyo ebongi na mituna wana, mpe bato mingi basepelaka na biyano yango.

2. Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa biso tózala na bomoi ya esengo?

Biblia epesi biso batoli ya malamu. Na ndakisa, eyebisi biso makambo oyo tosengeli kosala mpo na kozala na libota ya esengo. Eyebisi biso mpe oyo tosengeli kosala ntango tozali kotungisama mpe oyo tosengeli kosala mpo na kosepela na mosala na biso. Wana tozali koyekola buku oyo, okoyeba batoli oyo Biblia epesi mpo na makambo yango mpe makambo mosusu. Mbala mosusu okondima ete “Makomami nyonso [makambo nyonso oyo ezali na kati ya Biblia] ezali na litomba.”—2 Timote 3:16.

Buku oyo ezali Biblia te. Kasi, ekosalisa yo oyeba yo moko makambo oyo Biblia eteyaka. Yango wana, tozali kolendisa yo otánga bavɛrsɛ oyo ezali na liteya mokomoko mpe okokanisa yango na makambo oyo ozali koyekola.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba ndenge Biblia esalisi bato, makambo oyo okoki kosala mpo osepela kotánga yango, mpe ntina oyo moto asengeli kosalisa yo mpo oyeba mateya na yango malamumalamu.

3. Biblia ekoki kotambwisa biso

Biblia ezali lokola mwinda to torche oyo ezali kopela makasi. Biblia ekoki kosalisa biso tózwa bikateli ya malamu mpe koyebisa biso makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya.

Tángá Nzembo 119:105, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Mpo na mokomi ya nzembo oyo, Biblia ezali lokola nini?

  • Bongo mpo na yo?

Mobali moko azali kotambola na mpokwa na nzela ya mabanga pembeni ya ebale mpe apelisi torche.

4. Biblia ekoki kopesa biyano na mituna na biso

Biblia epesaki mwasi moko biyano na mituna ya ntina mingi oyo azalaki komituna banda bambula mingi. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

VIDEO:Kobungisa elikya na yo soki moke te! (1:48)

  • Na video oyo, mituna nini mwasi yango azalaki komituna?

  • Ndenge nini boyekoli ya Biblia esalisaki ye?

Biblia elendisi biso tótunaka mituna. Tángá Matai 7:7, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mituna nini omitunaka oyo biyano na yango ekoki kozala na Biblia?

5. Okoki kosepela kotánga Biblia

Bato mingi basepelaka kotánga Biblia mpe bazwaka matomba. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

VIDEO: Kotánga Biblia (2:05)

  • Na video oyo, bilenge bazalaki kosepela kotánga mikanda?

  • Mpo na nini sikoyo bakómi kosepela kotánga Biblia?

Biblia ekoki koteya biso makambo oyo ekoki kosalisa biso mpe kopesa biso elikya. Tángá Baroma 15:4, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Okosepela kozwa lisalisi mpe koyeba elikya oyo Biblia epesi?

6. Bato mosusu bakoki kosalisa biso tóyeba Biblia malamumalamu

Bato mingi oyo batángaka Biblia bango moko balobi ete soki bato mosusu bazali kosalisa yo oyeba yango ezalaka malamu koleka. Tángá Misala 8:26-31, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Ndenge nini okoki koyeba Biblia malamumalamu?—Talá vɛrsɛ 30 mpe 31.

Bililingi: 1. Filipe azali kosalisa moto ya Etiopia ayeba malamumalamu Makomami. 2. Motatoli moko ya Yehova azali koteya mwasi moko elongo na bana na ye mibale makambo ya Biblia.

Moto ya Etiopi azalaki na mposa básalisa ye mpo ayeba Makomami malamumalamu. Bato mingi bamoni ete soki bazali kosalisa bango báyeba Biblia ezalaka malamu koleka

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Koyekola Biblia ezalaka mpasi mingi.”

  • Okoyebisa ye nini?

NA MOKUSE

Biblia epesaka batoli ya malamu oyo etali bomoi, eyanolaka na mituna ya ntina mingi, esalisaka bato mpe epesaka bango elikya.

Bozongeli

  • Biblia ezali na batoli ya ndenge nini?

  • Biblia epesaka biyano na mituna nini?

  • Makambo nini okolinga koyekola na Biblia?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Lelo oyo Biblia ezali kopesa biso batoli oyo ebongi.

“Mateya ya Biblia ezali na bwanya oyo esilaka ngala te” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli No. 1 2018)

Talá ndenge Biblia esalisi moto moko alongola makanisi mabe oyo azalaki na yango banda bomwana.

Nabandaki bomoi ya sika!

Talá batoli ya Biblia mpo na libota.

“Sekele 12 mpo na libota ya esengo” (Lamuká! No. 2 2018)

Nani azali koyangela mokili? Biblia epesi eyano oyo ekeseni na oyo bato mingi bakanisaka.

Mpo na nini koyekola Biblia? —Video ya molai  (3:14)

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto