Mituna ya batángi
Yisaya mokapo 53 ezali na esakweli moko ya Masiya oyo eyebani mingi. Yisaya 53 vɛrsɛ 10 (NW), elobi ete: “Yehova ye moko asepeli kotuta ye; apesi ye maladi.” Maloba yango elimboli nini?
Ezali mpasi te mpo na koyeba ntina oyo motuna ekoki kotunama mpo na Yisaya 53:10. Baklisto ya solo bazalaka na likanisi te ete Nzambe na biso oyo atondi na mawa mpe na bolingo akoki kosepela kotuta moto moko to kopesa ye maladi. Biblia emonisi biso makambo mingi oyo etindaka biso tóndimaka ete Nzambe asepelaka te konyokola moto oyo asali mabe te. (Deteronome 32:4; Yilimia 7:30, 31) Banda kala, ntango mosusu Yehova azalaki kotika nzela na minyoko mpo na bantina oyo eyokani na mayele mpe na bolingo na ye. Kasi ezali ye te moto apesaki Yesu Mwana na ye ya bolingo mpasi. Kasi vɛrsɛ yango ezali mpenzampenza koloba nini?
Tokoki koyeba ndimbola na yango soki totaleli vɛrsɛ yango mobimba, mpe tótya likebi na bisika mibale oyo basaleli liloba “asepeli.” Na Yisaya 53:10 (NW) tozali kotánga ete: “Yehova ye moko asepeli kotuta ye; apesi ye maladi. Soki okómisi molimo na ye lokola mbeka ya ekweli, akomona bakitani na ye, akokómisa mikolo na ye mingi, mpe eloko oyo Yehova asepeli na yango ekolonga na lobɔkɔ na ye.”
Nsango oyo ezali na Biblia mobimba ezali komonisa ete “eloko oyo Yehova asepeli na yango,” oyo elobelami na nsuka ya vɛrsɛ yango ezali mpenzampenza ete mokano na ye ekokisama na nzela ya Bokonzi. Yehova akosala bongo mpo na kolongisa bokonzi na ye mpe mpo na kolongola bato ya botosi na lisumu oyo Adama atikelá bango. (1 Ntango 29:11; Nzembo 83:18; Misala 4:24; Baebele 2:14, 15; 1 Yoane 3:8) Mpo ete makambo nyonso wana esalema, Mwana ya Nzambe asengelaki kobotama lokola moto mpe kopesa bomoi na ye lokola mbeka mpo na kosikola bato. Lokola toyebi yango, Yesu anyokwamaki. Biblia elobi na biso ete “ayekoli kotosa mpo na koyoka mpasi.” Na yango, Yesu azwaki mbano na mpasi yango.—Baebele 5:7-9.
Yesu ayebaki liboso ya koya awa na mabele ete nzela malamu oyo andimi kolanda ekozala mpe na minyoko. Maloba na ye oyo ezali na Yoane 12:23, 24 emonisi yango, kuna tozali kotánga boye: “Ntango esili koya wana Mwana ya moto akokumisama. Solo solo nazali koloba na bino ete, soko mbuma ya masango ekokwea na mabele mpe ekokufa te, ekotikala bobele moko mpenza; nde soko ekokufa, ekobota mbuma mingi.” Yesu ayebaki ete asengelaki kotikala sembo tii na liwa. Lisolo yango elobi lisusu boye: “[Sikoyo] molimo na ngai etungisami; naloba nini? Ete, Tata bikisá ngai na ntango oyo? Kasi nayei na ntango oyo mpo na likambo oyo. Tata kumisá nkombo na yo! Mongongo ebimi na likoló ete, Nasili kokumisa yango mpe na kokumisa yango lisusu.”—Yoane 12:27, 28; Matai 26:38, 39.
Bavɛrsɛ oyo ezali kosalisa biso tókanga ntina ya Yisaya 53:10. Yehova ayebaki malamu ete na kati ya makambo oyo Mwana na ye akokutana na yango, bakotuta ye mpe. Kasi lokola ayebaki ete likambo yango ekopesa bolamu mingi, Yehova asepelaki na makambo oyo Yesu asengelaki kokutana na yango. Na yango tokoki koloba mpenza ete Yehova “asepeli kotuta,” to na kotutama ya Masiya. Lisusu Yesu mpe asepelaki na makambo oyo akokaki kosala mpe oyo asalaki. Ya solo, ndenge maloba ya nsuka ya Yisaya 53:10 elobi, ‘eloko oyo Yehova asepeli na yango elongaki na lobɔkɔ na ye.’